< Yobo 4 >

1 Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki:
ויען אליפז התימני ויאמר
2 « Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko, boni, okotomboka mpo na yango te? Kasi nani akoki penza kokanga motema mpe kozanga maloba?
הנסה דבר אליך תלאה ועצר במלין מי יוכל
3 Kanisa nanu ndenge ozalaki koteya bato ebele, ndenge ozalaki kolendisa bato oyo balembaki!
הנה יסרת רבים וידים רפות תחזק
4 Maloba na yo ezalaki kolendisa bato oyo bazalaki kotepatepa, mpe oyo mabolongo na bango ezalaki kolemba.
כושל יקימון מליך וברכים כרעות תאמץ
5 Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo, olembi na yo! Awa pasi ebeti yo, okomi na yo koyoka somo!
כי עתה תבוא אליך ותלא תגע עדיך ותבהל
6 Boni, kondima na yo epai ya Nzambe esengeli te kozala likonzi na yo, mpe bosembo na yo esengeli te kosimba elikya na yo?
הלא יראתך כסלתך תקותך ותם דרכיך
7 Kanisa nanu: Nani akotikala kokufa te mpo ete asalaka mabe te? Esika nini bato ya sembo bakotikala kokufa te?
זכר-נא--מי הוא נקי אבד ואיפה ישרים נכחדו
8 Kolanda makambo oyo ngai nasili komona, bato oyo basalaka mabe, mpe ba-oyo balonaka minyoko, babukaka mpe kaka mabe lokola mbuma;
כאשר ראיתי חרשי און וזרעי עמל יקצרהו
9 bakufaka na mopepe ya Nzambe mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye.
מנשמת אלוה יאבדו ומרוח אפו יכלו
10 Nkosi ekoki na yango koganga, mpe mwana ya nkosi ekoki kotia makelele ndenge elingi, kasi Nzambe abukaka minu ya nkosi.
שאגת אריה וקול שחל ושני כפירים נתעו
11 Nkosi ekufaka mpo na kozanga nyama ya kolia, mpe bana ya nkosi ya mwasi epanzanaka.
ליש אבד מבלי-טרף ובני לביא יתפרדו
12 Liloba moko eyelaki ngai na nkuku, mpe matoyi na ngai eyokaki yango na se penza:
ואלי דבר יגנב ותקח אזני שמץ מנהו
13 kati na bandoto ya butu, na tango bato bazwaka pongi makasi,
בשעפים מחזינות לילה בנפל תרדמה על-אנשים
14 kobanga mpe somo ekangaki ngai mpe eningisaki mikuwa na ngai nyonso;
פחד קראני ורעדה ורב עצמותי הפחיד
15 molimo moko elekaki liboso ya elongi na ngai lokola mopepe, mpe suki ya moto na ngai etelemaki.
ורוח על-פני יחלף תסמר שערת בשרי
16 Molimo yango etelemaki wana, kasi nalongaki te kososola soki ezali nini; elilingi yango etelemaki liboso ya miso na ngai, mpe nayokaki mongongo moko koloba na se penza:
יעמד ולא אכיר מראהו-- תמונה לנגד עיני דממה וקול אשמע
17 ‹ Boni, moto akoki solo koleka Nzambe na bosembo to akoki solo koleka Mokeli na ye na bule?
האנוש מאלוה יצדק אם מעשהו יטהר-גבר
18 Soki Nzambe atielaka basali na Ye motema te, soki kutu amonaka mabunga epai ya ba-anjelu na Ye,
הן בעבדיו לא יאמין ובמלאכיו ישים תהלה
19 mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele, ba-oyo bazali kaka putulu mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi?
אף שכני בתי-חמר--אשר-בעפר יסודם ידכאום לפני-עש
20 Kobanda na tongo kino na pokwa, bakataka-kataka bango na biteni; bakufaka mpo na libela, mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango;
מבקר לערב יכתו מבלי משים לנצח יאבדו
21 basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo epikolamaka na mbalakata, mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. ›
הלא-נסע יתרם בם ימותו ולא בחכמה

< Yobo 4 >