< Yoane 19 >
1 Bongo Pilato apesaki mitindo ete bakamata Yesu, mpe abetisaki Ye fimbu.
Pilatos pois tomou então a Jesus, e o açoitou:
2 Basoda basalaki ekoti na banzube mpe balatisaki Ye yango na moto; balatisaki Ye lisusu nzambala ya motane.
E os soldados, tecendo uma coroa de espinhos, lha puseram sobre a cabeça, e lhe vestiram uma veste de púrpura.
3 Bazalaki koya koloba na Ye: « Mbote, mokonzi ya Bayuda! » Mpe babandaki kobeta Ye bambata.
E diziam: Salve, Rei dos judeus. E davam-lhe bofetadas.
4 Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango: — Botala! Nayei na Ye na libanda epai na bino mpo boyeba ete ngai nazwi Ye na mabe moko te.
Então Pilatos saiu outra vez fora, e disse-lhes: Eis aqui vo-lo trago fora, para que saibais que não acho nele crime algum.
5 Boye, Yesu abimaki alata ekoti ya nzube mpe nzambala ya motane. Pilato alobaki na bango: — Moto yango, ye oyo!
Saiu pois Jesus fora, levando a coroa de espinhos e o vestido de púrpura. E disse-lhes Pilatos: eis aqui o homem.
6 Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga: — Baka ye na ekulusu! Baka ye na ekulusu! Kasi Pilato azongisaki: — Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.
Vendo-o pois os principais dos sacerdotes e os servos, clamaram, dizendo: Crucifica-o, crucifica-o. Disse-lhes Pilatos: tomai-o vós, e crucificai-o; porque eu nenhum crime acho nele.
7 Bayuda balobaki na molende nyonso: — Tozali na Mobeko; mpe kolanda Mobeko na biso, asengeli kokufa, pamba te amikomisi Mwana na Nzambe.
Responderam-lhe os judeus: Nós temos uma lei, e, segundo a nossa lei, deve morrer, porque se fez Filho de Deus.
8 Tango Pilato ayokaki maloba wana, abangaki lisusu makasi.
E Pilatos, quando ouviu esta palavra, mais atemorizado ficou.
9 Azongaki lisusu kati na ndako ya moyangeli mpe alobaki na Yesu: — Ozali moto ya mboka nini? Kasi Yesu apesaki ye eyano te.
E entrou outra vez na audiência, e disse a Jesus: de onde és tu? Mas Jesus não lhe deu resposta.
10 Pilato alobaki na Ye: — Boni, oboyi kozongisela ngai eyano? Oyebi te ete ngai nazali na makoki ya kobaka yo na ekulusu mpe ya kotika yo?
Disse-lhe pois Pilatos: Não me falas a mim? não sabes tu que tenho poder para te crucificar e tenho poder para te soltar?
11 Yesu alobaki na ye: — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.
Respondeu Jesus: Nenhum poder terias contra mim, se de cima te não fosse dado; porém aquele que me entregou a ti maior pecado tem.
12 Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga: — Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare.
Desde então Pilatos procurava solta-lo; mas os judeus clamavam, dizendo: Se soltas este, não és amigo do Cesar: qualquer que se faz rei contradiz ao Cesar.
13 Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata. »
Ouvindo pois Pilatos este dito, levou a Jesus para fora, e assentou-se no tribunal, no lugar chamado Lithostrótos, e em hebraico Gabbatha.
14 Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda: — Botala mokonzi na bino!
E era a preparação da pascoa, e quase à hora sexta; e disse aos judeus: Eis aqui o vosso Rei.
15 Kasi babandaki koganga: — Boma ye! Boma ye! Baka ye na ekulusu! Pilato alobaki na bango lisusu: — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu? Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki: — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te!
Mas eles bradaram: Tira, tira, crucifica-o. Disse-lhes Pilatos: Hei de crucificar o vosso Rei? Responderam os principais dos sacerdotes: Não temos rei, senão o Cesar.
16 Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye.
Então entregou-lho, para que fosse crucificado. E tomaram a Jesus, e o levaram.
