Preface
Bibles
+
LNG
CSG
X
<
h834B
>
X
<
^
>
<
>
<
Yobo
39
>
1
Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka? Osila komona ndenge mboloko ebotaka?
你豈知道巖穴中野羊的產期,洞悉牝鹿何時生產﹖
2
Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi? Oyebi tango oyo ebotaka?
你豈能計算牠們懷孕的月分,預知牠們生產的日期﹖
3
Ekogumbama, ekobota bana na yango mpe ekolongwa na pasi na yango ya kobota.
牠們伏下產子之後,產痛立即過去。
4
Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda, ekokende mosika mpe ekozonga lisusu te.
幼雛健壯,在原野中長大;牠們一去,即不再返回。
5
Nani akangoli ane ya zamba? Nani apesi yango bonsomi?
誰使野驢任意遊蕩,誰解去悍驢的韁繩﹖
6
Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako, mpe mabele ya mungwa lokola esika ya kovanda.
原來是我叫牠以原野為家,以鹽地為居所。
7
Esekaka makelele ya bingumba mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda.
牠恥笑城市的吵鬧,聽不到趕牲者的呵叱。
8
Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei mpe elukaka na bokebi matiti nyonso ya mobesu.
牠以群山峻嶺作自己的牧場,尋覓各種青草為食。
9
Mpakasa ekoki kondima kosalela yo? Ekoki kolekisa butu na elielo na yo ya banyama?
野牛豈肯為你服役,豈肯在你槽邊過宿﹖
10
Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele? Ekoki kolanda yo mpo na kotondisa mabwaku na mabele?
你豈能以繩索繫住牠的頸項,叫牠隨你耕田﹖
11
Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene? Okotikela yango mosala na yo?
你豈能依靠牠的大力,任憑牠去作你的工作﹖
12
Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma mpe kosangisa yango na etutelo na yo?
你豈能靠牠將麥捆運回,聚集在你的禾場上﹖
13
Mapapu ya maligbanga efungwamaka na esengo nyonso, kasi, boni, lipapu mpe nsala na yango ekokani na oyo ya nkongi?
駝鳥的翅翼鼓舞,牠的翼翎和羽毛豈表示慈愛﹖
14
Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele mpe etikaka yango ete ezwa moto ya mabele,
他將卵留在地上,讓沙土去溫暖;
15
kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango mpe banyama ya zamba ekoki konyata-nyata yango.
牠不想人腳能踏碎,野獸能踐壞。
16
Enyokolaka bana na yango makasi lokola nde ezali bana na yango te, emonaka na yango motema pasi te lokola nde esali mosala ya mpunda,
牠苛待雛鳥,若非己出,雖徒受苦痛,也毫不關心。
17
pamba te Nzambe apimeli yango bwanya mpe apesi yango mayele te.
因為天主沒有賜牠這本能,也沒有把良知賜給牠。
18
Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu, ekoseka ata mpunda mpe motambolisi na yango.
但當牠振翼飛翔,卻要訕笑駿馬和騎師。
19
Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi?
馬的力量,是你所賜﹖牠頸上的長騣,是你所披﹖
20
Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki? Lolendo ya mongongo kitoko na yango epesaka somo.
你豈能使牠跳躍如蚱蜢﹖牠雄壯的長嘶,實在使人膽寒。
21
Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele, esepelaka na makasi na yango mpe ekendaka liboso ya bibundeli.
牠在谷中歡躍奔馳,勇往直前,衝鋒迎敵。
22
Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te, ezongaka sima te liboso ya mopanga,
牠嗤笑膽怯,一無所懼;交鋒之時,決不退縮。
23
tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango elongo na likonga oyo ezali kopela moto mpe mopanga.
牠背上的箭袋震震作響,還有閃爍發光的矛與槍。
24
Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele, evandaka kimia te soki kelelo ebeti.
牠一聞號角,即不肯停蹄,急躁狂怒,不斷啃地。
25
Soki kelelo ebeti, egangaka: ‹ Ah! › Na mosika, eyokaka solo ya bitumba, koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba.
每次號角一鳴,牠必發出嘶聲,由遠處已聞到戰爭的氣息,將領的號令和士卒的喊聲。
26
Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka mpe etandaka mapapu na yango na ngambo ya sude?
鷹展翅振翼南飛,豈是由於你的智慧﹖
27
Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo mpe esalaka zala na yango na likolo?
兀鷹騰空,營巢峭壁,豈是出於你的命令﹖
28
Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga, na esika ya kaka, na songe ya libanga.
牠在山崖居住過宿,在峭峰上有牠的保障;
29
Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia, miso na yango emonaka na mosika.
由那裏窺伺獵物,牠的眼力可達遠處。
30
Bana na yango emelaka makila. Esika ebembe ezali, mpongo ezali wana. »
牠的幼雛也都吮血。那裏有屍體,牠也在那裏。
<
Yobo
39
>
Go to
>
Bookmark
/
Concordance
/
Maps
/
Report Issue
The world's first Holy Bible un-translation!