< Yobo 42 >

1 Yobo azongiselaki Yawe:
Then Job answered Jehovah, and said:
2 « Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso; eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo.
I know that thou canst do every thing, And that no purpose of thine can be hindered.
3 Olobaki: ‹ Nani akoki komema molili na mabongisi na Ngai, na nzela ya maloba na ye, oyo ezanga tina? › Solo, nazalaki kolobela makambo oyo nayebaki te, makambo ya kokamwa penza mpo na ngai, makambo oyo nasosolaki te.
Who is he that darkeneth counsel by words without knowledge? Thus have I uttered what I understood not; Things too wonderful for me, which I knew not:
4 Olobaki na ngai: ‹ Yaka sik’oyo, nalingi koloba; nalingi kotuna yo motuna, bongo okopesa ngai eyano. ›
Hear thou, then, I beseech thee, and I will speak! I will ask thee, and do thou instruct me!
5 Matoyi na ngai eyokaki makambo oyo bazalaki koloba na tina na Yo; kasi sik’oyo, miso na ngai emoni Yo.
I have heard of thee by the hearing of the ear; But now hath mine eye seen thee.
6 Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. »
Wherefore I abhor myself, And repent in dust and ashes.
7 Sima na Yawe koloba makambo oyo epai ya Yobo, alobaki na Elifazi, moto ya Temani: « Kanda na Ngai engaleli yo mpe baninga na yo mibale, pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki.
And when Jehovah had spoken these words unto Job, he said to Eliphaz the Temanite: “My wrath is kindled against thee, and against thy two friends; for ye have not spoken concerning me that which is right, as hath my servant Job.
8 Kasi sik’oyo, bokamata bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali; bokende epai ya Yobo, mosali na Ngai, botumba mbeka mpo na bino moko. Yobo, mosali na Ngai, akobondela mpo na bino; mpe mpo na kondima na ye, nakoyamba libondeli na ye mpo ete nasalela bino te kolanda bozoba na bino. Pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. »
Take ye, therefore, seven bullocks and seven rams, and go to my servant Job, and offer for yourselves a burnt-offering, and my servant Job shall pray for you; for to him alone will I have regard; that I deal not with you according to your folly. For ye have not spoken concerning me that which is right, as hath my servant Job.”
9 Boye Elifazi, moto ya Temani; Bilidadi, moto ya Shuwa, mpe Tsofari, moto ya Naama, basalaki makambo oyo Yawe atindaki bango kosala; mpe Yawe ayambaki libondeli ya Yobo.
So Eliphaz the Temanite, and Bildad the Shuhite, and Zophar the Naamathite, went and did as Jehovah commanded them; and Jehovah had regard to Job.
10 Sima na Yobo kosambela mpo na baninga na ye, Yawe atalisaki ye lisusu bolamu mpe apesaki ye bomengo mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso.
And Jehovah turned the captivity of Job, when he prayed for his friends, and Jehovah gave him twice as much as he had before.
11 Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo.
Then came to him all his brethren, and all his sisters, and all his former acquaintances, and ate bread with him in his house; and condoled with him, and comforted him over all the evil which Jehovah had brought upon him; and every one gave him a piece of money [[a kesita]], and every one a ring of gold.
12 Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.
Thus Jehovah blessed the latter end of Job more than the beginning; for he had fourteen thousand sheep, six thousand camels, a thousand yoke of oxen, and a thousand she-asses.
13 Azalaki na bana mibali sambo mpe bana basi misato.
He had also seven sons, and three daughters.
14 Mwana na ye ya liboso ya mwasi, Yemima; ya mibale, Ketsia; mpe ya misato, Kereni-Apuki.
And he called the name of the first Jemima, of the second Kezia, and of the third Kerenhappuch.
15 Kati na mokili mobimba, ezalaki te na basi kitoko koleka bana basi ya Yobo. Tata na bango apesaki bango libula ndenge moko na bandeko na bango ya mibali.
And in all the land were no women found so fair as the daughters of Job; and their father gave them an inheritance among their brethren.
16 Sima na yango, Yobo awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na tuku minei; amonaki bana na ye mpe bakitani na ye kino na molongo ya minei.
And Job lived after this a hundred and forty years, and saw his sons, and his sons' sons, even four generations.
17 Mpe Yobo akufaki na kimobange makasi mpe atondaki na mikolo.
Then Job died, being old and satisfied with days.

< Yobo 42 >