< Yoane 4 >

1 Yesu ayokaki ete Bafarizeo bazwi sango oyo ezali koloba ete akomi na bayekoli ebele koleka Yoane mpe azali kobatisa bato mingi koleka Yoane.
When therefore Jesus knew that the Pharisees had heard that Jesus made and baptized more disciples than John,
2 (Nzokande, Yesu Ye moko azalaki kobatisa te, kasi ezalaki nde bayekoli na Ye.)
(though Jesus himself did not baptize, but his disciples, )
3 Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile.
he left Judaea, and went again to Galilee.
4 Lokola asengelaki kolekela na Samari,
And he must necessarily pass through Samaria.
5 akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi.
He cometh therefore to a city of Samaria, called Sychar, near the piece of land which Jacob gave to his son Joseph.
6 Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.
And Jacob's well was there. Jesus therefore, being wearied with the journey, was sitting thus by the well. It was about the sixth hour.
7 Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye: — Pesa Ngai mayi mpo ete namela.
There cometh a woman of Samaria to draw water. Jesus saith to her, Give me to drink.
8 (Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).
For his disciples had gone away into the city to buy food.
9 Kasi mwasi yango alobaki: — Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—
The Samaritan woman saith to him, How is it that thou, who art a Jew, askest drink of me, who am a Samaritan woman? For Jews have no dealings with Samaritans.
10 Yesu azongiselaki ye: — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
Jesus answered and said to her, If thou hadst known the gift of God, and who it is that saith to thee, Give me to drink, thou wouldst have asked of him, and he would have given thee living water.
11 Mwasi alobaki na Yesu: — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi?
The woman saith to him, Sir, thou hast nothing to draw with, and the well is deep. Whence hast thou the living water?
12 Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye?
Art thou greater than our father Jacob, who gave us the well, and drank thereof himself, and his sons, and his cattle?
13 Yesu azongiselaki ye: — Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi;
Jesus answered and said to her, Every one that drinketh of this water, will thirst again;
14 kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te: mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko. (aiōn g165, aiōnios g166)
but whoever drinketh of the water that I will give him, will never thirst; but the water that I will give him will become within him a well of water springing up to everlasting life. (aiōn g165, aiōnios g166)
15 Mwasi yango alobaki na Yesu: — Nkolo, pesa ngai mayi yango mpo ete nayokaka lisusu posa ya mayi te mpe nazonga lisusu awa te mpo na kotoka mayi.
The woman saith to him, Sir, give me this water, that I may not thirst, nor come hither to draw.
16 Yesu alobaki na ye: — Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa.
He saith to her, Go, call thy husband, and come hither.
17 Mwasi azongisaki: — Nazali na mobali te. Yesu alobaki na ye: — Ozali koloba penza ya solo ete ozali na mobali te,
The woman answered, I have no husband. Jesus saith to her, Thou saidst well, that thou hast no husband.
18 pamba te ozalaki na mibali mitano; mpe ye oyo ozali na ye sik’oyo azali mpe mobali na yo te. Boye likambo oyo owuti koloba ezali ya solo.
For thou hast had five husbands; and he whom thou now hast is not thy husband; in this thou hast spoken truly.
19 Mwasi yango alobaki na Yesu: — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.
The woman saith to him, Sir, I perceive that thou art a prophet.
20 Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi.
Our fathers worshipped on this mountain; and ye say, that in Jerusalem is the place where men ought to worship.
21 Yesu azongiselaki ye: — Mwasi, ndima Ngai: tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi.
Jesus saith to her, Believe me, woman, the hour is coming, when ye shall neither on this mountain, nor in Jerusalem, worship the Father.
22 Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda.
Ye worship that which ye know not; we worship that which we know; for salvation is from the Jews.
23 Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana.
But the hour is coming, and now is, when the true worshippers will worship the Father in spirit and in truth; for such worshippers the Father seeketh.
24 Nzambe azali Molimo; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.
God is a spirit; and they who worship must worship in spirit and in truth.
25 Mwasi alobaki na Yesu: — Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.
The woman saith to him, I know that Messiah cometh (who is called Christ); when he hath come, he will tell us all things.
26 Yesu alobaki na ye: — Nazali Masiya, Ngai oyo nazali koloba na yo.
Jesus saith to her, I who speak to thee am he.
27 Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye: « Ozali koluka nini? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye? »
And upon this his disciples came, and marveled that he was talking with a woman. Yet no one said, What dost thou seek? or, Why dost thou talk with her?
