< Yoane 18 >
1 Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.
To když pověděl Ježíš, vyšel s učedlníky svými přes potok Cedron, kdež byla zahrada; do kteréžto všel on i učedlníci jeho.
2 Yuda oyo asilaki komibongisa mpo na kokaba Yesu ayebaki esika yango malamu, pamba te Yesu azalaki kokende kuna mbala mingi elongo na bayekoli na Ye.
Věděl pak i Jidáš, zrádce jeho, to místo; nebo často chodíval tam Ježíš s učedlníky svými.
3 Boye Yuda akendeki na elanga yango mpe amemaki lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bapesaki ye. Bato yango basimbaki minda, banzete oyo ezalaki kopela moto mpe bibundeli.
Protož Jidáš pojav s sebou zástup, a od předních kněží a farizeů služebníky, přišel tam s lucernami a s pochodněmi a s zbrojí.
4 Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo esengeli kokomela Ye, akendeki kokutana na bango mpe atunaki bango: — Bozali koluka nani?
Ježíš pak věda všecko, což přijíti mělo na něj, vyšed proti nim, řekl jim: Koho hledáte?
5 Bazongisaki: — Yesu ya Nazareti. Yesu alobaki na bango: — Ezali Ngai oyo. Mpe Yuda oyo atekaki Yesu epai na bango azalaki wana elongo na bango.
Odpověděli jemu: Ježíše Nazaretského. Řekl jim Ježíš: Jáť jsem. Stál pak s nimi i Jidáš, zrádce jeho.
6 Tango Yesu alobaki na bango: « Ezali Ngai oyo, » bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele.
A jakž řekl jim: Já jsem, postoupili nazpět, a padli na zem.
7 Yesu atunaki bango lisusu: — Bozali koluka nani? Bazongisaki: — Yesu ya Nazareti.
I otázal se jich opět: Koho hledáte? A oni řekli: Ježíše Nazaretského.
8 Yesu alobaki na bango: — Nasili koloba na bino ete ezali Ngai. Soki ezali Ngai nde bozali koluka, botika bato mosusu kokende.
Odpověděl Ježíš: Pověděl jsem vám, že já jsem. Poněvadž tedy mne hledáte, nechtež těchto, ať odejdou.
9 Ezali bongo nde esengelaki kokokisama, liloba oyo Yesu alobaki: « Kati na bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. »
Aby se naplnila řeč, kterouž byl pověděl: Že které jsi mi dal, neztratil jsem z nich žádného.
10 Lokola Simona Petelo azalaki na mopanga, abimisaki yango wuta na ebombelo na yango, abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. Kombo ya mosali yango ezalaki Malikisi.
Tedy Šimon Petr, maje meč, vytrhl jej a udeřil služebníka nejvyššího kněze a uťal mu ucho jeho pravé. A bylo jméno služebníka toho Malchus.
11 Kasi Yesu alobaki na Petelo: — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai?
I řekl Ježíš Petrovi: Schovej meč svůj do pošvy. Což nemám píti kalicha, kterýž mi dal Otec?
12 Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga;
Tedy zástup a hejtman a služebníci Židovští jali Ježíše, a svázali jej.
13 bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana.
A vedli ho k Annášovi nejprve; nebo byl test Kaifášův, kterýž byl nejvyšším knězem toho léta.
14 Ezalaki mpe Kayifa wana nde apesaki Bayuda toli oyo: « Eleki malamu ete moto moko akufa mpo na bato nyonso. »
Kaifáš pak byl ten, kterýž byl radu dal Židům, že by užitečné bylo, aby člověk jeden umřel za lid.
15 Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
Šel pak za Ježíšem Šimon Petr a jiný učedlník. A ten učedlník byl znám nejvyššímu knězi, i všel s Ježíšem do síně nejvyššího kněze.
16 Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo.
Ale Petr stál u dveří vně. I vyšel ten druhý učedlník, kterýž byl znám nejvyššímu knězi, a promluvil s vrátnou, i uvedl tam Petra.
17 Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo: — Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana? Petelo azongisaki: — Nazali moyekoli na ye te.
Tedy řekla Petrovi děvečka vrátná: Nejsi-liž i ty z učedlníků člověka toho? Řekl on: Nejsem.
18 Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola.
Stáli pak tu služebníci a pacholci, kteříž oheň udělali, nebo zima bylo, i zhřívali se. A byl s nimi také i Petr, stoje tu a zhřívaje se.
19 Mokonzi ya Banganga-Nzambe apesaki Yesu mituna na tina na bayekoli na Ye mpe na tina na mateya na Ye.
Tedy nejvyšší kněz tázal se Ježíše o učedlnících jeho a o učení jeho.
20 Yesu azongiselaki ye: — Nazalaki koloba na polele penza na miso ya bato nyonso, nazalaki koteya tango nyonso kati na bandako ya mayangani mpe kati na Tempelo, epai wapi Bayuda nyonso basanganaka; nalobaki eloko moko te na nkuku.
