< Yobo 37 >

1 Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga mpe ezali kobeta makasi lokola nde elingi kobima na esika na yango.
À cause de cela aussi mon cœur tremble, et tressaille comme s’il sortait de sa place.
2 Yoka! Yoka makelele ya mongongo na Ye, makelele oyo ezali kobima na monoko na Ye.
Écoutez donc le bruit éclatant de sa voix et le grondement qui sort de sa bouche!
3 Azali kotinda yango na mokili mobimba, mpe kake na Ye kino na suka ya mokili.
Il le dirige sous tous les cieux, et son éclair, jusqu’aux extrémités de la terre:
4 Sima na yango, konguluma na Ye ekoyokana, akoganga makasi na mongongo ya bokonzi na Ye; akokanga mikalikali ya monoko na Ye te, wana mongongo na Ye ezali koyokana.
Après lui une voix rugit. Il tonne de sa voix majestueuse, et il ne retient pas ses éclairs quand il fait entendre sa voix.
5 Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi, Nzambe asalaka bikamwa, asalaka makambo minene, makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te.
Dieu tonne merveilleusement de sa voix, faisant de grandes choses que nous ne comprenons pas.
6 Alobaka na mvula ya pembe: ‹ Sopana na mabele. › Alobaka bongo lisusu na mvula ya makasi: ‹ Sopana. ›
Car il dit à la neige: Tombe sur la terre! et aussi aux averses de pluie, et aux averses des pluies de sa force.
7 Boye, atiaka kashe na loboko ya moto nyonso mpo ete moto nyonso ayeba misala na Ye. Atondisaka bato nyonso na somo ya nguya na Ye.
Il met un sceau sur la main de tout homme, afin que tous les hommes connaissent son œuvre.
8 Banyama ezongaka na bandako na yango mpe evandaka kati na libulu na yango.
Les bêtes sauvages rentrent dans leurs gîtes, et demeurent dans leurs repaires.
9 Mopepe makasi ewutaka na ngambo ya sude, malili mpe mipepe, na ngambo ya nor.
Des chambres [du midi] vient le tourbillon, et des vents du nord, le froid.
10 Na mopepe oyo ebimaka na monoko ya Nzambe, mayi ebongwanaka libanga mpe bitima ya mayi ekondaka.
Au souffle de Dieu se forme la glace, et la largeur des eaux se resserre.
11 Atondisaka mapata na mayi, mpe pole na Ye epanzaka mapata ya mvula.
Il charge d’eau le nuage; sa lumière dissipe les nuées;
12 Na makasi na Ye, mapata ebalukaka na bangambo nyonso mpo na kokokisa nyonso oyo Ye atindaka yango kosala kati na mokili.
Et sous sa conduite elles tournoient en tout sens, pour accomplir leur œuvre, tout ce qu’il leur commande sur la face du cercle de la terre,
13 Ezalaka mpo na kopesa etumbu na mokili to mpo na kopambola yango.
Soit qu’il les fasse venir comme verge, ou pour sa terre, ou en bonté.
14 Yoka, Yobo! Telema mpe sosola bikamwa ya Nzambe.
Écoute ceci, Job; tiens-toi là, et discerne les œuvres merveilleuses de Dieu.
15 Oyebi ndenge nini Nzambe akambaka mapata, mpe ndenge nini angengisaka mikalikali na Ye na mapata?
Sais-tu comment Dieu les a disposées et comment il fait briller l’éclair de sa nuée?
16 Oyebi ndenge nini mapata evandaka malamu? Ezali bikamwa ya Ye-Oyo-Akoka-Na-Boyebi-Nyonso.
Comprends-tu le balancement des nuages, les œuvres merveilleuses de celui qui est parfait en connaissance, –
17 Bilamba na yo ezali na moto, nzokande mabele ezali konyokwama na mopepe ya midi.
Pourquoi tes vêtements sont chauds quand il donne du repos à la terre par le vent du midi?
18 Boni, okoki solo kosunga Nzambe mpo na kotanda likolo elongo na Ye, likolo oyo ezali makasi lokola talatala ya ebende banyangwisa na moto?
As-tu étendu avec lui la voûte céleste, aussi ferme qu’un miroir de fonte?
19 Yebisa biso makambo oyo tosengeli koloba na Ye; tokoki koloba likambo moko te mpo na molili na biso.
Fais-nous savoir ce que nous lui dirons! Nous ne savons préparer [des paroles], à cause de [nos] ténèbres.
20 Boni, basengeli koyebisa Ye ete nalingi koloba? Basengeli koyebisa Ye mpo ete ayeba yango?
Lui racontera-t-on que je parle? Si quelqu’un lui parle, il sera sûrement englouti.
21 Na pwasa, moto moko te azali komona lisusu pole; ebombami kati na mapata. Kasi soki mopepe eleki, elongoli yango nyonso.
Et maintenant on ne voit pas la lumière brillante, elle est [cachée] dans les nues; mais le vent passe et les [chasse, et] produit un ciel clair.
22 Kongenga lokola wolo ezali koya wuta na ngambo ya nor. Nzambe avandi kati na nkembo ya somo.
L’or vient du nord; – par-devers Dieu est la majesté terrible.
23 Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tokoki te kokoma esika Ye azali; azali monene na nguya mpe na solo; azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo.
Le Tout-puissant, nous ne le trouvons pas; grand en force, en jugement et en beaucoup de justice, il n’opprime pas.
24 Yango wana bato basengeli kokumisa Ye, kasi Ye atiaka miso na Ye te likolo ya bato oyo bakanisaka ete bazali bato ya bwanya. »
C’est pourquoi les hommes le craindront; aucun des sages de cœur ne le contemplera.

< Yobo 37 >