< Yoane 7 >

1 Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galile, aboyaki kovanda na Yuda, pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma Ye.
After that Iesus wet about in Galile and wolde not go about in Iewry for the Iewes sought to kill him.
2 Nzokande, feti ya Bandako ya kapo, feti ya Bayuda, ekomaki pene.
The Iewes tabernacle feast was at honde.
3 Bandeko ya Yesu balobaki na Ye: — Longwa awa na Galile mpe kende na Yuda, mpo ete bayekoli na Yo bamona kuna bikamwa oyo ozali kosala.
His brethren therfore sayde vnto him: get ye hence and go into Iewry yt thy disciples maye se thy workes yt thou doest.
4 Moto moko te asalaka na nkuku soki alingi koyebana. Lokola ozali kosala makambo minene koleka, sala ete moto nyonso kati na mokili ayeba soki ozali nani.
For ther is no man yt doeth eny thing secretly and he him selfe seketh to be knowen. Yf thou do soche thinges shewe thy selfe to the worlde.
5 Pamba te, ezala bandeko ya Yesu, bango mpe bazalaki kondima Ye te.
For as yet his brethre beleved not in him.
6 Yesu azongiselaki bango: — Tango na Ngai ekoki nanu te; kasi mpo na bino, tango nyonso ezali malamu.
Then Iesus sayd vnto them: My tyme is not yet come youre tyme is all waye redy.
7 Mokili ekoki koyina bino te; kasi Ngai, ezali koyina Ngai mpo ete natatolaka ete misala na yango ezali mabe.
The worlde canot hate you. Me it hateth: because I testify of it that the workes of it are evyll.
8 Bino, bokende na feti wana; kasi Ngai, nakokende te, pamba te tango na Ngai ekoki nanu te.
Go ye vp vnto this feast. I will not go vp yet vnto this feast for my tyme is not yet full come.
9 Sima na Ye koloba na bango bongo, atikalaki na Galile.
These wordes he sayde vnto them and abode still in Galile.
10 Nzokande, tango bandeko na Ye bakendeki na feti, Ye mpe akendeki kuna, na komilakisa te, kasi na nkuku.
But assone as his brethren were goone vp then went he also vp vnto the feast: not openly but as it were prevely.
11 Wana bazalaki kati na feti, Bayuda bazalaki koluka Ye mpe bazalaki kotuna-tuna: « Azali wapi? »
Then sought him the Iewes at ye feast and sayde: Where is he?
12 Kati na bato, tembe ekomaki makasi na tina na Ye. Bamoko bazalaki koloba: Azali moto malamu; bamosusu: « Te, azali kokosa bato nyonso. »
And moche murmurynge was ther of him amonge the people. Some sayde: He is good. Wother sayde naye but he deceaveth the people.
13 Kasi, lokola bango nyonso bazalaki kobanga Bayuda, moto ata moko te akokaki koloba na bonsomi nyonso na tina na Yesu.
How be it no ma spake openly of him for feare of the Iewes
14 Tango mikolo ya feti ekomaki na kati-kati, Yesu akendeki na Tempelo mpe akomaki koteya.
In ye middes of the feast Iesus went vp into the temple and taught.
15 Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana: — Ndenge nini moto oyo ayekola te akoki koyeba Makomi boye?
And the Iewes marveylled sayinge: How knoweth he ye scriptures seynge yt he never learned?
16 Yesu azongiselaki bango: — Makambo oyo nazali koteya ewuti epai na Ngai te, kasi ewuti epai na Ye oyo atindi Ngai.
Iesus answered them and sayde: My doctrine is not myne: but his that sent me.
17 Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.
If eny man will do his will he shall knowe of the doctrine whether it be of God or whether I speake of my selfe.
18 Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye.
He that speaketh of him selfe seketh his awne prayse. But he that seketh his prayse that sent him the same is true and no vnrightewesnes is in him.
19 Boni, Moyize apesaki bino mibeko te? Nzokande moko te kati na bino atosaka yango! Bongo mpo na nini bozali koluka koboma Ngai?
