< Yoane 11 >

1 Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale: Mari mpe Marte.
어떤 병든 자가 있으니 이는 마리아와 그 형제 마르다의 촌 베다니에 사는 나사로라
2 Mari azali mwasi oyo asopelaki Nkolo malasi mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo ya Yesu, mpe Lazare oyo azali kobela azali ndeko na ye ya mobali.
이 마리아는 향유를 주께 붓고 머리털로 주의 발을 씻기던 자요 병든 나사로는 그의 오라비러라
3 Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu: — Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.
이에 그 누이들이 예수께 사람을 보내어 가로되 `주여, 보시옵소서 사랑하시는 자가 병들었나이다' 하니
4 Tango Yesu ayokaki yango, alobaki: — Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.
예수께서 들으시고 가라사대 `이 병은 죽을 병이 아니라 하나님의 영광을 위함이요 하나님의 아들로 이를 인하여 영광을 얻게 하려 함이라' 하시더라
5 Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare.
예수께서 본래 마르다와 그 동생과 나사로를 사랑하시더니
6 Atako ayokaki ete Lazare azali kobela, kasi avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki.
나사로가 병들었다 함을 들으시고 그 계시던 곳에 이틀을 더 유하시고
7 Bongo alobaki na bayekoli na Ye: — Tosengeli sik’oyo kozonga na Yuda.
그 후에 제자들에게 이르시되 `유대로 다시 가자' 하시니
8 Bayekoli balobaki na Ye: — Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna?
제자들이 말하되 `랍비여 방금도 유대인들이 돌로 치려 하였는데 또 그리로 가시려 하나이까?'
9 Yesu azongisaki: — Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo.
예수께서 대답하시되 `낮이 열 두시가 아니냐? 사람이 낮에 다니면 이 세상의 빛을 보므로 실족하지 아니하고
10 Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.
밤에 다니면 빛이 그 사람 안에 없는고로 실족하느니라'
11 Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu: — Molingami na biso, Lazare, alali pongi; kasi nazali kokende kolamusa ye.
이 말씀을 하신 후에 또 가라사대 `우리 친구 나사로가 잠들었도다 그러나 내가 깨우러 가노라'
12 Bayekoli balobaki na Yesu: — Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika na bokono na ye!
제자들이 가로되 `주여, 잠들었으면 낫겠나이다' 하더라
13 Solo, Yesu alingaki koloba ete Lazare akufi, kasi bayekoli bakanisaki ete azali kolobela nde pongi oyo tolalaka.
예수는 그의 죽음을 가리켜 말씀하신 것이나 저희는 잠들어 쉬는 것을 가리켜 말씀하심인줄 생각하는지라
14 Bongo Yesu alobaki na bango na polele: — Lazare akufi.
이에 예수께서 밝히 이르시되 `나사로가 죽었느니라
15 Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye.
내가 거기 있지 아니한 것을 너희를 위하여 기뻐하노니 이는 너희로 믿게 하려 함이라 그러나 그에게로 가자' 하신대
16 Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa, » alobaki na bayekoli mosusu: — Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu!
디두모라 하는 도마가 다른 제자들에게 말하되 `우리도 주와 함께 죽으러 가자' 하니라
17 Tango Yesu akomaki, ayokaki ete basilaki kokunda Lazare kati na kunda wuta mikolo minei.
예수께서 와서 보시니 나사로가 무덤에 있은 지 이미 나흘이라
18 Mpe lokola Betani ezalaki mosika ya Yelusalemi na bakilometele pene misato,
베다니는 예루살렘에서 가깝기가 한 오 리쯤 되매
19 Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.
많은 유대인이 마르다와 마리아에게 그 오라비의 일로 위문하러 왔더니
20 Tango Marte ayokaki ete Yesu azali koya, akendeki kokutana na Ye; kasi Mari atikalaki ya kovanda kati na ndako.
마르다는 예수 오신다는 말을 듣고 나가 맞되 마리아는 집에 앉았더라
21 Marte alobaki na Yesu: — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te!
마르다가 예수께 여짜오되 `주께서 여기 계셨더면 내 오라비가 죽지 아니하였겠나이다
22 Kasi nazali na kondima ete, ata sik’oyo, Nzambe akopesa Yo nyonso oyo okosenga Ye.
그러나 나는 이제라도 주께서 무엇이든지 하나님께 구하시는 것을 하나님이 주실 줄을 아나이다'
23 Yesu alobaki na ye: — Ndeko na yo akosekwa.
예수께서 가라사대 `네 오라비가 다시 살리라'
24 Marte azongiselaki Yesu: — Nayebi solo ete akosekwa, na mokolo ya suka, na tango bakufi bakosekwa.
마르다가 가로되 `마지막 날 부활에는 다시 살 줄을 내가 아나이다'
25 Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.