28 Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato:
The woman then left her water-pot, and went away into the city, and saith to the men,
29 — Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te?
Come, see a man who told me all things which I have done. Is this the Christ?
30 Bato babimaki longwa na engumba mpe bakendeki epai ya Yesu.
They went out of the city, and came to him.
31 Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu: — Rabi, lia.
In the mean while the disciples asked him, saying, Rabbi, eat.
32 Kasi Yesu azongiselaki bango: — Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.
But he said to them, I have food to eat that ye know not of.
33 Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango: — Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei?
The disciples therefore said to one another, Hath any one brought him anything to eat?
34 Yesu alobaki na bango: — Bilei na Ngai ezali: kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.
Jesus saith to them, My food is to do the will of him that sent me, and to finish his work.
35 Bino bolobaka: « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino: bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka.
Do ye not say, There are yet four months, and the harvest cometh? Lo! I say to you, lift up your eyes, and look on the fields, that they are white for harvest.
36 Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale. (aiōnios g166)
Already is the reaper receiving wages, and gathering fruit unto everlasting life; that both the sower and the reaper may rejoice together. (aiōnios g166)
37 Awa nde ekokisami bosolo ya lisese oyo elobaka: « Moko alonaka, mosusu abukaka. »
And herein is fulfilled the true saying, One soweth, and another reapeth.
38 Natindaki bino kobuka bambuma ya elanga oyo bino bolonaki te; ezali bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali bobele kosepela na motoki ya bato mosusu.
I have sent you to reap that whereon ye have not labored. Others have labored, and ye have entered into their labor.
39 Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa: « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. »
And many of the Samaritans of that city believed in him because of the words of the woman, who testified, He told me all things which I have done.
40 Tango bato ya Samari bayaki epai ya Yesu, basengaki na Ye ete avanda elongo na bango; mpe Yesu avandaki elongo na bango mikolo mibale.
When therefore the Samaritans came to him, they besought him to remain with them; and he remained there two days.
41 Bato ebele koleka bakomaki kondimela Ye mpo na maloba oyo Ye moko azalaki koloba.
And many more believed on account of his word;
42 Bongo balobaki na mwasi wana: — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
and said to the woman, No longer do we believe on account of what thou hast told us; for we have ourselves heard him, and know that this is in truth the Saviour of the world.
43 Sima na mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendeki na Galile.
And after the two days he went from that place into Galilee.
44 Solo, Ye moko Yesu alobaki ete mosakoli azwaka lokumu te kati na ekolo na ye.
For Jesus himself testified, that a prophet hath no honor in his own country.
45 Tango akomaki na Galile, bato ya Galile bayambaki Ye, pamba te bango mpe bakendeki na Yelusalemi, na tango ya feti, mpe bamonaki makambo nyonso oyo asalaki kuna.
When therefore he came into Galilee, the Galilaeans received him, having seen all that he did in Jerusalem at the feast; for they also went to the feast.
46 Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela.
So he came again into Cana of Galilee, where he made the water wine. And there was a certain nobleman, whose son was sick, at Capernaum.
47 Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.
He, having heard that Jesus had come out of Judaea into Galilee, went to him, and asked him to go down and heal his son; for he was at the point of death.
48 Yesu alobaki na ye: — Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa?
Then Jesus said to him, Unless ye see signs and wonders, ye will not believe.
49 Mokonzi wana ya basoda alobaki: — Nkolo na ngai, yaka noki liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa.
The nobleman saith to him, Sir, come down before my child die.
50 Yesu alobaki na ye: — Kende, mwana na yo ya mobali azali na bomoi. Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki mpe azongaki.
Jesus saith to him, Go; thy son liveth. The man believed the word that Jesus spoke to him, and went away.
51 Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye: — Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.
And as he was now going down, the servants met him, and brought word that his child was living.
52 Atunaki bango soki ezalaki na ngonga nini mwana abikaki. Bazongisaki: — Fievele etikaki ye lobi oyo eleki, na ngonga ya liboso sima na midi.
Then he inquired of them the hour when he began to mend. And they said to him, Yesterday at the seventh hour the fever left him.
53 Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye: « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.
So the father knew that it was in the same hour in which Jesus said to him, Thy son is living. And he himself believed, and his whole house.
54 Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.
This again, a second sign, Jesus wrought, when he had come out of Judaea into Galilee.

< Yoane 4 >