Odpověděl jemu Ježíš: Já zjevně mluvil jsem světu, já vždycky učíval jsem v škole a v chrámě, kdežto se odevšad Židé scházejí, a tajně jsem nic nemluvil,
21 Mpo na nini ozali kotuna Ngai mituna? Tuna epai ya bato oyo bayokaki Ngai koloba. Ezali bango nde bakoki koyeba malamu makambo oyo nazalaki koloba.
Co se mne ptáš? Ptej se těch, kteříž mne slýchali, co jsem jim mluvil. Aj, tiť vědí, co jsem já mluvil.
22 Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba: — Boni! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe?
A když on to pověděl, jeden z služebníků, stoje tu, dal poliček Ježíšovi, řka: Tak-liž odpovídáš nejvyššímu knězi?
23 Yesu alobaki na ye: — Soki nalobi mabe, mabe yango ezali wapi? Kasi soki nalobi na Ngai kaka solo, mpo na nini kobeta Ngai?
Odpověděl mu Ježíš: Mluvil-li jsem zle, svědectví vydej o zlém; pakli dobře, proč mne tepeš?
24 Bongo Ana atindaki Yesu oyo azalaki kaka ya kokangama na basinga, epai ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
I poslal jej Annáš svázaného k Kaifášovi nejvyššímu knězi.
25 Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye: — Yo mpe ozali te moko kati na bayekoli na ye? Petelo awanganaki yango na koloba: — Te, nazali moyekoli na ye te.
Stál pak Šimon Petr, a zhříval se. Tedy řekli jemu: Nejsi-liž i ty z učedlníků jeho? Zapřel on a řekl: Nejsem.
26 Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki: — Boni, ngai namonaki yo te elongo na ye kati na elanga?
Dí jemu jeden z služebníků nejvyššího kněze, příbuzný toho, kterémuž Petr uťal ucho: Zdaž jsem já tebe neviděl s ním v zahradě?
27 Kasi Petelo awanganaki yango lisusu; mpe mbala moko, soso elelaki.
Tedy Petr opět zapřel. A hned kohout zazpíval.
28 Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.
I vedli Ježíše od Kaifáše do radného domu, a bylo ráno. Oni pak nevešli do radného domu, aby se neposkvrnili, ale aby jedli beránka.
29 Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango: — Bofundi moto oyo mpo na likambo nini?
Tedy vyšel k nim Pilát ven a řekl: Jakou žalobu vedete proti člověku tomuto?
30 Bazongiselaki ye: — Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo.
Odpověděli a řekli jemu: Byť tento nebyl zločinec, nedali bychom ho tobě.
31 Pilato alobaki na bango: — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino. Bayuda bazongiselaki ye: — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.
I řekl jim Pilát: Vezměte vy jej, a podle Zákona vašeho suďte ho. I řekli mu Židé: Námť nesluší zabíti žádného.
32 Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa.
Aby se řeč Ježíšova naplnila, kterouž řekl, znamenaje, kterou by smrtí měl umříti.
33 Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye: — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda?
Tedy Pilát všel opět do radného domu, i povolal Ježíše a řekl jemu: Ty-li jsi Král Židovský?
34 Yesu azongisaki: — Boni, ezali na ndenge na yo moko nde olobi yango to bato mosusu nde bayebisi yo na tina na Ngai?
Odpověděl Ježíš: Sám-li od sebe to pravíš, čili jiní tobě pověděli o mně?
35 Pilato atunaki Yesu: — Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini?
Odpověděl Pilát: Zdaliž jsem já Žid? Národ tvůj a přední kněží dali mi tebe. Co jsi učinil?
36 Yesu azongisaki: — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
Odpověděl Ježíš: Království mé není z tohoto světa. Byť z tohoto světa bylo království mé, služebníci moji bránili by mne, abych nebyl vydán Židům. Ale nyní mé království není odsud.
37 Pilato atunaki: — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi? Yesu azongisaki: — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
I řekl jemu Pilát: Tedy král jsi ty? Dí Ježíš: Ty pravíš, že já král jsem. Jáť jsem se k tomu narodil, a proto jsem na svět přišel, abych svědectví vydal pravdě. Každý, kdož jest z pravdy, slyší hlas můj.
38 Pilato atunaki Ye: — Solo ezali nini? Sima na koloba maloba wana, Pilato abimaki lisusu na libanda epai wapi Bayuda bazalaki mpe alobaki na bango: — Nazwi ye na likambo moko te ya mabe mpo ete nakatela ye etumbu ya kufa.
Dí jemu Pilát: Co jest pravda? A když to řekl, opět vyšel k Židům, a dí jim: Já na něm žádné viny nenalézám.
39 Kasi lokola ezali momesano epai na bino ete nabimisa na boloko mokangami moko, na tango ya feti ya Pasika, bozwa sik’oyo mokano. Bolingi ete natika mokonzi ya Bayuda mpo ete akoma nsomi?
Ale jest obyčej váš, abych vám propustil jednoho vězně na velikunoc. Chcete-liž tedy, ať vám propustím Krále Židovského?
40 Bango nyonso bazongisaki na koganga: — Te! Ye te! Bimisa nde Barabasi! Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.
I zkřikli opět všickni, řkouce: Ne toho, ale Barabbáše. Byl pak Barabbáš lotr.