Dyd not Moses geve you a lawe and yet none of you kepeth ye lawe? Why goo ye aboute to kyll me?
20 Bato kati na ngulupa bazongiselaki Yesu: — Ozali na molimo mabe. Nani azali koluka koboma yo?
The people answered and sayde: thou hast the devyll: who goeth aboute to kyll the?
21 Yesu alobaki na bango: — Mpo na likamwisi moko oyo nasalaki, yango wana bino nyonso bokamwe!
Iesus answered and sayde to them: I have done one worke and ye all marvayle.
22 Bokanisa nanu: Moyize apesaki bino mitindo ya kokatisa ngenga, —mobeko yango ewutaki kutu na Moyize te, kasi na bakoko— mpe botosaka mitindo yango ata na mokolo ya Saba.
Moses therfore gave vnto you circumcision: not because it is of Moses but of the fathers. And yet ye on the Saboth daye circumcise a man.
23 Bongo soki bokataka bato ngenga na mokolo ya Saba, mpe yango ebukaka mobeko ya Moyize te, mpo na nini bozali kosilikela Ngai mpo ete nabikisi moto na mokolo ya Saba?
If a man on the Saboth daye receave circumcision without breakinge of the lawe of Moses: disdayne ye at me because I have made a man every whit whoale on the saboth daye?
24 Bosambisaka lisusu te kolanda oyo miso na bino ezali komona, kasi bokataka makambo na bosembo.
Iudge not after the vtter aperaunce: but iudge rightewes iudgement.
25 Na bongo, ndambo ya bavandi ya Yelusalemi bakomaki komituna: « Azali te moto oyo bazali koluka koboma?
Then sayd some of them of Ierusalem: Is not this he who they goo aboute to kyll?
26 Tala, azali koloba na bonsomi nyonso, mpe bazali koloba na ye eloko moko te mpo na kotelemela ye! Boni, bokanisi ete bakonzi na biso bayebi ete azali penza Klisto?
Beholde he speaketh boldly and they saye nothinge to him. Do the rulars knowe in dede that this is very Christ?
27 Kasi biso, toyebi epai moto oyo awuti; nzokande tango Klisto akoya, moto moko te akoyeba soki azali moto ya engumba nini! »
How be it we knowe this man whence he is: but when Christ cometh no man shall knowe whence he is.
28 Kaka na tango yango, wana Yesu azalaki koteya kati na Tempelo, alobaki na mongongo makasi: — Solo, boyebi Ngai mpe boyebi epai nawuti! Nzokande, nayei na ndenge na Ngai moko te; ezali Ye oyo azali penza ya solo nde atindi Ngai, mpe bino, boyebi Ye te.
Then cryed Iesus in ye temple as he taught sayinge: ye knowe me and whence I am ye knowe. And yet I am not come of my selfe but he yt sent me is true whom ye knowe not.
29 Ngai, nayebi Ye, pamba te nawuti epai na Ye, mpe ezali Ye nde atindi Ngai.
I knowe him: for I am of him and he hath sent me.
30 Na bongo, balukaki kokanga Yesu, kasi moto ata moko te alongaki; pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.
Then they sought to take him: but no ma layde hondes on him because his tyme was not yet come.
31 Boye kati na bato, mingi bandimaki Ye; bazalaki koloba: — Boni, tango Klisto akoya, akosala bikamwa mingi koleka oyo moto oyo ozali kosala?
Many of the people beleved on him and sayde: when Christ cometh will he do moo miracles then this man hath done?
32 Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.
The pharises hearde that the people murmured suche thinges about him. Wherfore ye pharises and hye prestes sent ministres forthe to take him.
33 Yesu alobaki: — Nazali nanu elongo na bino mpo na mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Ye oyo atindaki Ngai.
Then sayde Iesus vnto the: Yet am I a lytell whyle with you and then goo I vnto him that sent me.
34 Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna.
