< Joeli 1 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Joeli, mwana mobali ya Petueli:
λόγος κυρίου ὃς ἐγενήθη πρὸς Ιωηλ τὸν τοῦ Βαθουηλ
2 — Bino bakambi ya bato, boyoka liloba oyo; bino nyonso, bavandi ya mokili, botia matoyi mpe boyoka! Boni, likambo ya boye esila kosalema na tango na bino to mpe na tango ya bakoko na bino?
ἀκούσατε δὴ ταῦτα οἱ πρεσβύτεροι καὶ ἐνωτίσασθε πάντες οἱ κατοικοῦντες τὴν γῆν εἰ γέγονεν τοιαῦτα ἐν ταῖς ἡμέραις ὑμῶν ἢ ἐν ταῖς ἡμέραις τῶν πατέρων ὑμῶν
3 Boyebisa yango epai ya bana na bino, mpe tika ete bana na bino bayebisa yango epai ya bana na bango; mpe bana na bango, na milongo ya bato oyo bakoya na sima.
ὑπὲρ αὐτῶν τοῖς τέκνοις ὑμῶν διηγήσασθε καὶ τὰ τέκνα ὑμῶν τοῖς τέκνοις αὐτῶν καὶ τὰ τέκνα αὐτῶν εἰς γενεὰν ἑτέραν
4 Matiti oyo mampinga ya mabanki etiki, mabanki minene elie yango; oyo mabanki minene etiki, mabanki mike elie yango; oyo mabanki mike etiki, mabanki mosusu elie yango.
τὰ κατάλοιπα τῆς κάμπης κατέφαγεν ἡ ἀκρίς καὶ τὰ κατάλοιπα τῆς ἀκρίδος κατέφαγεν ὁ βροῦχος καὶ τὰ κατάλοιπα τοῦ βρούχου κατέφαγεν ἡ ἐρυσίβη
5 Bino balangwi masanga, bolamuka mpe bolela; bolela, bino nyonso bameli vino. Pamba te babotoli bino vino ya sika na bibebu.
ἐκνήψατε οἱ μεθύοντες ἐξ οἴνου αὐτῶν καὶ κλαύσατε θρηνήσατε πάντες οἱ πίνοντες οἶνον εἰς μέθην ὅτι ἐξῆρται ἐκ στόματος ὑμῶν εὐφροσύνη καὶ χαρά
6 Ekolo moko ya bapaya ebundisi mokili na Ngai, ezali na nguya makasi mpe bakokoka te kotanga motango ya bato na yango. Minu na yango ezali lokola minu ya nkosi ya mobali, mpe mbanga na yango, lokola mbanga ya nkosi ya mwasi.
ὅτι ἔθνος ἀνέβη ἐπὶ τὴν γῆν μου ἰσχυρὸν καὶ ἀναρίθμητον οἱ ὀδόντες αὐτοῦ ὀδόντες λέοντος καὶ αἱ μύλαι αὐτοῦ σκύμνου
7 Ekolo yango ekomisi elanga na Ngai ya vino lokola esobe mpe ekati-kati banzete na Ngai ya figi, elongoli banzete na Ngai nyonso baposo, ebwaki yango mpe etiki bitape na yango pembe.
ἔθετο τὴν ἄμπελόν μου εἰς ἀφανισμὸν καὶ τὰς συκᾶς μου εἰς συγκλασμόν ἐρευνῶν ἐξηρεύνησεν αὐτὴν καὶ ἔρριψεν ἐλεύκανεν κλήματα αὐτῆς
8 Bosala matanga lokola elenge mwasi oyo alati pili mpo na kolela mobandami na ye.
θρήνησον πρός με ὑπὲρ νύμφην περιεζωσμένην σάκκον ἐπὶ τὸν ἄνδρα αὐτῆς τὸν παρθενικόν
9 Makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe, basali ya Nkolo, bazali na matanga.
ἐξῆρται θυσία καὶ σπονδὴ ἐξ οἴκου κυρίου πενθεῖτε οἱ ἱερεῖς οἱ λειτουργοῦντες θυσιαστηρίῳ
10 Bilanga ebebisami, mabele ekawuki, mbuma ya ble ezali lisusu te, vino esili mpe mafuta ezali lisusu te.
ὅτι τεταλαιπώρηκεν τὰ πεδία πενθείτω ἡ γῆ ὅτι τεταλαιπώρηκεν σῖτος ἐξηράνθη οἶνος ὠλιγώθη ἔλαιον
11 Bino basali bilanga, bozala na soni; bino baloni vino, bolela mpo na mbuma ya ble mpe ya orje, pamba te milona ebebisami.
