< Yoane 14 >

1 Yesu alobaki: — Tika ete mitema na bino etungisama te! Bondima Nzambe mpe bondima Ngai.
Let not your heart be troubled: ye believe in God, believe also in me.
2 Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika?
In my Father’s house are many mansions; if it were not so, I would have told you; for I go to prepare a place for you.
3 Mpe, sima na Ngai kobongisa yango, nakozonga mpe nakozwa bino mpo ete bozala elongo na Ngai; mpe mpo ete bino mpe bozala na esika oyo Ngai nazali.
And if I go and prepare a place for you, I come again, and will receive you unto myself; that where I am, [there] ye may be also.
4 Boyebi nzela ya esika oyo nazali kokende.
And whither I go, ye know the way.
5 Toma alobaki na Yesu: — Te, Nkolo! Toyebi te esika oyo ozali kokende; bongo tokoyeba nzela na yango ndenge nini?
Thomas saith unto him, Lord, we know not whither thou goest; how know we the way?
6 Yesu azongiselaki ye: — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
Jesus saith unto him, I am the way, and the truth, and the life: no one cometh unto the Father, but by me.
7 Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai; mpe kobanda sik’oyo, boyebi Ye mpe bomoni Ye.
If ye had known me, ye would have known my Father also: from henceforth ye know him, and have seen him.
8 Filipo alobaki na Yesu: — Nkolo, lakisa biso Tata; tozali na posa ya eloko mosusu te.
Philip saith unto him, Lord, shew us the Father, and it sufficeth us.
9 Yesu azongiselaki ye: — Ah Filipo! Kala nyonso oyo nazalaka elongo na bino, oyebaka na yo kaka Ngai te? Moto oyo amoni Ngai amoni Tata. Bongo ndenge nini olobi: « Lakisa biso Tata? »
Jesus saith unto him, Have I been so long time with you, and dost thou not know me, Philip? he that hath seen me hath seen the Father; how sayest thou, Shew us the Father?
10 Ondimi te ete nazali kati na Tata, mpe ete Tata azali kati na Ngai? Maloba oyo nayebisaka bino, nalobaka yango te na bokonzi na Ngai moko; ezali Tata oyo azali kati na Ngai nde azali kokokisa bongo misala na Ye.
Believest thou not that I am in the Father, and the Father in me? the words that I say unto you I speak not from myself: but the Father abiding in me doeth his works.
11 Bondima Ngai: nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na Ngai. Soki te, bondima ata mpo na misala oyo bomoni Ngai kosala.
Believe me that I am in the Father, and the Father in me: or else believe me for the very works’ sake.
12 Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo andimi Ngai akosala misala oyo nazali kosala; akosala kutu misala oyo eleki minene, pamba te nazali kokende epai ya Tata.
Verily, verily, I say unto you, He that believeth on me, the works that I do shall he do also; and greater [works] than these shall he do; because I go unto the Father.
13 Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana.
And whatsoever ye shall ask in my name, that will I do, that the Father may be glorified in the Son.
14 Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango.
If ye shall ask me anything in my name, that will I do.
15 Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai.
If ye love me, ye will keep my commandments.
16 Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso, (aiōn g165)
And I will pray the Father, and he shall give you another Comforter, that he may be with you for ever, (aiōn g165)
17 Molimo ya solo, Molimo oyo mokili ekoki koyamba te mpo ete ezali komona Ye te to eyebi Ye te. Kasi bino, boyebi Ye, pamba te azali elongo na bino mpe azali kati na bino.
[even] the Spirit of truth: whom the world cannot receive; for it beholdeth him not, neither knoweth him: ye know him; for he abideth with you, and shall be in you.
18 Nakotika bino te lokola bana bitike; nakozongela bino.
I will not leave you desolate: I come unto you.
19 Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi.
Yet a little while, and the world beholdeth me no more; but ye behold me: because I live, ye shall live also.
20 Tango mokolo yango ekokoma, bokososola ete nazali kati na Tata na ngai; bokososola lisusu ete bozali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na bino.
In that day ye shall know that I am in my Father, and ye in me, and I in you.
21 Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye.
He that hath my commandments, and keepeth them, he it is that loveth me: and he that loveth me shall be loved of my Father, and I will love him, and will manifest myself unto him.
22 Yuda (Yuda Isikarioti te) atunaki Yesu: — Nkolo, mpo na nini komimonisa epai na biso, kasi epai ya mokili te?
Judas (not Iscariot) saith unto him, Lord, what is come to pass that thou wilt manifest thyself unto us, and not unto the world?
23 Yesu azongiselaki ye: — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.
Jesus answered and said unto him, If a man love me, he will keep my word: and my Father will love him, and we will come unto him, and make our abode with him.
24 Kasi moto oyo alingaka Ngai te, akobatela mpe maloba na Ngai te. Nzokande, Liloba oyo bozali koyoka ezali ya Ngai te, kasi ezali Liloba ya Tata oyo atindaki Ngai.
He that loveth me not keepeth not my words: and the word which ye hear is not mine, but the Father’s who sent me.
25 Nayebisi bino makambo oyo nyonso, wana nazali nanu elongo na bino.
These things have I spoken unto you, while [yet] abiding with you.
26 Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.
But the Comforter, [even] the Holy Spirit, whom the Father will send in my name, he shall teach you all things, and bring to your remembrance all that I said unto you.
27 Nakeyi, kasi natikeli bino kimia; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te!
Peace I leave with you; my peace I give unto you: not as the world giveth, give I unto you. Let not your heart be troubled, neither let it be fearful.
28 Boyoki Ngai koloba na bino ete nakeyi, mpe lisusu ete nakozongela bino. Soki bozalaki kolinga Ngai, bolingaki kosepela na kokende na Ngai epai ya Tata, pamba te Tata aleki Ngai na monene.
Ye heard how I said to you, I go away, and I come unto you. If ye loved me, ye would have rejoiced, because I go unto the Father: for the Father is greater than I.
29 Nayebisi bino makambo yango sik’oyo, liboso ete esalema, mpo ete bokoka kondima, na mokolo oyo ekosalema.
And now I have told you before it come to pass, that, when it is come to pass, ye may believe.
30 Kobanda sik’oyo, nakoloba na bino lisusu mingi te, pamba te mokonzi ya mokili oyo azali koya. Ezali te mpo ete azali na nguya moko te likolo na Ngai,
I will no more speak much with you, for the prince of the world cometh: and he hath nothing in me;
31 kasi ezali mpo ete mokili eyeba ete nalingaka Tata, mpe ete nazali kosala kolanda ndenge atindaki Ngai. Botelema; tolongwa awa.
but that the world may know that I love the Father, and as the Father gave me commandment, even so I do. Arise, let us go hence.

< Yoane 14 >