< Joeli 3 >

1 « Na mikolo mpe na tango wana, tango nakozongisa bakangami ya Yuda mpe ya Yelusalemi,
For behold in those days, and in that time when I shall bring back the captivity of Juda and Jerusalem:
2 nakosangisa bato ya bikolo nyonso mpe nakokitisa bango na lubwaku ya Jozafati. Nakosambisa bango kuna na tina na libula na Ngai, Isalaele, bato na Ngai; pamba te bapanzi bato na Ngai kati na bikolo mpe bakaboli mokili na Ngai.
I will gather together all nations, and will bring them down into the valley of Josaphat: and I will plead with them there for my people, and for my inheritance Israel, whom they have scattered among the nations, and have parted my land.
3 Babeti zeke mpo na kokabola bato na Ngai, bapesi bilenge mibali basi ya ndumba, bateki bilenge basi mpo na kozwa kaka vino, mpe balangwe yango.
And they have cast lots upon my people: and the boy they have put in the stews, and the girl they have sold for wine, that they might drink.
4 Eh bongo bino, Tiri mpe Sidoni, bituka ya bato ya Filisitia, likambo nini lisusu kati na Ngai mpe bino? Bolingi kozongisela Ngai mabe to kotombokela Ngai? Soki yango nde ezali makanisi na bino, Ngai nde nasengeli kozongisela bino mabe na lombangu.
But what have you to do with me, O Tyre, and Sidon, and all the coast of the Philistines? will you revenge yourselves on me? and if you revenge yourselves on me, I will very soon return you a recompense upon your own head.
5 Pamba te bozwaki palata mpe wolo na Ngai, bomengo na Ngai ya motuya makasi mpe bomemaki yango na batempelo na bino.
For you have taken away my silver and my gold: and my desirable and most beautiful things you have carried into your temples.
6 Botekaki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi epai ya Bagreki mpo na komema bango mosika ya mokili na bango.
And the children of Juda, and the children of Jerusalem you have sold to the children of the Greeks, that you might remove them far off from their own country.
7 Ngai moko nakopesa bango makasi mpo ete babima na bisika nyonso epai wapi botekaki bango.
Behold, I will raise them up out of the place wherein you have sold them: and I will return your recompense upon your own heads.
8 Nakoteka bana na bino ya mibali mpe ya basi epai ya bato ya Yuda, mpe bango bakoteka bango epai ya bato ya Sabe, ekolo ya mosika penza, » elobi Yawe.
And I will sell your sons, and your daughters by the hands of the children of Juda, and they shall sell them to the Sabeans, a nation far off, for the Lord hath spoken it.
9 « Bosakola likambo oyo kati na bikolo: Bobulisa mampinga mpo na bitumba! Bolamusa bilombe! Tika ete bilombe nyonso ya bitumba bapusana mpe baya!
Proclaim ye this among the nations: prepare war, rouse up the strong: let them come, let all the men of war come up.
10 Bosala mipanga, na nzela ya bakongo na bino; mpe makonga, na nzela ya bipasola na bino! Tika ete moto na bolembu aloba: ‹ Nazali makasi. ›
Cut your ploughshares into swords, and your spades into spears. Let the weak say: I am strong.
11 Bino bikolo nyonso ya zingazinga, boya na lombangu mpe bosangana! Oh Yawe, kitisa bilombe na Yo!
Break forth, and come, all ye nations, from round about, and gather yourselves together: there will the Lord cause all thy strong ones to fall down.
12 Tika ete bikolo nyonso elamuka mpe emata kino na lubwaku ya Jozafati! Pamba te kuna nde nakovanda mpo na kosambisa bikolo nyonso ya zingazinga.
Let them arise, and let the nations come up into the valley of Josaphat: for there I will sit to judge all nations round about.
13 Bosimba bambeli, pamba te bambuma eteli. Boya, bokamola bambuma ya vino, pamba te ekamolelo etondi, banzungu etondi, mabe na bango eleki ndelo.
Put ye in the sickles, for the harvest is ripe: come and go down, for the press is full, the fats run over: for their wickedness is multiplied.
14 Bato bazali ebele, ebele penza, na lubwaku ya kosambisama. Mokolo ya Yawe ekomi pene, na lubwaku ya kosambisama.
Nations, nations in the valley of destruction: for the day of the Lord is near in the valley of destruction.
15 Sanza mpe moyi ekoyinda, minzoto ekongenga lisusu te.
The sun and the moon are darkened, and the stars have withdrawn their shining.
16 Wuta na Siona, Yawe akoloba makasi; wuta na Yelusalemi, akoloba na mongongo makasi lokola kake; Lola mpe mabele ekoningana. Kasi Yawe akozala ekimelo mpo na bato na Ye, engumba batonga makasi mpo na bana ya Isalaele.
And the Lord shall roar out of Sion, and utter his voice from Jerusalem: and the heavens and the earth shall be moved, and the Lord shall be the hope of his people, and the strength of the children of Israel.
17 Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino; navandaka na Siona, ngomba na Ngai ya bule. Yelusalemi ekozala engumba ya bule, bapaya bakolekela lisusu wana te.
And you shall know that I am the Lord your God, dwelling in Sion my holy mountain: and Jerusalem shall be holy and strangers shall pass through it no more.
18 Na mokolo wana, bangomba ekotangisa vino ya sika, mpe miliki ekotanga na bangomba mikuse. Miluka nyonso ya Yuda ekotonda na mayi, etima moko ya mayi ekobima wuta na Tempelo ya Yawe mpe ekosopela lubwaku ya banzete ya akasia mayi.
And it shall come to pass in that day, that the mountains shall drop down sweetness, and the hills shall flow with milk: and waters shall flow through all the rivers of Juda: and a fountain shall come forth of the house of the Lord, and shall water the torrent of thorns.
19 Kasi mokili ya Ejipito ekobebisama, mokili ya Edomi ekokoma esobe mpo na makambo mabe oyo basalaki epai ya bato ya Yuda, pamba te basopaki makila ya bato ya Yuda na mabele na bango, atako basalaki mabe te.
Egypt shall be a desolation, and Edom a wilderness destroyed: because they have done unjustly against the children of Juda, and have shed innocent blood in their land.
20 Bato bakokoma kovanda na mokili ya Yuda mpo na libela, mpe na engumba Yelusalemi, libela na libela.
And Judea shall be inhabited for ever, and Jerusalem to generation and generation.
21 Nakopetola bino mpo na ngambo ya makila, mpo ete nanu napetola bino te. »
And I will cleanse their blood which I had not cleansed: and the Lord will dwell in Sion.

< Joeli 3 >