< Yoane 13 >

1 Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.
προ δε της εορτης του πασχα ειδως ο ιησους οτι εληλυθεν αυτου η ωρα ινα μεταβη εκ του κοσμου τουτου προς τον πατερα αγαπησας τους ιδιους τους εν τω κοσμω εις τελος ηγαπησεν αυτους
2 Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu.
και δειπνου γενομενου του διαβολου ηδη βεβληκοτος εις την καρδιαν ιουδα σιμωνος ισκαριωτου ινα αυτον παραδω
3 Yesu ayebaki ete Tata apesaki Ye bokonzi likolo ya makambo nyonso, ete awutaki epai ya Nzambe mpe ete asengelaki kozonga epai ya Nzambe;
ειδως ο ιησους οτι παντα δεδωκεν αυτω ο πατηρ εις τας χειρας και οτι απο θεου εξηλθεν και προς τον θεον υπαγει
4 atelemaki longwa na mesa, alongolaki bilamba oyo alataki, azwaki eteni moko ya elamba mpe amikangaki yango na loketo.
εγειρεται εκ του δειπνου και τιθησιν τα ιματια και λαβων λεντιον διεζωσεν εαυτον
5 Bongo, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na Ye mpe kopangusa yango na eteni ya elamba oyo amikangaki na loketo.
ειτα βαλλει υδωρ εις τον νιπτηρα και ηρξατο νιπτειν τους ποδας των μαθητων και εκμασσειν τω λεντιω ω ην διεζωσμενος
6 Tango akomaki na esika oyo Simona Petelo azalaki, Simona Petelo alobaki na Ye: — Nkolo, Yo penza osukola ngai makolo?
ερχεται ουν προς σιμωνα πετρον και λεγει αυτω εκεινος κυριε συ μου νιπτεις τους ποδας
7 Yesu azongiselaki ye: — Likambo oyo Ngai nazali kosala, yo okoki te kososola yango sik’oyo; kasi okososola yango na sima.
απεκριθη ιησους και ειπεν αυτω ο εγω ποιω συ ουκ οιδας αρτι γνωση δε μετα ταυτα
8 Kasi Petelo alobaki na Yesu: — Te! Osengeli te kosukola ngai makolo! Yesu azongiselaki ye: — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai. (aiōn g165)
λεγει αυτω πετρος ου μη νιψης τους ποδας μου εις τον αιωνα απεκριθη αυτω ο ιησους εαν μη νιψω σε ουκ εχεις μερος μετ εμου (aiōn g165)
9 Simona Petelo alobaki na Yesu: — Nkolo, lokola ekomi bongo, kosukola ngai kaka makolo te, kasi sukola ngai lisusu maboko mpe moto.
λεγει αυτω σιμων πετρος κυριε μη τους ποδας μου μονον αλλα και τας χειρας και την κεφαλην
10 Yesu alobaki na ye: — Moto oyo awuti komisukola nzoto azali penza peto; azali kaka na posa ya kosukola makolo na ye. Nzokande bino, bozali peto; kasi bino nyonso te.
λεγει αυτω ο ιησους ο λελουμενος ου χρειαν εχει η τους ποδας νιψασθαι αλλ εστιν καθαρος ολος και υμεις καθαροι εστε αλλ ουχι παντες
11 Solo, Yesu ayebaki moto oyo akoteka Ye; yango wana alobaki: « Bino nyonso bozali peto te. »
ηδει γαρ τον παραδιδοντα αυτον δια τουτο ειπεν ουχι παντες καθαροι εστε
12 Sima na Yesu kosukola bango makolo mpe kolata lisusu bilamba na Ye, avandaki lisusu na mesa mpe alobaki na bango: — Boni, bososoli tina ya likambo oyo nawuti kosala bino?
οτε ουν ενιψεν τους ποδας αυτων και ελαβεν τα ιματια αυτου αναπεσων παλιν ειπεν αυτοις γινωσκετε τι πεποιηκα υμιν
13 Ndenge bobengaka Ngai « Moteyi » mpe « Nkolo, » bolobaka na bino penza ya solo, pamba te nazali penza Moteyi mpe Nkolo.
υμεις φωνειτε με ο διδασκαλος και ο κυριος και καλως λεγετε ειμι γαρ
14 Boye soki Ngai, Moteyi mpe Nkolo na bino, nasukoli bino makolo, bosengeli, bino mpe, kosukolana makolo;
ει ουν εγω ενιψα υμων τους ποδας ο κυριος και ο διδασκαλος και υμεις οφειλετε αλληλων νιπτειν τους ποδας
15 pamba te napesi bino kaka ndakisa, mpo ete, bino mpe, bosalaka ndenge kaka Ngai nasali bino.
υποδειγμα γαρ εδωκα υμιν ινα καθως εγω εποιησα υμιν και υμεις ποιητε
16 Nazali koloba na bino penza ya solo: mowumbu aleki nkolo na ye te na bokonzi, mpe ntoma aleki motindi na ye te na bokonzi.
αμην αμην λεγω υμιν ουκ εστιν δουλος μειζων του κυριου αυτου ουδε αποστολος μειζων του πεμψαντος αυτον
17 Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.
ει ταυτα οιδατε μακαριοι εστε εαν ποιητε αυτα
18 Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama: « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai! »
ου περι παντων υμων λεγω εγω οιδα ους εξελεξαμην αλλ ινα η γραφη πληρωθη ο τρωγων μετ εμου τον αρτον επηρεν επ εμε την πτερναν αυτου
19 Namiyebiseli bino yango sik’oyo, liboso ete likambo yango esalema, mpo ete, tango likambo yango ekosalema, bondima ete nazali oyo azali.
