< Yobo 39 >

1 Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka? Osila komona ndenge mboloko ebotaka?
Sais-tu le temps où les chamois mettent bas? As-tu observé quand les biches faonnent?
2 Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi? Oyebi tango oyo ebotaka?
As-tu compté les mois de leur portée, et sais-tu le temps où elles mettent bas?
3 Ekogumbama, ekobota bana na yango mpe ekolongwa na pasi na yango ya kobota.
Elles se courbent, elles font sortir leurs petits, et se délivrent de leurs douleurs;
4 Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda, ekokende mosika mpe ekozonga lisusu te.
Leurs petits se fortifient, ils croissent en plein air, ils s'en vont et ne reviennent plus vers elles.
5 Nani akangoli ane ya zamba? Nani apesi yango bonsomi?
Qui a lâché l'onagre en liberté, et qui a délié les liens de cet animal farouche,
6 Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako, mpe mabele ya mungwa lokola esika ya kovanda.
A qui j'ai donné la steppe pour demeure, et la terre salée pour habitation?
7 Esekaka makelele ya bingumba mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda.
Il se rit du bruit de la ville; il n'entend pas les clameurs de l'ânier.
8 Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei mpe elukaka na bokebi matiti nyonso ya mobesu.
Il parcourt les montagnes qui sont ses pâturages, il cherche partout de la verdure.
9 Mpakasa ekoki kondima kosalela yo? Ekoki kolekisa butu na elielo na yo ya banyama?
Le buffle veut-il te servir? Passe-t-il la nuit auprès de ta crèche?
10 Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele? Ekoki kolanda yo mpo na kotondisa mabwaku na mabele?
Attaches-tu le buffle par la corde au sillon? Herse-t-il tes champs en te suivant?
11 Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene? Okotikela yango mosala na yo?
Te fies-tu à lui parce que sa force est grande, et lui abandonnes-tu ton travail?
12 Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma mpe kosangisa yango na etutelo na yo?
Comptes-tu sur lui pour rentrer ton grain, et pour l'amasser sur ton aire?
13 Mapapu ya maligbanga efungwamaka na esengo nyonso, kasi, boni, lipapu mpe nsala na yango ekokani na oyo ya nkongi?
L'aile de l'autruche s'agite joyeusement; est-ce l'aile et la plume de la cigogne?
14 Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele mpe etikaka yango ete ezwa moto ya mabele,
Non, car elle abandonne ses œufs à terre, elle les fait couver sur la poussière;
15 kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango mpe banyama ya zamba ekoki konyata-nyata yango.
Elle oublie qu'un pied peut les fouler, une bête des champs les écraser.
16 Enyokolaka bana na yango makasi lokola nde ezali bana na yango te, emonaka na yango motema pasi te lokola nde esali mosala ya mpunda,
Elle est dure envers ses petits, comme s'ils n'étaient pas siens. Son travail est vain, elle ne s'en inquiète pas.
17 pamba te Nzambe apimeli yango bwanya mpe apesi yango mayele te.
Car Dieu l'a privée de sagesse, et ne lui a point départi d'intelligence.
18 Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu, ekoseka ata mpunda mpe motambolisi na yango.
Quand elle se lève, et bat des ailes, elle se moque du cheval et de son cavalier.
19 Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi?
As-tu donné au cheval sa vigueur? As-tu revêtu son cou de la crinière frémissante?
20 Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki? Lolendo ya mongongo kitoko na yango epesaka somo.
Le fais-tu bondir comme la sauterelle? Son fier hennissement donne la terreur.
21 Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele, esepelaka na makasi na yango mpe ekendaka liboso ya bibundeli.
De son pied il creuse la terre; il se réjouit en sa force; il va à la rencontre de l'homme armé;
22 Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te, ezongaka sima te liboso ya mopanga,
Il se rit de la crainte, il n'a peur de rien; il ne recule point devant l'épée.
23 tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango elongo na likonga oyo ezali kopela moto mpe mopanga.
Sur lui retentit le carquois, la lance étincelante et le javelot.
24 Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele, evandaka kimia te soki kelelo ebeti.
Bondissant et frémissant, il dévore l'espace; il ne peut se contenir dès que la trompette sonne;
25 Soki kelelo ebeti, egangaka: ‹ Ah! › Na mosika, eyokaka solo ya bitumba, koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba.
Dès qu'il entend la trompette, il hennit; il sent de loin la bataille, la voix tonnante des chefs et les clameurs des guerriers.
26 Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka mpe etandaka mapapu na yango na ngambo ya sude?
Est-ce par ta sagesse que l'épervier prend son vol, et déploie ses ailes vers le Midi?
27 Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo mpe esalaka zala na yango na likolo?
Est-ce sur ton ordre que l'aigle s'élève, et qu'il place son aire sur les hauteurs?
28 Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga, na esika ya kaka, na songe ya libanga.
Il habite sur les rochers, il se tient sur la dent des rochers, sur les lieux inaccessibles.
29 Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia, miso na yango emonaka na mosika.
De là, il découvre sa proie; ses yeux la voient de loin.
30 Bana na yango emelaka makila. Esika ebembe ezali, mpongo ezali wana. »
Ses petits sucent le sang, et partout où il y a des corps morts, il s'y trouve.

< Yobo 39 >