< Yoane 10 >
1 Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo akotaka na lopango ya bameme na nzela ya ekuke te, kasi amataka na likolo ya lopango, na esika mosusu, azali moyibi mpe mobomi.
「我實實在在地告訴你們,人進羊圈,不從門進去,倒從別處爬進去,那人就是賊,就是強盜。
2 Kasi ye oyo akotelaka na ekuke azali mobateli bameme.
從門進去的,才是羊的牧人。
3 Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda.
看門的就給他開門;羊也聽他的聲音。他按着名叫自己的羊,把羊領出來。
4 Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na yango; mpe bameme elandaka ye na sima, pamba te eyebi mongongo na ye.
既放出自己的羊來,就在前頭走,羊也跟着他,因為認得他的聲音。
5 Ekotikala ata mokolo moko te kolanda mopaya; kasi ekokima ye mosika, pamba te eyebi mongongo na ye te.
羊不跟着生人;因為不認得他的聲音, 必要逃跑。」
6 Yesu ayebisaki bango lisese yango, kasi basosolaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango.
耶穌將這比喻告訴他們,但他們不明白所說的是甚麼意思。
7 Mpo na yango, Yesu alobaki na bango lisusu: — Nazali koloba na bino penza ya solo: Ngai nazali ekuke ya bameme.
所以,耶穌又對他們說:「我實實在在地告訴你們,我就是羊的門。
8 Bato nyonso oyo bayaki liboso na Ngai bazali miyibi mpe babomi; bameme eyokelaki bango te.
凡在我以先來的都是賊,是強盜;羊卻不聽他們。
9 Ngai nde nazali ekuke; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.
我就是門;凡從我進來的,必然得救,並且出入得草吃。
10 Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.
盜賊來,無非要偷竊,殺害,毀壞;我來了,是要叫羊得生命,並且得的更豐盛。
11 Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye.
我是好牧人;好牧人為羊捨命。
12 Mosali oyo azali mobateli bibwele te, oyo azali nkolo bameme te, asalaka kaka mpo na lifuti. Soki kaka amoni mbwa ya zamba koya, asundolaka bameme mpe akimaka. Bongo mbwa ya zamba ekangaka bameme mpe epanzaka yango.
若是雇工,不是牧人,羊也不是他自己的,他看見狼來,就撇下羊逃走;狼抓住羊,趕散了羊群。
13 Mosali yango akimaka, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti mpe atiaka makanisi na ye na bameme te.
雇工逃走,因他是雇工,並不顧念羊。
14 Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai
我是好牧人;我認識我的羊,我的羊也認識我,
15 —ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai.
正如父認識我,我也認識父一樣;並且我為羊捨命。
16 Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Nasengeli komema yango; ekoyoka mongongo na Ngai. Etonga ekozala kaka moko, mpe mobateli bibwele akozala kaka moko.
我另外有羊,不是這圈裏的;我必須領他們來,他們也要聽我的聲音,並且要合成一群,歸一個牧人了。
17 Tata alingaka Ngai mpo ete nazali kokaba bomoi na Ngai; kasi nakozwa yango lisusu.
我父愛我;因我將命捨去,好再取回來。
18 Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai.
沒有人奪我的命去,是我自己捨的。我有權柄捨了,也有權柄取回來。這是我從我父所受的命令。」
19 Bayuda bakabwanaki lisusu likolo ya maloba yango.
猶太人為這些話又起了紛爭。
20 Mingi kati na bango bazalaki koloba: — Azali na molimo mabe! Azali na liboma! Mpo na nini bozali koyoka ye?
內中有好些人說:「他是被鬼附着,而且瘋了,為甚麼聽他呢?」
21 Bamosusu bazalaki kozongisa: — Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso?
又有人說:「這不是鬼附之人所說的話。鬼豈能叫瞎子的眼睛開了呢?」
22 Ekomaki tango ya kosepela feti ya Kobulisa Tempelo ya Yelusalemi. Feti yango esalemaki na tango ya malili makasi.
在耶路撒冷有修殿節,是冬天的時候。
23 Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, na veranda ya Salomo.
