< Yobo 8 >
1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki:
And Bildad the Shuhite answereth and saith: —
2 « Kino tango nini okokoba koloba makambo ya boye? Maloba na yo ezali te lokola mopepe makasi?
Till when dost thou speak these things? And a strong wind — sayings of thy mouth?
3 Boni, Nzambe abukaka mibeko, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abalolaka penza bosembo?
Doth God pervert judgment? And doth the Mighty One pervert justice?
4 Soki bana na yo basalaki masumu liboso na Ye, apesaki nde bango etumbu mpo na mabe na bango!
If thy sons have sinned before Him, And He doth send them away, By the hand of their transgression,
5 Kasi yo, soki oluki Nzambe, soki osengi ngolu epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
If thou dost seek early unto God, And unto the Mighty makest supplication,
6 soki ozali peto, soki ozali sembo, akotelema Ye moko, ata sik’oyo, mpo na kokata likambo na yo mpe kozongisela yo libula na yo, kolanda bosembo na yo.
If pure and upright thou [art], Surely now He waketh for thee, And hath completed The habitation of thy righteousness.
7 Bozwi na yo ya kala ekomonana moke, pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka.
And thy beginning hath been small, And thy latter end is very great.
8 Nabondeli yo, tuna bato oyo baleka liboso, kanisa mpe landela malamu bwanya ya batata na bango,
For, ask I pray thee of a former generation, And prepare to a search of their fathers,
9 pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka, toyebi eloko te, mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili.
(For of yesterday we [are], and we know not, For a shadow [are] our days on earth.)
10 Bato ya kala bakoteya yo, bakoloba na yo, mpe, na bwanya na bango, bakobimisela yo mateya oyo:
Do they not shew thee — speak to thee, And from their heart bring forth words?
11 Boni, nzete ya papirisi ekoki penza kobota na esika oyo ezangi potopoto? Nzete oyo ebotaka na mayi ekoki solo kobota na esika ekawuka?
'Doth a rush wise without mire? A reed increase without water?
12 Ekawukaka liboso ya matiti nyonso, wana makasa na yango ezali nanu mobesu, ata bapikoli yango te.
While it [is] in its budding — uncropped, Even before any herb it withereth.
13 Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso oyo babosanaka Nzambe; boye, elikya ya bato mabe ebebaka.
So [are] the paths of all forgetting God, And the hope of the profane doth perish,
14 Eloko oyo batielaka motema ekokatana, pamba te elikya na bango ezali lokola ndako ya limpulututu.
Whose confidence is loathsome, And the house of a spider his trust.
15 Ata batieli ndako na bango motema, esimbaka te; Ezala bakangami na yango, esimbaka kaka te.
He leaneth on his house — and it standeth not: He taketh hold on it — and it abideth not.
16 Bazali lokola nzete ya mobesu na tango ya moyi makasi; mandalala na yango ezipaka elanga,
Green he [is] before the sun, And over his garden his branch goeth out.
17 elingaka misisa na yango zingazinga ya mabanga mpe epasolaka nzela kati na mabanga;
By a heap his roots are wrapped, A house of stones he looketh for.
18 kasi soki bapikoli nzete yango na esika na yango, esika yango ewanganaka nzete mpe elobaka: ‹ Natikala komona yo te! ›
If [one] doth destroy him from his place, Then it hath feigned concerning him, I have not seen thee!
19 Ndenge wana nde suka na yango ekozala; mpe banzete mosusu ekobota kaka na mabele wana.
Lo, this [is] the joy of his way, And from the dust others spring up.'
20 Solo, Nzambe abwakaka te bato ya sembo, mpe alendisaka te maboko ya bato mabe.
Lo, God doth not reject the perfect, Nor taketh hold on the hand of evil doers.
21 Nzokande, akotondisa monoko na yo na koseka, mpe bibebu na yo na banzembo ya esengo.
While he filleth with laughter thy mouth, And thy lips with shouting,
22 Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »
Those hating thee do put on shame, And the tent of the wicked is not!