< Yoane 17 >
1 Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki: Tata, tango ekoki; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo;
Ταῦτα ἐλάλησεν Ἰησοῦς, καὶ ἐπάρας τοὺς ὀφθαλμοὺς αὐτοῦ εἰς τὸν οὐρανὸν εἶπεν, Πάτερ, ἐλήλυθεν ἡ ὥρα· δόξασόν σου τὸν υἱόν, ἵνα ὁ υἱὸς δοξάσῃ σε·
2 pamba te opesaki Ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo opesaki Ye. (aiōnios )
καθὼς ἔδωκας αὐτῷ ἐξουσίαν πάσης σαρκός, ἵνα πᾶν ὃ δέδωκας αὐτῷ, δώσῃ αὐτοῖς ζωὴν αἰώνιον. (aiōnios )
3 Nzokande, bomoi ya seko ezali: koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki. (aiōnios )
αὕτη δέ ἐστιν ἡ αἰώνιος ζωή, ἵνα γινώσκωσιν σὲ τὸν μόνον ἀληθινὸν θεὸν καὶ ὃν ἀπέστειλας Ἰησοῦν χριστόν. (aiōnios )
4 Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.
ἐγώ σε ἐδόξασα ἐπὶ τῆς γῆς, τὸ ἔργον τελειώσας ὃ δέδωκάς μοι ἵνα ποιήσω·
5 Sik’oyo Tata, pesa Ngai lisusu nkembo oyo nazalaki na yango kuna epai Yo ozali liboso ete okela mokili.
καὶ νῦν δόξασόν με σύ πάτερ παρὰ σεαυτῷ, τῇ δόξῃ ᾗ εἶχον πρὸ τοῦ τὸν κόσμον εἶναι παρὰ σοί.
6 Namonisi nkembo na Yo epai ya bato oyo opesaki Ngai sima na Yo kolongola bango na misala ya mokili. Bazalaki bato na Yo, kasi opesaki Ngai bango; mpe batosi Liloba na Yo.
ἐφανέρωσά σου τὸ ὄνομα τοῖς ἀνθρώποις οὓς ἔδωκάς μοι ἐκ τοῦ κόσμου· σοὶ ἦσαν κἀμοὶ αὐτοὺς ἔδωκας, καὶ τὸν λόγον σου τετήρηκαν.
7 Bayebi malamu sik’oyo ete nyonso oyo opesaki Ngai ewutaki solo epai na Yo;
νῦν ἔγνωκαν ὅτι πάντα ὅσα δέδωκάς μοι, παρὰ σοῦ εἰσιν·
8 pamba te nateyaki bango maloba oyo opesaki Ngai, mpe bayambaki yango na esengo; bayebi ete nawutaki solo epai na Yo, mpe bandimi ete Yo nde otindaki Ngai.
ὅτι τὰ ῥήματα ἃ ἔδωκάς μοι, δέδωκα αὐτοῖς· καὶ αὐτοὶ ἔλαβον καὶ ἔγνωσαν ἀληθῶς ὅτι παρὰ σοῦ ἐξῆλθον, καὶ ἐπίστευσαν ὅτι σύ με ἀπέστειλας.
9 Nazali kobondela nde mpo na bango; nazali kobondela te mpo na bato ya mokili, kasi mpo na bato oyo opesaki Ngai, mpo ete bazali bato na Yo.
ἐγὼ περὶ αὐτῶν ἐρωτῶ· οὐ περὶ τοῦ κόσμου ἐρωτῶ, ἀλλὰ περὶ ὧν δέδωκάς μοι, ὅτι σοί εἰσιν·
10 Bato na Yo nyonso bazali bato na Ngai, mpe bato na Ngai nyonso bazali bato na Yo; mpe nkembo na Ngai ezali komonisama kati na bango.
καὶ τὰ ἐμὰ πάντα σά ἐστιν καὶ τὰ σὰ ἐμά· καὶ δεδόξασμαι ἐν αὐτοῖς.
11 Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko.
καὶ οὐκ ἔτι εἰμὶ ἐν τῷ κόσμῳ, καὶ οὗτοι ἐν τῷ κόσμῳ εἰσίν, κἀγὼ πρός σε ἔρχομαι. πάτερ ἅγιε, τήρησον αὐτοὺς ἐν τῷ ὀνόματί σου ᾧ δέδωκάς μοι, ἵνα ὦσιν ἓν καθὼς καὶ ἡμεῖς.
12 Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama.
ὅτε ἤμην μετ᾽ αὐτῶν ἐγὼ ἐτήρουν αὐτοὺς ἐν τῷ ὀνόματί σου ᾧ δέδωκάς μοι, καὶ ἐφύλαξα, καὶ οὐδεὶς ἐξ αὐτῶν ἀπώλετο, εἰ μὴ ὁ υἱὸς τῆς ἀπωλείας, ἵνα ἡ γραφὴ πληρωθῇ.