예수께서 가라사대 `나는 부활이요 생명이니 나를 믿는 자는 죽어도 살겠고
26 Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango? (aiōn g165)
무릇 살아서 나를 믿는 자는 영원히 죽지 아니하리니 이것을 네가 믿느냐?' (aiōn g165)
27 Marte azongisaki: — Iyo, Nkolo! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.
가로되 `주여, 그러하외다 주는 그리스도시요 세상에 오시는 하나님의 아들이신 줄 내가 믿나이다'
28 Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza: — Moteyi ayei, azali kobenga yo.
이 말을 하고 돌아가서 가만히 그 형제 마리아를 불러 말하되 선생님이 오셔서 너를 부르신다 하니
29 Tango kaka Mari ayokaki bongo, atelemaki na lombangu mpe akendeki epai ya Yesu.
마리아가 이 말을 듣고 급히 일어나 예수께 나아가매
30 Nzokande, Yesu akotaki nanu te na mboka; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na Ye.
예수는 아직 마을로 들어오지 아니하시고 마르다의 맞던 곳에 그저 계시더라
31 Tango Bayuda oyo bazalaki elongo na Mari kati na ndako mpo na kokabola mawa elongo na ye, bamonaki Mari kotelema na lombangu mpe kobima libanda, balandaki ye, pamba te bakanisaki ete akei kolela na kunda.
마리아와 함께 집에 있어 위로하던 유대인들은 그의 급히 일어나 나가는 것을 보고 곡하러 무덤에 가는 줄로 생각하고 따라가더니
32 Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki: — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te!
마리아가 예수 계신 곳에 와서 보이고 그 발 앞에 엎드리어 가로되 `주께서 여기 계셨더면 내 오라비가 죽지 아니하였겠나이다' 하더라
33 Tango Yesu amonaki Mari mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki mawa makasi mpe amitungisaki.
예수께서 그의 우는 것과 또 함께 온 유대인들의 우는 것을 보시고 심령에 통분히 여기시고 민망히 여기사
34 Atunaki bango: — Bokundaki ye wapi? Bazongisaki: — Nkolo, yaka kotala.
가라사대 `그를 어디 두었느냐?' 가로되 `주여, 와서 보옵소서' 하니
35 Yesu alelaki.
예수께서 눈물을 흘리시더라
36 Bongo Bayuda balobaki: — Tala ndenge nini alingaki ye!
이에 유대인들이 말하되 `보라 그를 어떻게 사랑하였는가?' 하며
37 Kasi bamosusu kati na bango balobaki: — Ezali ye te oyo abikisaki mokufi miso? Bongo ndenge nini akokaki te kosala ete Lazare akufa te?
그 중 어떤 이는 말하되 `소경의 눈을 뜨게 한 이 사람이 그 사람은 죽지 않게 할 수 없었더냐?' 하더라
38 Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene.
이에 예수께서 다시 속으로 통분히 여기시며 무덤에 가시니 무덤이 굴이라 돌로 막았거늘
39 Yesu alobaki na bango: — Botindika libanga. Kasi Marte, ndeko ya mowei, alobaki na Yesu: — Nkolo, azali kolumba solo! Wuta bakundaki ye, esali mikolo minei.
예수께서 가라사대 `돌을 옮겨 놓으라' 하시니 그 죽은 자의 누이 마르다가 가로되 `주여, 죽은 지가 나흘이 되었으매 벌써 냄새가 나나이다'
40 Yesu alobaki na ye: — Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe?
예수께서 가라사대 `내 말이 네가 믿으면 하나님의 영광을 보리라 하지 아니하였느냐?' 하신대
41 Boye batindikaki libanga. Bongo Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki: « Tata, nazali kotonda Yo mpo ete oyoki Ngai.
돌을 옮겨 놓으니 예수께서 눈을 들어 우러러 보시고 가라사대 아버지여 내 말을 들으신 것을 감사하나이다
42 Nayebaki ete oyokaka Ngai tango nyonso; kasi soki nalobi bongo, ezali mpo ete bato oyo bazali zingazinga na Ngai bandima ete Yo nde otindaki Ngai. »
항상 내 말을 들으시는 줄을 내가 알았나이다 그러나 이 말씀 하옵는 것은 둘러선 무리를 위함이니 곧 아버지께서 나를 보내신 것을 저희로 믿게 하려 함이니이다'
43 Sima na Yesu koloba bongo, agangaki: — Lazare, bima!
이 말씀을 하시고 큰 소리로 `나사로야 나오라!' 부르시니
44 Mpe mowei abimaki longwa na kunda; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na elamba. Bongo Yesu alobaki na bato oyo bazalaki wana: — Bofungola ye basinga wana mpe botika ye kokende.
