< Yoane 3 >
1 Ezalaki na moto moko kati na Bafarizeo, oyo kombo na ye ezalaki « Nikodemi. » Azalaki moko kati na bakonzi ya Bayuda.
Yahudiler'in Nikodim adlı bir önderi vardı. Ferisiler'den olan bu adam bir gece İsa'ya gelerek, “Rabbî, senin Tanrı'dan gelmiş bir öğretmen olduğunu biliyoruz. Çünkü Tanrı kendisiyle olmadıkça kimse senin yaptığın bu mucizeleri yapamaz” dedi.
2 Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye: — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.
3 Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.
İsa ona şu karşılığı verdi: “Sana doğrusunu söyleyeyim, bir kimse yeniden doğmadıkça Tanrı'nın Egemenliği'ni göremez.”
4 Nikodemi atunaki Ye: — Ndenge nini moto oyo akomi mobange akoki kobotama lisusu? Akoki solo kozonga na libumu ya mama na ye mpo ete abotama lisusu?
Nikodim, “Yaşlanmış bir adam nasıl doğabilir? Annesinin rahmine ikinci kez girip doğabilir mi?” diye sordu.
5 Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na Molimo.
İsa şöyle yanıt verdi: “Sana doğrusunu söyleyeyim, bir kimse sudan ve Ruh'tan doğmadıkça Tanrı'nın Egemenliği'ne giremez.
6 Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali molimo.
Bedenden doğan bedendir, Ruh'tan doğan ruhtur.
7 Kokamwa te ndenge nalobi na yo: « Osengeli kobotama mbotama ya sika! »
Sana, ‘Yeniden doğmalısınız’ dediğime şaşma.
8 Mopepe epepaka esika nyonso oyo elingi kopepa; atako oyoki makelele na yango, kasi okokaka te koloba soki ewuti wapi to ezali kokende wapi. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na Molimo.
Yel dilediği yerde eser; sesini işitirsin, ama nereden gelip nereye gittiğini bilemezsin. Ruh'tan doğan herkes böyledir.”
9 Nikodemi atunaki lisusu: — Ekosalema ndenge nini?
Nikodim İsa'ya, “Bunlar nasıl olabilir?” diye sordu.
10 Yesu alobaki na ye: — Ndenge nini yo, molakisi mobimba oyo okenda sango kati na Isalaele, ozali kososola te makambo oyo?
İsa ona şöyle yanıt verdi: “Sen İsrail'in öğretmeni olduğun halde bunları anlamıyor musun?
11 Nazali koloba na yo penza ya solo: tolobaka makambo oyo toyebi mpe topesaka litatoli na tina na makambo oyo tomoni; kasi bino, boboyi kondima litatoli na biso.
Sana doğrusunu söyleyeyim, biz bildiğimizi söylüyoruz, gördüğümüze tanıklık ediyoruz. Sizler ise bizim tanıklığımızı kabul etmiyorsunuz.
12 Soki tango nazali koloba na bino makambo ndenge esalemaka na mokili, bozali kondima te, bongo bokondima ndenge nini soki nalobi na bino makambo ya Likolo?
Sizlere yeryüzüyle ilgili şeyleri söylediğim zaman inanmazsanız, gökle ilgili şeyleri söylediğimde nasıl inanacaksınız?
13 Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo: Mwana na Moto.
Gökten inmiş olan İnsanoğlu'ndan başka hiç kimse göğe çıkmamıştır.
14 Ndenge kaka Moyize atelemisaki na nzete, ekeko ya nyoka kati na esobe, ndenge wana mpe Mwana na Moto asengeli kotombolama
Musa çölde yılanı nasıl yukarı kaldırdıysa, İnsanoğlu'nun da öylece yukarı kaldırılması gerekir.
15 mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye azwa, kati na Ye, bomoi ya seko. (aiōnios )
Öyle ki, O'na iman eden herkes sonsuz yaşama kavuşsun. (aiōnios )
16 Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko. (aiōnios )
“Çünkü Tanrı dünyayı o kadar çok sevdi ki, biricik Oğlu'nu verdi. Öyle ki, O'na iman edenlerin hiçbiri mahvolmasın, hepsi sonsuz yaşama kavuşsun. (aiōnios )
17 Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango.
Tanrı, Oğlu'nu dünyayı yargılamak için göndermedi, dünya O'nun aracılığıyla kurtulsun diye gönderdi.
18 Moto nyonso oyo andimi Ye akozwa etumbu te; kasi ye oyo aboyi kondima Ye asili kozwa etumbu, pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe.
O'na iman eden yargılanmaz, iman etmeyen ise zaten yargılanmıştır. Çünkü Tanrı'nın biricik Oğlu'nun adına iman etmemiştir.