13 Sik’oyo, nazali koya epai na Yo; kasi nazali koloba makambo oyo tango nazali nanu kati na mokili mpo ete esengo na Ngai, oyo ezali ya kokoka, ezala kati na bango.
νῦν δὲ πρός σε ἔρχομαι, καὶ ταῦτα λαλῶ ἐν τῷ κόσμῳ, ἵνα ἔχωσιν τὴν χαρὰν τὴν ἐμὴν πεπληρωμένην ἐν ἑαυτοῖς.
14 Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.
ἐγὼ δέδωκα αὐτοῖς τὸν λόγον σου, καὶ ὁ κόσμος ἐμίσησεν αὐτούς, ὅτι οὐκ εἰσὶν ἐκ τοῦ κόσμου, καθὼς ἐγὼ οὐκ εἰμὶ ἐκ τοῦ κόσμου.
15 Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana.
οὐκ ἐρωτῶ ἵνα ἄρῃς αὐτοὺς ἐκ τοῦ κόσμου, ἀλλ᾽ ἵνα τηρήσῃς αὐτοὺς ἐκ τοῦ πονηροῦ.
16 Bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.
ἐκ τοῦ κόσμου οὐκ εἰσὶν καθὼς ἐγὼ οὐκ εἰμὶ ἐκ τοῦ κόσμου.
17 Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo.
ἁγίασον αὐτοὺς ἐν τῇ ἀληθείᾳ· ὁ λόγος ὁ σὸς ἀλήθειά ἐστιν.
18 Ndenge otindaki Ngai kati na mokili, ndenge wana mpe Ngai nazali kotinda bango.
καθὼς ἐμὲ ἀπέστειλας εἰς τὸν κόσμον, κἀγὼ ἀπέστειλα αὐτοὺς εἰς τὸν κόσμον·
19 Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo.
καὶ ὑπὲρ αὐτῶν ἐγὼ ἁγιάζω ἐμαυτόν, ἵνα ὦσιν καὶ αὐτοὶ ἡγιασμένοι ἐν ἀληθείᾳ.
20 Nazali kobondela mpo na bango kaka te, kasi mpe mpo na bato oyo bakondima Ngai na nzela ya mateya na bango,
οὐ περὶ τού των δὲ ἐρωτῶ μόνον, ἀλλὰ καὶ περὶ τῶν πιστευόντων διὰ τοῦ λόγου αὐτῶν εἰς ἐμέ·
21 mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.
ἵνα πάντες ἓν ὦσιν καθὼς σὺ πατὴρ ἐν ἐμοὶ κἀγὼ ἐν σοί, ἵνα καὶ αὐτοὶ ἐν ἡμῖν ὦσιν· ἵνα ὁ κόσμος πιστεύῃ ὅτι σύ με ἀπέστειλας.
22 Nasaleli bango ngolu ya kobika nkembo na Yo ndenge kaka osalaki mpo na Ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko:
κἀγὼ τὴν δόξαν ἣν δέδωκάς μοι δέδωκα αὐτοῖς, ἵνα ὦσιν ἓν καθὼς ἡμεῖς ἕν·
23 Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.
ἐγὼ ἐν αὐτοῖς καὶ σὺ ἐν ἐμοί, ἵνα ὦσιν τετελειωμένοι εἰς ἕν, ἵνα γινώσκῃ ὁ κόσμος ὅτι σύ με ἀπέστειλας καὶ ἠγάπησας αὐτοὺς καθὼς ἐμὲ ἠγάπησας.
24 Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.
Πατήρ, ὃ δέδωκάς μοι θέλω ἵνα ὅπου εἰμὶ ἐγὼ κἀκεῖνοι ὦσιν μετ᾽ ἐμοῦ· ἵνα θεωρῶσιν τὴν δόξαν τὴν ἐμὴν ἣν δέδωκάς μοι, ὅτι ἠγάπησάς με πρὸ καταβολῆς κόσμου.
25 Tata, Yo oyo ozali sembo, mokili eyebi Yo te; kasi Ngai nayebi Yo, mpe bato oyo bayebi ete Yo nde otindaki Ngai.
Πατὴρ δίκαιε, καὶ ὁ κόσμος σε οὐκ ἔγνω, ἐγὼ δέ σε ἔγνων, καὶ οὗτοι ἔγνωσαν ὅτι σύ με ἀπέστειλας·
26 Nalakisi bango nguya ya Kombo na Yo, mpe nakokoba kolakisa bango yango, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na Ngai ezala kati na bango, mpe Ngai nazala kati na bango.
καὶ ἐγνώρισα αὐτοῖς τὸ ὄνομά σου, καὶ γνωρίσω· ἵνα ἡ ἀγάπη ἣν ἠγάπησάς με ἐν αὐτοῖς ᾖ, κἀγὼ ἐν αὐτοῖς.