耶穌在殿裏所羅門的廊下行走。
24 Bayuda bazingelaki Ye mpe batunaki Ye: — Kino tango nini okotika mitema na biso likolo-likolo? Soki ozali Klisto, yebisa biso yango polele!
猶太人圍着他,說:「你叫我們猶疑不定到幾時呢?你若是基督,就明明地告訴我們。」
25 Yesu azongiselaki bango: — Nayebisaki bino yango, kasi boboyi na bino kondima. Makamwisi oyo nazali kosala na Kombo ya Tata ezali kotatola na tina na Ngai;
耶穌回答說:「我已經告訴你們,你們不信。我奉我父之名所行的事可以為我作見證;
26 kasi bino, boboyi na bino kondima, pamba te bozali bameme na Ngai te.
只是你們不信,因為你們不是我的羊。
27 Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai.
我的羊聽我的聲音,我也認識他們,他們也跟着我。
28 Napesi yango bomoi ya seko: ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai. (aiōn , aiōnios )
我又賜給他們永生;他們永不滅亡,誰也不能從我手裏把他們奪去。 (aiōn , aiōnios )
29 Tata na Ngai, oyo apesaki Ngai bameme yango, aleki bato nyonso na monene, mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na Ngai.
我父把羊賜給我,他比萬有都大,誰也不能從我父手裏把他們奪去。
30 Ngai mpe Tata tozali se moko.
我與父原為一。」
31 Na bongo, Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma Ye,
猶太人又拿起石頭來要打他。
32 kasi Yesu alobaki na bango: — Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga?
耶穌對他們說:「我從父顯出許多善事給你們看,你們是為哪一件拿石頭打我呢?」
33 Bayuda bazongiselaki Ye: — Ezali te mpo na likamwisi moko boye ya malamu nde tolingi koboma yo, kasi ezali mpo ete ozali kofinga Nzambe. Lisusu, ezali mpo ete, yo oyo ozali moto, ozali koloba ete ozali Nzambe.
猶太人回答說:「我們不是為善事拿石頭打你,是為你說僭妄的話;又為你是個人,反將自己當作上帝。」
34 Yesu alobaki na bango: — Ekomama te kati na mibeko na bino: « Nalobi: ‹ Bozali banzambe? › »
耶穌說:「你們的律法上豈不是寫着『我曾說你們是神』嗎?
35 Nzokande, batiaka tembe na Makomi te. Boye, soki abengaki « banzambe, » bato oyo epai banani Liloba na Nzambe eyaki,
經上的話是不能廢的;若那些承受上帝道的人尚且稱為神,
36 mpo na nini koloba na tina na Ngai oyo Tata abulisa mpe atinda kati na mokili: « Ozali kofinga, » mpo nalobaki: « Nazali Mwana na Nzambe? »
父所分別為聖、又差到世間來的,他自稱是上帝的兒子,你們還向他說『你說僭妄的話』嗎?
37 Soki nasalaka te misala ya Tata na Ngai, wana bondima na bino Ngai te.
我若不行我父的事,你們就不必信我;
38 Kasi soki nasalaka yango, ezala soki boboyi na bino kondima Ngai, bondima ata misala yango, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na Tata.
我若行了,你們縱然不信我,也當信這些事,叫你們又知道又明白父在我裏面,我也在父裏面。」
39 Mpo na yango, balukaki lisusu kokanga Ye, kasi Yesu akimaki bango.
他們又要拿他,他卻逃出他們的手走了。
40 Akendeki lisusu na ngambo mosusu ya Yordani, kaka na esika oyo Yoane azalaki kobatisa bato, mpe atikalaki kuna.
耶穌又往約旦河外去,到了約翰起初施洗的地方,就住在那裏。
41 Bato mingi penza bayaki epai na Ye; bazalaki koloba: « Yoane asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo alobaki na tina na moto oyo ezali ya solo! »
有許多人來到他那裏。他們說:「約翰一件神蹟沒有行過,但約翰指着這人所說的一切話都是真的。」
42 Mpe kuna, bato mingi bandimaki Yesu.
在那裏,信耶穌的人就多了。