17 Yesu amemaki, Ye moko, ekulusu na Ye; abimaki na engumba mpe akendeki na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gologota. »
E, levando ele às costas a sua cruz, saiu para o lugar chamado Caveira, que em hebraico se chama Gólgotha,
18 Ezalaki na esika yango nde babakaki Yesu na ekulusu, elongo na bato mosusu mibale: moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Onde o crucificaram, e com ele outros dois, um de cada lado, e Jesus no meio.
19 Pilato akomaki na libaya, makomi oyo atiaki na ekulusu; akomaki: Yesu, moto ya Nazareti, Mokonzi ya Bayuda.
E Pilatos escreveu também um título, e pô-lo em cima da cruz; e nele estava escrito: JESUS NAZARENO, REI DOS judeus.
20 Lokola esika oyo babakaki Yesu na ekulusu ezalaki pene ya engumba, Bayuda ebele batangaki makomi yango, pamba te bakomaki yango na lokota ya Ebre, lokota ya latino mpe lokota ya Greki.
E muitos dos judeus leram este título; porque o lugar onde Jesus estava crucificado era próximo da cidade; e estava escrito em hebraico, grego e latim.
21 Bakonzi ya Banganga-Nzambe balobaki na Pilato: — Osengelaki te kokoma: « Mokonzi ya Bayuda; » osengelaki nde kokoma: « Moto oyo alobaki: ‹ Nazali mokonzi ya Bayuda. › »
Diziam pois os principais sacerdotes dos judeus a Pilatos: Não escrevas, Rei dos judeus; mas que ele disse: Sou Rei dos judeus.
22 Kasi Pilato azongisaki: — Makambo oyo nakomi ekotikala kaka ndenge wana.
Respondeu Pilatos: O que escrevi, escrevi.
23 Sima na basoda kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na Ye mpe bakabolaki yango na biteni minei: soda moko na moko azwaki eteni moko. Bakamataki mpe nzambala na Ye, oyo ezalaki ya kotongama te, kasi ezalaki kaka elamba moko, kobanda na likolo kino na se.
Tendo pois os soldados crucificado a Jesus, tomaram os seus vestidos, e fizeram quatro partes, para cada soldado uma parte, e a túnica. Porém a túnica, tecida toda do alto a baixo, não tinha costura.
24 Basoda balobanaki bango na bango: — Topasola yango te, kasi tobeta zeke mpo na koyeba soki nani akozwa yango. Esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama: « Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango mpe babetaki zeke mpo na nzambala na ngai. » Ezali makambo wana nde basoda basalaki.
Disseram pois uns aos outros: Não a rasguemos, mas lancemos sortes sobre ela, para ver de quem será. Para que se cumprisse a escritura que diz: Dividiram entre si os meus vestidos, e sobre a minha vestidura lançaram sortes. E os soldados, pois, fizeram estas coisas.
25 Tala bato oyo batelemaki pene ya ekulusu ya Yesu: Mama na Ye, ndeko mwasi ya mama na Ye, Mari oyo azalaki mwasi ya Klopasi, mpe Mari ya mboka Magidala.
E junto à cruz de Jesus estava sua mãe, e a irmã de sua mãe, Maria, mulher de Cleophas, e Maria Magdalena.
26 Tango Yesu amonaki ete moyekoli oyo azalaki kolinga atelemi pembeni ya mama na Ye, alobaki na mama na Ye: — Mwasi, tala mwana na yo!
Ora Jesus, vendo ali a sua mãe, e o discípulo a quem ele amava estando presente, disse a sua mãe: Mulher, eis ai o teu filho.
27 Mpe alobaki na moyekoli yango: — Tala mama na yo! Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.
Depois disse ao discípulo: Eis ai tua mãe. E desde aquela hora o discípulo a recebeu em sua casa.
28 Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama: — Nayoki posa ya mayi.
Depois, sabendo Jesus que já todas as coisas estavam acabadas, para que a escritura se cumprisse, disse: Tenho sede.