απ αρτι λεγω υμιν προ του γενεσθαι ινα οταν γενηται πιστευσητε οτι εγω ειμι
20 Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo ayambi motindami na Ngai ayambi nde Ngai, mpe moto oyo ayambi Ngai ayambi mpe Motindi na Ngai.
αμην αμην λεγω υμιν ο λαμβανων εαν τινα πεμψω εμε λαμβανει ο δε εμε λαμβανων λαμβανει τον πεμψαντα με
21 Sima na Yesu koloba bongo, amitungisaki makasi kati na motema; alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moko kati na bino akoteka Ngai.
ταυτα ειπων ο ιησους εταραχθη τω πνευματι και εμαρτυρησεν και ειπεν αμην αμην λεγω υμιν οτι εις εξ υμων παραδωσει με
22 Bayekoli bakomaki kotalana bango na bango mpe kotunana mpo na koluka koyeba soki Yesu azalaki koloba na tina na nani.
εβλεπον ουν εις αλληλους οι μαθηται απορουμενοι περι τινος λεγει
23 Moko kati na bango, moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, avandaki pembeni ya Yesu.
ην δε ανακειμενος εις των μαθητων αυτου εν τω κολπω του ιησου ον ηγαπα ο ιησους
24 Simona Petelo afinaki ye miso mpo na kosenga na ye ete atuna Yesu soki azali koloba bongo na tina na nani.
νευει ουν τουτω σιμων πετρος πυθεσθαι τις αν ειη περι ου λεγει
25 Mbala moko, moyekoli yango alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye: — Nkolo, ezali nani?
επιπεσων δε εκεινος επι το στηθος του ιησου λεγει αυτω κυριε τις εστιν
26 Yesu azongisaki: — Ezali moto oyo nakopesa eteni oyo ya lipa sima na Ngai kozindisa yango kati na elubu. Bongo, sima na Yesu kozindisa eteni yango ya lipa kati na elubu, akamataki yango mpe apesaki yango epai ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona.
αποκρινεται ο ιησους εκεινος εστιν ω εγω βαψας το ψωμιον επιδωσω και εμβαψας το ψωμιον διδωσιν ιουδα σιμωνος ισκαριωτη
27 Tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobaki na ye: — Likambo oyo obongisi kosala, kokisa yango noki.
και μετα το ψωμιον τοτε εισηλθεν εις εκεινον ο σατανας λεγει ουν αυτω ο ιησους ο ποιεις ποιησον ταχιον
28 Kasi, kati na bato oyo bazalaki wana na mesa, moko te asosolaki tina oyo Yesu alobaki na ye bongo.
τουτο δε ουδεις εγνω των ανακειμενων προς τι ειπεν αυτω
29 Lokola ezalaki Yuda nde azalaki kobatela libenga ya mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye: « Kende kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpo na feti, » to « kende kopesa lisungi epai ya babola. »
τινες γαρ εδοκουν επει το γλωσσοκομον ειχεν ο ιουδας οτι λεγει αυτω ο ιησους αγορασον ων χρειαν εχομεν εις την εορτην η τοις πτωχοις ινα τι δω
30 Boye, tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, abimaki mbala moko. Mpe butu ekotaki.
λαβων ουν το ψωμιον εκεινος ευθεως εξηλθεν ην δε νυξ
31 Sima na Yuda kobima, Yesu alobaki: — Sik’oyo, nkembo ya Mwana na Moto emonisami, mpe Nzambe akozwa nkembo kati na Ye. [
οτε ουν εξηλθεν λεγει ο ιησους νυν εδοξασθη ο υιος του ανθρωπου και ο θεος εδοξασθη εν αυτω
32 Lokola Nzambe akozwa nkembo kati na Mwana, ]Nzambe mpe akopesa Mwana nkembo, kati na Ye moko, mpe akosala yango kala mingi te.
ει ο θεος εδοξασθη εν αυτω και ο θεος δοξασει αυτον εν εαυτω και ευθυς δοξασει αυτον
33 Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo: « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. »
τεκνια ετι μικρον μεθ υμων ειμι ζητησετε με και καθως ειπον τοις ιουδαιοις οτι οπου υπαγω εγω υμεις ου δυνασθε ελθειν και υμιν λεγω αρτι
34 Nazali kopesa bino mobeko ya sika: Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino.
εντολην καινην διδωμι υμιν ινα αγαπατε αλληλους καθως ηγαπησα υμας ινα και υμεις αγαπατε αλληλους
35 Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.
εν τουτω γνωσονται παντες οτι εμοι μαθηται εστε εαν αγαπην εχητε εν αλληλοις
36 Simona Petelo atunaki Yesu: — Nkolo, ozali kokende wapi? Yesu azongiselaki ye: — Okoki te kolanda Ngai sik’oyo na esika oyo nazali kokende; okolanda Ngai sima.
λεγει αυτω σιμων πετρος κυριε που υπαγεις απεκριθη αυτω ο ιησους οπου υπαγω ου δυνασαι μοι νυν ακολουθησαι υστερον δε ακολουθησεις μοι
37 Petelo atunaki lisusu: — Nkolo, mpo na nini nakoki te kolanda Yo sik’oyo? Nabongami kokufa mpo na Yo.
λεγει αυτω ο πετρος κυριε διατι ου δυναμαι σοι ακολουθησαι αρτι την ψυχην μου υπερ σου θησω
38 Yesu azongiselaki ye: — Obongami penza kokufa mpo na Ngai! Nazali koloba na yo penza ya solo: liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
απεκριθη αυτω ο ιησους την ψυχην σου υπερ εμου θησεις αμην αμην λεγω σοι ου μη αλεκτωρ φωνησει εως ου απαρνηση με τρις

< Yoane 13 >