< Yoane 15 >

1 Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga.
Eu sou a videira verdadeira, e meu Pai é o lavrador.
2 Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka.
Toda a vara em mim, que não dá fruto, a tira; e alimpa toda o que dá fruto, para que dê mais fruto.
3 Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino.
Vós já estais limpos, pela palavra que vos tenho falado.
4 Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te.
Estai em mim, e eu em vós: como a vara de si mesma não pode dar fruto, se não estiver na videira, assim nem vós, se não estiverdes em mim.
5 Nazali nzete ya vino; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.
Eu sou a videira, vós as varas: quem está em mim, e eu nele, esse dá muito fruto; porque sem mim nada podeis fazer.
6 Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati: ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika.
Se alguém não estiver em mim, será lançado fora, como a vara, e secará; e os colhem, e os lançam no fogo, e ardem
7 Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango.
Se vós estiverdes em mim, e as minhas palavras estiverem em vós, pedireis tudo o que quizerdes, e vos será feito.
8 Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu.
Nisto é glorificado meu Pai, que deis muito fruto; e assim sereis meus discípulos.
9 Ndenge Tata alingaki Ngai, Ngai mpe nalingaki bino; boye, bowumela kati na bolingo na Ngai.
Como o Pai me amou, também eu vos amei a vós; permanecei neste meu amor.
10 Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.
Se guardardes os meus mandamentos, permanecereis no meu amor; como eu tenho guardado os mandamentos de meu Pai, e permaneço no seu amor.
11 Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka.
Tenho-vos dito estas coisas, para que o meu gozo permaneça em vós, e o vosso gozo seja cumprido.
12 Tala mobeko na Ngai: bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino.
O meu mandamento é este: Que vos ameis uns aos outros, assim como eu vos amei.
13 Bolingo oyo eleki monene ezali: kokaba bomoi mpo na balingami.
Ninguém tem maior amor do que este: de dar alguém a sua vida pelos seus amigos.
14 Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.
Vós sereis meus amigos, se fizerdes o que eu vos mando.
15 Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.
Já vos não chamarei servos, porque o servo não sabe o que faz o seu senhor, mas tenho-vos chamado amigos, porque tudo quanto ouvi de meu Pai vos tenho feito conhecer.
16 Ezali bino te bato boponaki Ngai! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
Não me escolhestes vós a mim, porém eu vos escolhi a vós, e vos constitui, para que vades e deis fruto, e o vosso fruto permaneça; para que tudo quanto em meu nome pedirdes ao Pai ele vo-lo conceda.
17 Tala mobeko na Ngai: bolinganaka bino na bino.
Isto vos mando: que vos ameis uns aos outros.
18 Solo, mokili ezali koyina bino; kasi boyeba ete eyinaki Ngai liboso na bino.
Se o mundo vos aborrece, sabei que, primeiro do que a vós, me aborreceu a mim.
19 Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino; yango wana mokili ezali koyina bino.
Se vós fosseis do mundo, o mundo amaria o que era seu, mas, porque não sois do mundo, antes eu vos escolhi do mundo, por isso o mundo vos aborrece.
20 Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino: « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.
Lembrai-vos da palavra que vos disse: Não é o servo maior do que o seu senhor. Se a mim me perseguiram, também vos perseguirão a vós; se guardaram a minha palavra, também guardarão a vossa.
21 Bakosala bino makambo wana nyonso likolo na Ngai, pamba te bayebi te Ye oyo atindaki Ngai.
Mas tudo isto vos farão por causa do meu nome; porque não conhecem aquele que me enviou.
22 Soki nayaki te mpe soki nalobaki na bango te, balingaki te komema ngambo ya lisumu; kasi sik’oyo, bakoki komilongisa te na tina na lisumu na bango.
Se eu não viera, nem lhes houvera falado, não teriam pecado, mas agora não tem desculpa do seu pecado.
23 Pamba te moto oyo ayini Ngai ayini mpe Tata na Ngai.
Aquele que me aborrece aborrece também a meu Pai.
24 Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso: Ngai mpe Tata na Ngai.
Se eu entre eles não fizesse obras, quais nenhum outro tem feito, não teriam pecado; mas agora, viram-nas e me aborreceram a mim e a meu Pai.
25 Kasi ezali mpo ete liloba oyo ekomama kati na mibeko na bango ekokisama: « Bayinaki Ngai kaka pamba. »
Mas isto é para que se cumpra a palavra que está escrita na sua lei: Aborreceram-me sem causa.
26 Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai;
Mas, quando vier o Consolador, que eu da parte do Pai vos hei de enviar, a saber, aquele espírito de verdade, que procede do Pai, ele testificará de mim.
27 bongo bino mpe bokotatola na tina na Ngai, pamba te bozali elongo na Ngai wuta na ebandeli.
E vós também testificareis, pois estivestes comigo desde o princípio.

< Yoane 15 >