ἐξηράνθησαν οἱ γεωργοί θρηνεῖτε κτήματα ὑπὲρ πυροῦ καὶ κριθῆς ὅτι ἀπόλωλεν τρυγητὸς ἐξ ἀγροῦ
12 Bilanga ya vino ekawuki, banzete ya figi elembi-lembi, banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome, banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka. Solo, esengo ya bato esili.
ἡ ἄμπελος ἐξηράνθη καὶ αἱ συκαῖ ὠλιγώθησαν ῥόα καὶ φοῖνιξ καὶ μῆλον καὶ πάντα τὰ ξύλα τοῦ ἀγροῦ ἐξηράνθησαν ὅτι ᾔσχυναν χαρὰν οἱ υἱοὶ τῶν ἀνθρώπων
13 Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.
περιζώσασθε καὶ κόπτεσθε οἱ ἱερεῖς θρηνεῖτε οἱ λειτουργοῦντες θυσιαστηρίῳ εἰσέλθατε ὑπνώσατε ἐν σάκκοις λειτουργοῦντες θεῷ ὅτι ἀπέσχηκεν ἐξ οἴκου θεοῦ ὑμῶν θυσία καὶ σπονδή
14 Bopanza sango ya kokila bilei, bobengisa bato na mayangani ya bule, bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili ete baya na Ndako ya Nzambe na bino mpe bolela epai na Yawe.
ἁγιάσατε νηστείαν κηρύξατε θεραπείαν συναγάγετε πρεσβυτέρους πάντας κατοικοῦντας γῆν εἰς οἶκον θεοῦ ὑμῶν καὶ κεκράξατε πρὸς κύριον ἐκτενῶς
15 Mawa na mokolo wana! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
οἴμμοι οἴμμοι οἴμμοι εἰς ἡμέραν ὅτι ἐγγὺς ἡμέρα κυρίου καὶ ὡς ταλαιπωρία ἐκ ταλαιπωρίας ἥξει
16 Boni, wuta na Ndako ya Nzambe mpe na miso na biso, balongoli te bilei, esengo mpe kosepela?
κατέναντι τῶν ὀφθαλμῶν ὑμῶν βρώματα ἐξωλεθρεύθη ἐξ οἴκου θεοῦ ὑμῶν εὐφροσύνη καὶ χαρά
17 Bankona ekawuki na se ya mabele, bibombelo etikali lisusu na eloko te, bibombelo ya bambuma ebukani mpo ete ble ezali lisusu te.
ἐσκίρτησαν δαμάλεις ἐπὶ ταῖς φάτναις αὐτῶν ἠφανίσθησαν θησαυροί κατεσκάφησαν ληνοί ὅτι ἐξηράνθη σῖτος
18 Tika ete ngombe elela! Bibwele ekomi kotelengana, pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te; ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.
τί ἀποθήσομεν ἑαυτοῖς ἔκλαυσαν βουκόλια βοῶν ὅτι οὐχ ὑπῆρχεν νομὴ αὐτοῖς καὶ τὰ ποίμνια τῶν προβάτων ἠφανίσθησαν
19 Oh Yawe, Yo nde nazali kobelela, pamba te moto ezikisi matiti mpe banzete nyonso ya bilanga.
πρὸς σέ κύριε βοήσομαι ὅτι πῦρ ἀνήλωσεν τὰ ὡραῖα τῆς ἐρήμου καὶ φλὸξ ἀνῆψεν πάντα τὰ ξύλα τοῦ ἀγροῦ
20 Ezala banyama ya zamba ezali kotalela Yo, pamba te miluka ekawuki mpe moto ezikisi bilanga.
καὶ τὰ κτήνη τοῦ πεδίου ἀνέβλεψαν πρὸς σέ ὅτι ἐξηράνθησαν ἀφέσεις ὑδάτων καὶ πῦρ κατέφαγεν τὰ ὡραῖα τῆς ἐρήμου

< Joeli 1 >