< Yoane 12 >

1 Wana etikalaki mikolo motoba mpo ete Pasika ebanda, Yesu akendeki na Betani epai wapi Lazare, oyo asekwisaki kati na bakufi, azalaki kovanda.
Six days before the passover, Jesus came to Bethany, where Lazarus was, whom he had raised from the dead.
2 Kuna, balambaki bilei mpo na Yesu; mpe wana Marte azalaki kobongisa mesa, Lazare azalaki moko kati na bato oyo bavandaki na mesa elongo na Yesu.
There they made him a supper, and Martha served: but Lazarus was one of those who were at table with him.
3 Mari akamataki ndambo ya litele ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi, asopaki yango na makolo ya Yesu mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo yango. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi yango.
Then Mary, taking a pound of the balsam of spikenard, which was very valuable, anointed the feet of Jesus, and wiped them with her hair, so that the house was filled with the odor of the balsam.
4 Bongo moko kati na bayekoli ya Yesu, Yuda Isikarioti, ye oyo akoteka Ye, alobaki:
On which, one of his disciples, Judas Iscariot, Simon's son, who was to betray him, said,
5 — Mpo na nini bateki te malasi oyo na motuya ya mbongo ya bibende nkama misato mpo na kopesa yango epai ya babola?
Why was not this balsam sold for three hundred denarii, which might have been given to the poor?
6 Yuda Isikarioti alobaki bongo mpo ete azalaki moyibi; ezalaki te mpo ete azalaki na makanisi ya kosunga babola. Bongo lokola azalaki mpe kobatela libenga ya mbongo ya lisanga, azalaki tango nyonso koyiba mbongo.
This he said, not that he cared for the poor, but because he was a thief, and had the purse, and carried what was put in it.
7 Kasi Yesu alobaki: — Tika ye kimia! Abombi malasi yango mpo na mokolo oyo bakokunda Ngai.
Then Jesus said, Let her alone. She has reserved this to embalm me, against the day of my burial.
8 Bokozalaka na babola tango nyonso; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
For you will always have the poor among you; but me you will not always have.
9 Lokola Bayuda mingi bayokaki ete Yesu azali na Betani, bakendeki kuna; bakendeki kaka te mpo na Yesu, kasi mpe mpo na kotala Lazare oyo Yesu asekwisaki kati na bakufi.
A great number of the Jews, knowing where he was, flocked thither, not on account of Jesus only, but likewise to see Lazarus, whom he had raised from the dead.
10 Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe basalaki mabongisi mpo na koboma mpe Lazare;
The chief priests, therefore, determined to kill Lazarus also;
11 pamba te likolo na ye, Bayuda ebele bazalaki kokabwana na Banganga-Nzambe mpo na kondima Yesu.
because he proved the occasion that many Jews forsook them, and believed on Jesus.
12 Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi.
On the next day, a great multitude, who were come to the festival, hearing that Jesus was on the road to Jerusalem,
13 Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu; bazalaki koganga: « Ozana! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo, Mokonzi ya Isalaele! »
took branches of palm trees, and went out to meet him, crying, Hosanna! blessed be Israel's King, who comes in the name of the Lord.
14 Yesu amonaki mwana moko ya ane mpe avandaki na likolo na yango kolanda ndenge ekomama:
Now Jesus having found a young ass, was riding on it, agreeably to what is written,
15 « Siona, engumba kitoko, kobanga te! Tala, mokonzi na yo azali koya, avandi na likolo ya mwana ya ane! »
"Fear not, daughter of Zion; behold your King comes, sitting on an ass's colt."
16 Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.
These things the disciples did not understand, at first; but after Jesus was glorified, they remembered that thus it had been written concerning him, and that thus they had done to him.
17 Bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yesu tango abengaki Lazare ete abima na kunda mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki.
And the people who had been present, attested that he had called Lazarus out of the tomb, and raised him from the dead.
18 Yango wana ebele ya bato bakendeki koyamba Yesu mpo ete bayokaki ete Ye nde asalaki likamwisi yango.
It was the rumor that he had wrought this miracle, which made the people crowd to meet him.
19 Bongo Bafarizeo balobanaki bango na bango: — Bomoni, bokokoka lisusu eloko moko te; bato nyonso bakomi na bango kolanda ye!
The Pharisees, therefore, said among themselves, Are you not sensible that you have no influence? Behold the world is gone after him.
20 Kati na bato oyo bayaki na feti, na Yelusalemi, mpo na kogumbamela Nzambe, ezalaki na ndambo ya Bagreki.
Now, among those who came to worship at the festival, there were some Greeks.
21 Bakendeki epai ya Filipo, moto ya mboka Betisaida ya Galile, mpe batalisaki ye bosenga oyo: — Tata, tolingi komona Yesu.
These applied to Philip, of Bethsaida, in Galilee, making this request, Sir, we wish to see Jesus.
22 Filipo akendeki koyebisa Andre; bongo bango mibale, Andre mpe Filipo, bakendeki koyebisa Yesu.
Philip went and told Andrew; then Andrew and Philip told Jesus.
23 Yesu azongiselaki bango: — Sik’oyo, ngonga ekoki, ngonga oyo Mwana na Moto asengeli kokota kati na nkembo na Ye.
Jesus answered them, saying, The time is come, when the Son of Man must be glorified.
24 Nazali koloba na bino penza ya solo: soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele.
Most assuredly, I say to you, when a grain of wheat is thrown into the ground, unless it die, it remains single; but if it die, it becomes very fruitful.
25 Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko. (aiōnios g166)
He who loves his life shall lose it; and he who hates his life in this world, shall preserve it eternally in the next. (aiōnios g166)
26 Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.