Ye shall seke me and shall not fynde me: and where I am thyther can ye not come.
35 Bayuda balobanaki bango na bango: — Asengeli kokende wapi mpo ete tomona ye lisusu te? Akokende epai ya Bayuda oyo bapalangana kati na Bagreki mpe koteya Bagreki?
Then sayde the Iewes bitwene the selves: whyther will he goo that we shall not fynde him? Will he goo amonge the gentyls which are scattered all a broade and teache the gentyls?
36 Alingi penza koloba nini tango azali koloba: « Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna? »
What maner of sayinge is this that he sayde: ye shall seke me and shall not fynde me: and where I am thyther can ye not come?
37 Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi: — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.
In the last daye that great daye of the feaste Iesus stode and cryed sayinge: If eny man thyrst let him come vnto me and drinke.
38 Moto oyo akondima Ngai, kolanda ndenge Makomi elobi, bibale ya mayi ya bomoi ekotiola wuta kati na ye.
He that beleveth on me as sayeth the scripture out of his belly shall flowe ryvers of water of lyfe.
39 Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.
This spak he of the sprete which they that beleved on him shuld receave. For the holy goost was not yet there because that Iesus was not yet glorifyed.
40 Kati na bato oyo bayokaki maloba na Ye, bamoko bazalaki koloba: « Moto oyo azali penza Mosakoli, »
Many of the people when they hearde this sayinge sayd: of a truth this is a prophet
41 bamosusu: « Azali Klisto, » kasi bamosusu lisusu: « Boni, Klisto akoki kobimela na Galile?
Other sayde: this is Christ. Some sayde: shall Christ come out of Galile?
42 Boni, Makomi ezali koloba te ete Klisto akobimela na libota ya Davidi mpe akobotama na Beteleemi, mboka ya Davidi? »
Sayeth not the scripture that Christ shall come of the seed of David: and out of the toune of Bethleem where David was?
43 Ezali bongo nde bato bakabwanaki na tina na Yesu.
So was ther dissencion amonge the people aboute him.
44 Bamosusu kati na bango balukaki kokanga Ye, kasi moto ata moko te alongaki.
And some of them wolde have taken him: but no man layed hondes on him.
45 Bakengeli ya Tempelo bazongaki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batunaki bakengeli: — Mpo na nini bomemi Yesu awa te?
Then came ye ministres to ye hye prestes and pharises. And they sayde vnto the: why have ye not brought him?
46 Bakengeli bazongisaki: — Ezali na moto ata moko te oyo asila koloba makambo oyo moto wana azali koloba.
The servautes answered never man spake as this man doeth.
47 Bafarizeo batunaki lisusu: — Bino mpe bomitiki penza mpo ete akosa bino?
Then answered the the pharises: are ye also disceaved?
48 Boni, kati na bakonzi to kati na Bafarizeo, ezali ata na moko oyo andimi ye?
Doth eny of the rulers or of the pharises beleve on him?
49 Ezali kaka bato oyo bayebi mibeko ya Moyize te, bazali penza bato balakelama mabe!
But the comen people whiche knowe not ye lawe are cursed.
50 Kasi moko kati na bango, Nikodemi, oyo, mokolo moko, akendeki epai ya Yesu, alobaki:
Nicodemus sayde vnto them: He that came to Iesus by nyght and was one of them.
51 — Boni, mibeko na biso ekoki kokatela moto etumbu na kozanga koyoka ye liboso, mpe na kozanga koyeba mabe oyo asili kosala?
Doth oure lawe iudge eny man before it heare him and knowe what he hath done?
52 Bazongiselaki ye: — Boni, yo mpe ozali moto ya Galile? Kundola malamu Makomi, mpe okomona penza ete mosakoli moko te abimela na Galile. [
They answered and sayde vnto him: arte thou also of Galile? Searche and loke for out of Galile aryseth no Prophet.
53 Na bongo, moko na moko azongaki na ndako na ye.
And every man went vnto his awne housse.

< Yoane 7 >