< Yobo 40 >
2 « Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki koteya Ye? Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye! »
好辯之士,豈能同全能者辯論﹖非難天主的,請答覆這一切!
3 Yobo azongiselaki Yawe:
約伯回答上主說:「
4 « Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba, eyano nini nakoki kopesa Yo? Natie loboko na ngai na monoko.
看,我這麼卑賤,我能回答什麼﹖只好用手掩口。
5 Nalobaki mbala moko, kasi nakoyanola lisusu te; na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. »
我說過一次,再不敢重複;我再說一次:我不敢再說什麼! 」
6 Yawe alobaki na Yobo wuta na mopepe makasi:
上主由旋風中回答約伯說:
7 « Kanga mokaba na loketo na yo lokola elombe mobali; nakotuna yo mituna, mpe okoyanola ngai.
你要像勇士束好腰,我要問你,請指教我。
8 Olingi kotiola bosembo na ngai? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa?
你豈能推翻我的評斷,歸罪於我,而自以為有理﹖
9 Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye?
你的手臂豈能同天主的相比﹖你的聲音,那能像雷鳴﹖
10 Lata nkembo mpe kongenga, milatisa lokumu mpe monene!
請你以尊貴和高雅作你的點綴,以光華美麗作你的衣裳;
11 Sopa nguya ya kanda na yo likolo ya bato, tala bato nyonso ya lolendo liboso na yo mpe kitisa bango!
發洩你的烈怒,貶抑一切高傲的人;
12 Tala bato nyonso ya lolendo, yokisa bango soni! Nyata-nyata bato mabe na esika oyo bazali.
視察一切傲慢的人,且加以制服,推翻惡人所處的地位;
13 Kunda bango nyonso kati na putulu, zipa bilongi na bango na esika ya kobombama.
將他們一同埋在土中,把他們都關在黑暗中!
14 Boye, ngai moko nakopesa yo lokumu, pamba te loboko na yo ya mobali ekoki mpo na kobikisa yo.
如果你能這樣作,我也要稱讚你,因為你的右手救護了你。
15 Tala ngubu: nakelaki yango ndenge nakelaki yo, kasi eliaka kaka matiti lokola ngombe.
且看河馬,牠同你都是我造成的,牠像牛一樣吃草。
16 Tala makasi oyo ezali kati na loketo na yango, nguya oyo ezali kati na misuni ya libumu na yango!
牠的精力全在腰部,牠的力量是在腹部的肌肉;
17 Ekembisaka mokila na yango lokola nzete ya sedele; misisa ya mipende na yango elingama-lingama;
牠挺起尾巴好像香柏,大腿上的筋聯結在一起;
18 mikuwa na yango ezali lokola bibende ya bronze; mipanzi na yango ezali lokola biteni ya bibende.
牠的脊骨好似銅管,牠的骨骸有如鐵杠。
19 Ezali ekelamu ya liboso ya Nzambe, kasi Mokeli na yango atieli yango mopanga pene.
牠是天主的傑作,造牠者賜給了牠利刃。
20 Ngomba ezali kopesa yango matiti ya kolia, esika oyo banyama nyonso ya zamba esakanaka.
群山供給牠食物,百獸在那裏同牠遊戲。
21 Elalaka na se ya banzete ya mike-mike, na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto.
牠臥在蓮葉之下,躺在蘆葦和沼澤深處;
22 Banzete ya mike-mike ebombaka yango na se ya elili na yango, banzete ya pepiliye ezingeli yango.
蓮葉的蔭影遮蔽著牠,溪邊的楊柳掩護著牠。
23 Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te; ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko, evandaka kaka kimia.
河水漲溢之時,牠毫不戰慄;約但河漲到牠口邊,牠仍安寧。
24 Boni, moto akoki kokanga yango na motambo na tango ezali kotala to kotobola yango zolo na ndobo, mpo na kobenda yango?
誰能在牠目前捕捉牠,或以木橛穿透牠的鼻孔﹖