19 Tala ndenge nini etumbu yango ezali: pole eyaki kati na mokili, kasi bato balingaki molili, pamba te misala na bango ezali mabe.
Yargı da şudur: Dünyaya ışık geldi, ama insanlar ışık yerine karanlığı sevdiler. Çünkü yaptıkları işler kötüydü.
20 Moto nyonso oyo asalaka mabe ayinaka pole mpe apusanaka te epai pole ezali, noki te misala na ye ekomonana polele.
Kötülük yapan herkes ışıktan nefret eder ve yaptıkları açığa çıkmasın diye ışığa yaklaşmaz.
21 Nzokande, moto nyonso oyo atambolaka na solo ayaka epai pole ezali mpo ete misala oyo asalaka, na boyokani elongo na Nzambe, emonana polele.
Ama gerçeği uygulayan kişi yaptıklarını, Tanrı'ya dayanarak yaptığını göstermek için ışığa gelir.”
22 Sima na yango, Yesu akendeki na Yuda, elongo na bayekoli na Ye; avandaki kuna mwa tango elongo na bango mpe azalaki kobatisa.
Bundan sonra İsa'yla öğrencileri Yahudiye diyarına gittiler. İsa onlarla birlikte orada bir süre kalarak vaftiz etti.
23 Yoane mpe azalaki kobatisa na Enoni, pembeni ya Salimi, mpo ete mayi ezalaki mingi kuna; bato bazalaki kokende kuna epai na ye mpe bazalaki kozwa libatisi.
Yahya da Salim yakınındaki Aynon'da vaftiz ediyordu. Çünkü orada bol su vardı. İnsanlar gelip vaftiz oluyorlardı.
24 Na tango wana, batiaki nanu Yoane na boloko te.
Yahya henüz hapse atılmamıştı.
25 Mokolo moko, bayekoli ya Yoane bazalaki kobendana na Moyuda moko na tina na kopetolama.
O sıralarda Yahya'nın öğrencileriyle bir Yahudi arasında temizlenme konusunda bir tartışma çıktı.
26 Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye: — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.
Öğrencileri Yahya'ya gelerek, “Rabbî” dediler, “Şeria Irmağı'nın karşı yakasında birlikte olduğun ve kendisi için tanıklık ettiğin adam var ya, işte O vaftiz ediyor, herkes de O'na gidiyor.”
27 Yoane azongisaki: — Moto akoki kozwa eloko moko te soki Likolo epesi ye yango te.
Yahya şöyle yanıt verdi: “İnsan, kendisine gökten verilmedikçe hiçbir şey alamaz.
28 Bino moko bokoki kotatola ete nalobaki: « Ngai, nazali Klisto te, kasi natindamaki liboso na Ye. »
‘Ben Mesih değilim, ama O'nun öncüsü olarak gönderildim’ dediğime siz kendiniz tanıksınız.
29 Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai: esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.
Gelin kiminse, güvey odur. Ama güveyin yanında duran ve onu dinleyen dostu onun sesini işitince çok sevinir. İşte benim sevincim böylece tamamlandı.
30 Esengeli ete Ye amata, mpe ngai nakita.
O büyümeli, bense küçülmeliyim.”
31 Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso; kasi moto oyo awuti na mokili akotikala kaka ya mokili mpe alobaka kaka lokola moto ya mokili. Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso,
Yukarıdan gelen, herkesten üstündür. Dünyadan olan dünyaya aittir ve dünyadan söz eder. Gökten gelen ise, herkesten üstündür.
32 azali kotatola na tina na makambo oyo amonaki mpe ayokaki, kasi moto moko te azali kondima litatoli na Ye.
Ne görmüş ne işitmişse ona tanıklık eder, ama tanıklığını kimse kabul etmez.
33 Moto nyonso oyo andimi litatoli na Ye akolobaka na solo ete Nzambe azali solo.
O'nun tanıklığını kabul eden, Tanrı'nın gerçek olduğuna mührünü basmıştır.
34 Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso.
Tanrı'nın gönderdiği kişi Tanrı'nın sözlerini söyler. Çünkü Tanrı, Ruh'u ölçüyle vermez.
35 Tata alingaka Mwana, mpe Mwana azalaka na bokonzi kowuta na Tata mpo na kokonza nyonso.
Baba Oğul'u sever; her şeyi O'na teslim etmiştir.
36 Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe. (aiōnios )
Oğul'a iman edenin sonsuz yaşamı vardır. Ama Oğul'un sözünü dinlemeyen yaşamı görmeyecektir. Tanrı'nın gazabı böylesinin üzerinde kalır. (aiōnios )