29 Lokola ezalaki na mbeki moko etonda na vino ya ngayi pembeni ya esika yango, batiaki, na songe ya nzete moko ya izope, eponze moko epola na vino yango ya ngayi mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu.
Estava pois ali um vaso cheio de vinagre. E encheram de vinagre uma esponja, e, pondo-a num hissope, lha chegaram à boca.
30 Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki: — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.
E, quando Jesus tomou o vinagre, disse: Está consumado. E, inclinando a cabeça, entregou o espírito.
31 Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango.
Os judeus, pois, para que no sábado não ficassem os corpos na cruz, porque era a preparação (pois era grande o dia de sabbado), rogaram a Pilatos que se lhes quebrassem as pernas, e fossem tirados.
32 Basoda bayaki mpe babukaki makolo ya mibali nyonso mibale oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na Yesu; babandaki na moko, bongo balekaki na oyo mosusu.
Foram pois os soldados, e, na verdade, quebraram as pernas ao primeiro, e ao outro que com ele fôra crucificado;
33 Wana ekomaki ngala ya makolo ya Yesu, bamonaki ete Yesu amikufelaki; mpe babukaki lisusu te makolo na Ye.
Mas, vindo a Jesus, e vendo-o já morto, não lhe quebraram as pernas.
34 Moko kati na basoda atobolaki mopanzi ya Yesu na nzela ya likonga; mpe mbala moko, makila mpe mayi ebimaki na mopanzi yango.
Porém um dos soldados lhe furou o lado com uma lança, e logo saiu sangue e água.
35 Moto oyo azali kopesa litatoli na tina na makambo oyo amonaki yango kosalema na miso na ye, mpe litatoli na ye ezali ya solo; ayebi penza ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima.
E aquele que isto viu o testificou, e o seu testemunho é verdadeiro; e sabe que é verdade o que diz, para que também vós o creiais.
36 Makambo nyonso wana esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama: « Bakobuka ata mokuwa na Ye moko te. »
Porque estas coisas aconteceram para que se cumprisse a escritura, que diz: Nenhum dos seus ossos será quebrado.
37 Eteni mosusu ya Makomi elobi: « Bakotala Ye oyo batobolaki mopanzi. »
E outra vez diz a escritura: Verão o que traspassaram.
38 Sima na makambo wana, Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moyekoli ya Yesu, kasi na nkuku mpo ete azalaki kobanga Bayuda, asengaki epai ya Pilato ndingisa ya kokitisa nzoto ya Yesu longwa na ekulusu. Pilato apesaki ye ndingisa yango, mpe Jozefi akendeki mpe akitisaki nzoto ya Yesu.
Depois disto, José de Arimathea (o que era discípulo de Jesus, mas oculto, por medo dos judeus) rogou a Pilatos que lhe permitisse tirar o corpo de Jesus. E Pilatos lho permitiu. Então foi e tirou o corpo de Jesus.
39 Nikodemi oyo, na ebandeli, akendeki kotala Yesu na butu, ye mpe ayaki; amemaki bakilo pene tuku misato ya mafuta ya mire basangisa na aloe.
E foi também Nicodemos (aquele que anteriormente se dirigira de noite a Jesus), levando quase cem arratéis dum composto de mirra e aloes.
40 Bango mibale bakamataki nzoto ya Yesu mpe balingaki yango na maputa ya lino oyo, kati na yango, batiaki mafuta ya solo kitoko, ndenge ezalaki momesano ya Bayuda mpo na kokunda bibembe.
Tomaram pois o corpo de Jesus e o envolveram em lençois com as especiarias, como os judeus tem por costume preparar para o sepulcro.
41 Pene ya esika oyo babakaki Yesu na ekulusu, ezalaki na elanga moko oyo, kati na yango, ezalaki na kunda moko ya sika epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te.
E havia um horto naquele lugar onde fôra crucificado, e no horto um sepulcro novo, em que ainda ninguém havia sido posto.
42 Lokola, mpo na Bayuda, ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, batiaki Yesu kati na kunda yango, pamba te ezalaki pene.
Ali pois (por causa da preparação dos judeus, e por estar perto aquele sepulchro), puseram a Jesus.