죽은 자가 수족을 베로 동인 채로 나오는데 그 얼굴은 수건에 싸였더라 예수께서 가라사대 `풀어 놓아 다니게 하라' 하시니라
45 Kati na Bayuda oyo bayaki epai ya Mari, mingi kati na bango bandimaki Yesu tango bamonaki makambo oyo asalaki;
마리아에게 와서 예수의 하신 일을 본 많은 유대인이 저를 믿었으나
46 kasi bamosusu bakendeki kokuta Bafarizeo mpo na koyebisa bango makambo yango, oyo Yesu asalaki.
그 중에 어떤 자는 바리새인들에게 가서 예수의 하신 일을 고하니라
47 Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo babengisaki Likita-Monene mpe batunanaki: — Tosala nini? Moto oyo azali kosala bikamwa mingi.
이에 대제사장들과 바리새인들이 공회를 모으고 가로되 `이 사람이 많은 표적을 행하니 우리가 어떻게 하겠느냐?
48 Soki totiki ye kokoba kosala bongo, bato nyonso bakondima ye; bongo bato ya Rome bakoya bakobebisa Tempelo na biso mpe ekolo na biso.
만일 저를 이대로 두면 모든 사람이 저를 믿을 것이요 그리고 로마인들이 와서 우리 땅과 민족을 빼앗아 가리라' 하니
49 Moko kati na bango, Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, alobaki na bango:
그 중에 한 사람 그 해 대제사장인 가야바가 저희에게 말하되 `너희가 아무 것도 알지 못하는도다
50 — Bozali kososola eloko moko te; bozali mpe komona te ete ezali mpo na bolamu na bino soki moto moko akufi mpo na bato nyonso, mpo ete ekolo mobimba ebebisama te?
한 사람이 백성을 위하여 죽어서 온 민족이 망하지 않게 되는 것이 너희에게 유익한 줄을 생각지 아니하는도다' 하였으니
51 Nzokande, makambo oyo azalaki koloba na bango ewutaki na makanisi na ye moko te; kasi lokola azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, yango wana asakolaki ete Yesu asengelaki kokufa mpo na ekolo ya Bayuda.
이 말은 스스로 함이 아니요 그 해에 대제사장이므로 예수께서 그 민족을 위하시고
52 Mpe asengelaki kokufa kaka mpo na ekolo yango te, kasi mpe mpo na kosangisa kati na libota moko, bana nyonso ya Nzambe, oyo bapalangana bipai na bipai.
또 그 민족만 위할 뿐 아니라 흩어진 하나님의 자녀를 모아 하나가 되게 하기 위하여 죽으실 것을 미리 말함이러라
53 Ezali na mokolo wana nde bazwaki mokano ya koboma Yesu.
이날부터는 저희가 예수를 죽이려고 모의하니라
54 Na bongo, Yesu atikaki komilakisa na polele kati na Bayuda; alongwaki wana mpe akendeki na etuka oyo ezalaki pene ya esobe, kati na engumba moko na kombo Efrayimi; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.
그러므로 예수께서 다시 유대인 가운데 드러나게 다니지 아니하시고 여기를 떠나 빈 들 가까운 곳인 에브라임이라는 동리에 가서 제자들과 함께 거기 유하시니라
55 Kasi lokola feti ya Pasika ya Bayuda ekomaki pene, bato mingi ya mboka bakendeki na Yelusalemi mpo na komipetola liboso ya feti yango.
유대인의 유월절이 가까우매 많은 사람이 자기를 성결케 하기 위하여 유월절 전에 시골서 예루살렘으로 올라갔더니
56 Bazalaki koluka Yesu mpe kotunana bango na bango kati na lopango ya Tempelo: — Bokanisi nini? Akoya penza na feti?
저희가 예수를 찾으며 성전에 서서 서로 말하되 `너희 생각에는 어떠하뇨? 저가 명절에 오지 아니하겠느냐?' 하니
57 Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basilaki kopesa mitindo ete moto nyonso oyo akoyeba esika oyo Yesu azali, ayebisa bango mpo ete bakanga ye.
이는 대제사장들과 바리새인들이 누구든지 예수 있는 곳을 알거든 고하여 잡게 하라 명령하였음이러라

< Yoane 11 >