< Yoane 16 >

1 Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete bokweya te na komekama to mpo ete kondima na bino ekweya te.
These things I tell you, that you may not be discouraged.
2 Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka.
They will expel you from the synagogue; nay, the time is coming, when, whosoever kills you, will think he offers sacrifice to God.
3 Bakosala bongo mpo ete batikalaki koyeba te ezala Tata to ngai.
And these things they will do, because they know not the Father nor me.
4 Namiyebiseli bino makambo wana nyonso mpo ete, soki tango yango ekoki, bokanisa ete Ngai nasilaki koyebisa bino yango. Nayebisaki bino yango te wuta na ebandeli, mpo ete nazalaki nanu elongo na bino.
Of these things I warn you now, that when the time shall come, you may remember that I mentioned them to you. I did not, indeed, mention them at the beginning, because I was with you myself.
5 Sik’oyo, nazali kokende epai na Ye oyo atindaki Ngai, mpe moko te kati na bino azali kotuna Ngai: « Ozali kokende wapi? »
And now I go away to him who sent me; yet none of you ask me, Whither do you go?
6 Kasi mpo ete nalobi na bino bongo, mawa etondi kati na mitema na bino.
But because of those things which I have foretold you, you are overwhelmed with grief.
7 Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye.
Nevertheless, I tell you the truth; it is for your good that I depart; for if I do not depart, the Advocate will not come to you; but if I go away, I will send him to you.
8 Bongo tango akoya, akotalisa bato ya mokili na tina na lisumu, na tina na bosembo mpe na tina na kosambisama:
And when he is come, he will convince the world concerning sin, and concerning righteousness, and concerning judgment:
9 na tina na lisumu, pamba te bandimaka Ngai te;
concerning sin, because they believe not on me;
10 na tina na bosembo, pamba te nakeyi epai ya Tata, mpe bokomona Ngai lisusu te;
concerning righteousness because I go to my Father, and you see me no longer;
11 na tina na kosambisama, pamba te mokonzi ya mokili oyo asili kosambisama.
concerning judgment, because the prince of this world is judged.
12 Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi bokokoka kososola yango te sik’oyo.
I have many things still to tell you, but you can not yet bear them.
13 Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya;
But when the Spirit of Truth is come, he will conduct you into all the truth: for his words will not proceed from himself: but whatsoever he shall have heard, he will speak, and show you things to come.
14 akomonisa nkembo na Ngai, pamba te akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango.
He will glorify me: for he will take of mine and communicate to you.
15 Nyonso oyo ezali ya Tata ezali mpe ya Ngai; yango wana nalobi ete akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango.
Whatsoever is the Father's, is mine; therefore, I say that he will take of mine to communicate to you.
16 Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu.
A little while you shall not see me; a little while after, you shall see me; because I go to the Father.
17 Ndambo ya bayekoli ya Yesu bakomaki komituna: — Yesu alingi penza koyebisa biso nini na maloba oyo: « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu » mpe « nazali kokende epai ya Tata? »
Some of the disciples said among themselves, What does he mean by this; a little while you shall not see me; a little while after, you shall see me; because I go to the Father?
18 Bamitunaki lisusu: — Alingi kotalisa nini tango alobi: « Etikali mwa tango moke? » Tozali kososola te ndimbola to tina na yango.
What means this little while, of which he speaks? We do not comprehend it.
19 Wana Yesu asosolaki ete balingi kotuna Ye motuna, alobaki na bango: — Boni, bozali solo na posa ya koyeba tina ya maloba na Ngai oyo: « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu? »
Jesus perceiving that they were desirous to ask him, said to them, Do you inquire among yourselves about this that I said, A little while you shall not see me; a little while after, you shall see me?
20 Nazali koloba na bino penza ya solo: wana bino bokozala kolela mpe komitungisa, mokili ekosepela; bokozala solo na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.
Most assuredly, I say to you, you will weep and lament, but the world will rejoice: you will be sorrowful, but your sorrow shall be turned into joy.
21 Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto.
A woman in travail has sorrow, because her hour is come. But when her son is born, she remembers her anguish no longer; for joy that she has brought a man into the world.
22 Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.
So, you, at present, are in grief; but I will visit you again, and your hearts shall be joyful, and none shall rob you of your joy.
23 Na mokolo yango, bokopesa Ngai lisusu ata motuna moko te. Nazali koloba na bino penza ya solo: Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
On that day, you will put no questions to me. Most assuredly, I say to you, whatsoever you shall ask the Father, in my name, he will give you.
24 Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.
Hitherto you have asked nothing in my name; ask, and you shall receive, that your joy may be complete.
25 Nalobaki na bino makambo wana nyonso na masese; kasi tango ezali koya, tango oyo nakoloba na bino lisusu na masese te, kasi tango oyo nakoyebisa bino na polele penza makambo oyo etali Tata.
These things I have spoken to you in figures: the time approaches when I shall no more discourse to you in figures, but instruct you plainly concerning the Father.
26 Na mokolo wana, bokosenga na Kombo na Ngai. Nazali koloba na bino te ete nakosengela bino epai ya Tata.
The you will ask in my name, and I say not, that I will entreat the Father for you:
27 Ye moko Tata alingaka bino, pamba te bolingaka Ngai mpe bondimaki ete nawutaki epai na Nzambe.
for the Father himself loves you, because you have loved me, and believed that I came from God.
28 Solo, nawutaki epai ya Tata mpe nayaki kati na mokili; mpe sik’oyo, nazali kotika mokili mpe nazali kozonga epai ya Tata.
From the presence of the Father I cam into the world. Again, I leave the world, and return to the Father.
29 Bayekoli ya Yesu balobaki: — Okomi sik’oyo koloba na biso na polele mpe otiki koloba na masese!
His disciples replied, Now, indeed, you speak plainly, and without a figure.
30 Tososoli sik’oyo ete oyebi nyonso, mpe ete ozali na posa te ete bapesa Yo mituna. Mpo na yango, tondimi solo ete owutaki epai ya Nzambe.
Now we are convinced that you know all things, and need not that any should put questions to you. By this we believe that you came forth from God.
31 Yesu azongiselaki bango: — Bondimi sik’oyo?
Jesus answered, Do you now believe?
32 Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai.
Behold, the time comes, or rather is come, when you shall disperse, every one to his own, and shall leave me alone; yet I am not alone, because the Father is with me.
33 Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.
These things I have spoken to you, that in me you may have peace. In the world you will have tribulation. But take courage! I have overcome the world.

< Yoane 16 >