Would any man serve me? let him follow me; and where I am, there shall my servant also be. If any man serve me, my Father will reward him.
27 Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami! Naloba nini? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo!
Now is my soul troubled, and what shall I say? Father, save me from this hour? But I came on purpose for this hour.
28 Tata, pesa Kombo na Yo nkembo! Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo: — Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo!
Father, glorify thy name. Then came a voice out of heaven, which said, I have both glorified, and will again glorify it.
29 Bato oyo bazalaki wana mpe bayokaki mongongo yango balobaki: — Ezali kake! Bato mosusu balobaki: — Anjelu moko asololi na ye!
The people present heard the sound, and said, It thundered: others said, An angel spoke to him.
30 Kasi Yesu alobaki na bango: — Mongongo wana eyokani te mpo na Ngai, kasi mpo na bino.
Jesus said, This voice came not for my sake, but for yours.
31 Kosambisama ya mokili elingi kosalema nde sik’oyo; mokonzi ya mokili oyo akobwakama sik’oyo na libanda.
Now must this world be judged. Now must the prince of this world be cast out.
32 Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai.
As for me, when I shall be lifted up from the earth, I will draw all men to myself.
33 Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengeli kokufa.
This he said, alluding to the death which he was to suffer.
34 Bato bazongiselaki Ye: — Mibeko ezali kolakisa biso ete Klisto asengeli kozala na bomoi seko na seko. Bongo ndenge nini yo olobi na biso: « Mwana na Moto asengeli kotombolama? » Nani nde Mwana na Moto? (aiōn g165)
The people answered, We have learned from the law, that the Messiah will live forever. How do you say, then, that the Son of Man must be lifted up? Who is this Son of Man? (aiōn g165)
35 Yesu alobaki na bango: — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.
Jesus said to them, Yet a little while the light continues with you; walk, while you have it, lest darkness overtake you: for he that walks in darkness knows not whither he goes.
36 Boye wana bozali nanu na pole, bondima pole mpo ete bokoma bana ya pole. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, akendeki mpe amibombaki mosika na bango.
Confide in the light, while you enjoy it, that you may be sons of light. Having spoken these words, he withdrew himself privately from them.
37 Atako Yesu asalaki bikamwa ebele na miso na bango, kasi bandimaki Ye kaka te
But, though he had performed so many miracles before them, they believed not on him;
38 mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama: « Nkolo, nani andimaki mateya na biso? Mpe nguya na Yo emonisamaki epai ya nani? »
so that the word of the Prophet Isaiah was verified, "Lord, who has believed out report?" and, "To whom is the arm of the Lord revealed?"
39 Ezali lisusu Ezayi nde alobaki tina oyo bakokaki kondima te:
For this reason they could not believe; Isaiah having said, also,
40 « Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »
"He has blinded their eyes, and blunted their understanding, that they might not see with their eyes, comprehend with their understanding, and be converted, that I might heal them."
41 Ezayi alobaki bongo mpo ete amonaki Nkembo ya Yesu mpe azalaki koloba na tina na Ye.
These things said Isaiah, when he saw his glory, and spoke concerning him.
42 Nzokande, kati na bakonzi ya Bayuda, mingi bandimaki Ye; kasi balakisaki te kondima na bango na polele, pamba te bazalaki kobanga ete Bafarizeo babengana bango na ndako ya mayangani,
Nevertheless, there were several, even of the magistrates, who believed on him; but, for fear of the Pharisees, did not avow it, lest they should be expelled the synagogue;
43 pamba te bazalaki kolinga mingi kozwa lokumu kowuta na bato, kasi lokumu kowuta na Nzambe te.
for they preferred approbation of men to the approbation of God.
44 Bongo Yesu alobaki na mongongo ya makasi: — Moto oyo andimi Ngai, andimi kaka Ngai te, kasi andimi mpe Ye oyo atindaki Ngai;
Then Jesus, raising his voice, said, He who believes on me, believes not on me only; but on him who sent me.
45 mpe moto oyo amoni Ngai, amoni mpe Ye oyo atindaki Ngai.
And he who beholds me, beholds him who sent me.
46 Ngai, pole, nayaki kati na mokili mpo ete moto nyonso oyo akondima Ngai azala lisusu te kati na molili.
I am come a light into the world, that whosoever believes on me, may not remain in darkness.
47 Soki moto ayoki maloba na Ngai, kasi aboyi kotia yango na misala, Ngai, nakosambisa ye te; pamba te nayaki te mpo na kosambisa mokili, kasi mpo na kobikisa yango.
And if any man hear my words, but do not observe them; it is not I, who condemn him; for I came, not to condemn the world, but to save the world.
48 Moto oyo aboyi Ngai mpe ayambi te maloba na Ngai azali na mosambisi na ye: ezali liloba oyo nateyi nde ekosambisa ye, na mokolo ya suka.
He who despises me, and rejects my instructions, has that which condemns him. The doctrine which I have taught will condemn him at the last day.
49 Pamba te nalobaki na Kombo na Ngai moko te; kasi Ye moko Tata oyo atindaki Ngai apesaki Ngai, lokola mitindo, makambo oyo nasengeli koloba mpe koteya.
For I have not said anything from myself; but the Father who sent me, has commanded me what I should enjoin, and what I should teach.
50 Nzokande, nayebi malamu ete mitindo na Ye epesaka bomoi ya seko; yango wana nazali koloba makambo oyo, ndenge kaka Tata ayebisaki Ngai yango. (aiōnios g166)
And I know, that his commandment is eternal life. Whatever, therefore, I say, I speak as the Father has given me in charge. (aiōnios g166)

< Yoane 12 >