< Yobo 36 >

1 Eliwu abakisaki lisusu:
ויסף אליהוא ויאמר
2 « Yokela ngai nanu moke, nalingi koteya yo, nazali na makambo mingi mosusu ya koloba na tina na Nzambe.
כתר-לי זעיר ואחוך כי עוד לאלוה מלים
3 Tala, nazali kozwa mosika boyebi na ngai mpo na kobundela mpe kolongisa Mokeli na ngai.
אשא דעי למרחוק ולפעלי אתן-צדק
4 Yeba malamu ete maloba na ngai ezali ya lokuta te, ezali moto na boyebi ya solo nde azali pene na yo.
כי-אמנם לא-שקר מלי תמים דעות עמך
5 Tala monene ya Nzambe! Kasi atiolaka na Ye bato te, nguya na Ye emonanaka na nzela ya mikano na Ye ya makasi. Azali na nguya, mpe mikano na Ye ebongwanaka te.
הן-אל כביר ולא ימאס כביר כח לב
6 Atikaka moto mabe te kozala na bomoi, alongisaka banyokolami,
לא-יחיה רשע ומשפט עניים יתן
7 alongolaka miso na Ye te likolo ya bayengebene, avandisaka bango na kiti ya bokonzi elongo na bakonzi mpe atombolaka bango mpo na libela.
לא-יגרע מצדיק עיניו ואת-מלכים לכסא וישיבם לנצח ויגבהו
8 Kasi soki bato bakangami na minyololo to na basinga ya minyoko,
ואם-אסורים בזקים ילכדון בחבלי-עני
9 atalisaka bango mabe oyo basali, mpe masumu oyo basalaka mpo na lolendo na bango.
ויגד להם פעלם ופשעיהם כי יתגברו
10 Afungolaka bango matoyi mpo na kokebisa bango mpe atindaka bango kotika mabe.
ויגל אזנם למוסר ויאמר כי-ישובון מאון
11 Soki batosi mpe basaleli Ye, bakolekisa mikolo na bango oyo etikali na bomengo, mpe mibu na bango na esengo.
אם-ישמעו ויעבדו יכלו ימיהם בטוב ושניהם בנעימים
12 Kasi soki batosi Ye te, bakokufa na mopanga mpe bakosila mpo na kozanga boyebi.
ואם-לא ישמעו בשלח יעברו ויגועו בבלי-דעת
13 Bato oyo bayebi Nzambe te mpe mitema na bango etondisami na kanda, babelelaka Nzambe te tango akangaka bango minyololo.
וחנפי-לב ישימו אף לא ישועו כי אסרם
14 Bakufaka na bolenge, basukisaka bomoi na bango kati na mibali oyo bamipesaka na kindumba ya bule.
תמת בנער נפשם וחיתם בקדשים
15 Kasi bato oyo bazali konyokwama, akangolaka bango na nzela ya minyoko na bango, afungolaka bango matoyi na nzela ya pasi.
יחלץ עני בעניו ויגל בלחץ אזנם
16 Yo mpe, Nzambe alekisi yo na nzela ya nkaka mpe ya pasi mpo na kovandisa yo na esika ya pole, esika oyo ezangi mitungisi; akotondisa mesa na yo na biloko ya kitoko.
ואף הסיתך מפי-צר-- רחב לא-מוצק תחתיה ונחת שלחנך מלא דשן
17 Kasi soki sik’oyo ozali kosala lokola moto mabe, etumbu mpe kosambisama ekokweyela yo.
ודין-רשע מלאת דין ומשפט יתמכו
18 Tika ete elakeli mabe oyo etelemeli yo etinda yo te na kotomboka! Boni, okoki kopesa kanyaka na bato ebele? Kasi kopengwa te!
כי-חמה פן-יסיתך בספק ורב-כפר אל-יטך
19 Boni, bozwi na yo ezali solo na motuya mpo na kokangola yo? Ezala mabanga na yo ya wolo to makasi na yo nyonso, boni, ekokoka solo kokangola yo?
היערך שועך לא בצר וכל מאמצי-כח
20 Kozala na posa te ya butu oyo elongolaka bato kati na bandako na bango.
אל-תשאף הלילה-- לעלות עמים תחתם
21 Mibatela ete okweya na mabe te, pamba te osepeli na mabe koleka minyoko.
השמר אל-תפן אל-און כי-על-זה בחרת מעני
22 Tala, Nzambe azali Mokonzi ya nguya na Ye, nani ateyaka koleka Ye?
הן-אל ישגיב בכחו מי כמהו מורה
23 Nani akengelaka etamboli na Ye? Nani akoki koloba na Ye: ‹ Ozali kosala mabe? ›
מי-פקד עליו דרכו ומי-אמר פעלת עולה
24 Kanisa kokumisa misala na Ye, misala oyo bato bazali kokumisa na banzembo.
זכר כי-תשגיא פעלו-- אשר שררו אנשים
25 Bato nyonso bamonaka yango, batalaka yango na mosika.
כל-אדם חזו-בו אנוש יביט מרחוק
26 Tala ndenge nini Nzambe azali monene! Tososolaka yango te. Moto moko te akoki kotanga motango ya mibu na Ye.
הן-אל שגיא ולא נדע מספר שניו ולא-חקר
27 Abendaka mayi epai na Ye, na mapata; akomisaka yango mvula, mvula oyo enokaka mpe etondisaka bibale.
כי יגרע נטפי-מים יזקו מטר לאדו
28 Mapata ekweyisaka yango, mpe enokisaka yango likolo na ebele ya bato.
אשר-יזלו שחקים ירעפו עלי אדם רב
29 Nani akoki kososola ndenge Nzambe apanzaka mapata mpe ndenge bakake ebimaka wuta na ndako na Ye?
אף אם-יבין מפרשי-עב תשאות סכתו
30 Tala ndenge abetisaka bakake likolo ya bato mpe atondisaka mozindo ya ebale monene.
הן-פרש עליו אורו ושרשי הים כסה
31 Na nzela ya biloko oyo nyonso, Nzambe asambisaka bikolo mpe apesaka bilei ebele.
כי-בם ידין עמים יתן-אכל למכביר
32 Atondisaka maboko na Ye mibale na mikalikali, akotinda yango na esika oyo Ye aponi.
על-כפים כסה-אור ויצו עליה במפגיע
33 Makelele ya bakake epesaka sango ya koya na Ye, ata kutu bibwele esosolaka koya na Ye.
יגיד עליו רעו מקנה אף על-עולה

< Yobo 36 >