< Yobo 5 >
1 Ganga na yo, soki olingi! Nani akoyanola yo? Okotombokela mosantu nini?
Pray, call, is there any to answer thee? And unto which of the holy ones dost thou turn?
2 Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.
For provocation slayeth the perverse, And envy putteth to death the simple,
3 Solo, namonaki zoba kozwa misisa; kasi, mbala moko, nalakelaki ndako na ye mabe:
I — I have seen the perverse taking root, And I mark his habitation straightway,
4 ‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi, balonga te na kosambisama mpe bazangela moto oyo akobundela bango!
Far are his sons from safety, And they are bruised in the gate, And there is no deliverer.
5 Tika ete moto oyo azali na nzala asilisa mbuma ya elanga na ye, akamata yango kino kati na basende; mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye! ›
Whose harvest the hungry doth eat, And even from the thorns taketh it, And the designing swallowed their wealth.
6 Pamba te pasi ewutaka na putulu te, mpe minyoko ewutaka na mabele te;
For sorrow cometh not forth from the dust, Nor from the ground springeth up misery.
7 moto abotamaka mpo na komona pasi, ndenge kaka mikalikali ebimaka mpo na kopanzana na likolo.
For man to misery is born, And the sparks go high to fly.
8 Kasi soki ezalaki ngai, nalingaki komimonisa liboso ya Nzambe, nalingaki kotalisa Ye likambo na ngai.
Yet I — I inquire for God, And for God I give my word,
9 Nzambe asalaka makambo minene oyo bato bakokaka kososola te, mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te;
Doing great things, and there is no searching. Wonderful, till there is no numbering.
10 anokisaka mvula na mokili, mpe atindaka mayi na bilanga;
Who is giving rain on the face of the land, And is sending waters on the out-places.
11 atombolaka bato oyo babwakama, mpe apesaka esengo na bato oyo bazali kolela;
To set the low on a high place, And the mourners have been high [in] safety.
12 abebisaka mabongisi ya bato oyo bazalaka na mayele mabe, mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango;
Making void thoughts of the subtile, And their hands do not execute wisdom.
13 akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango, mpe abebisaka mabongisi ya bakosi.
Capturing the wise in their subtilty, And the counsel of wrestling ones was hastened,
14 Molili eyelaka bango na moyi; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.
By day they meet darkness, And as night — they grope at noon.
15 Nzambe abikisaka mobola na mopanga ya monoko na bango, akangolaka moto akelela na loboko ya moto ya makasi.
And He saveth the wasted from their mouth, And from a strong hand the needy,
16 Boye, mobola asengeli kozala na elikya, mpe moto oyo atambolaka na bosembo te asengeli kokanga monoko.
And there is hope to the poor, And perverseness hath shut her mouth.
17 Esengo na moto oyo Nzambe apameli! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Lo, the happiness of mortal man, God doth reprove him: And the chastisement of the Mighty despise not,
18 Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi; abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.
For He doth pain, and He bindeth up, He smiteth, and His hands heal.
19 Mbala motoba, akobikisa yo na pasi; mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.
In six distresses He delivereth thee, And in seven evil striketh not on thee.
20 Akokangola yo na kufa, na tango ya nzala makasi; mpe akobikisa yo na nguya ya mopanga, kati na bitumba.
In famine He hath redeemed thee from death, And in battle from the hands of the sword.
21 Okobatelama liboso ya fimbu ya lolemo, okobanga kobebisama te tango ekoya;
When the tongue scourgeth thou art hid, And thou art not afraid of destruction, When it cometh.
22 okoseka kobebisama mpe nzala makasi, mpe okobanga te banyama ya mokili;
At destruction and at hunger thou mockest, And of the beast of the earth, Thou art not afraid.
23 pamba te okozala na boyokani elongo na mabanga ya bilanga, mpe banyama ya zamba ekozala na kimia elongo na yo.
(For with sons of the field [is] thy covenant, And the beast of the field Hath been at peace with thee.)
24 Okososola ete ndako na yo ezali na kimia; tango okotala bibwele kati na lopango na yo, okomona ete ata moko te ezangi.
And thou hast known that thy tent [is] peace, And inspected thy habitation, and errest not,
25 Okososola ete bana na yo bakozala ebele, mpe bakitani na yo, lokola matiti ya mabele.
And hast known that numerous [is] Thy seed, And thine offspring as the herb of the earth;
26 Okokita na kunda na kimobange makasi, ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango.
Thou comest in full age unto the grave, As the going up of a stalk in its season.
27 Toyekolaki likambo yango malamu: ezali penza bongo. Boye, yoka yango mpe salela yango mpo na bolamu na yo! »
Lo, this — we searched it out — it [is] right, hearken; And thou, know for thyself!