< Yobo 35 >

1 Bongo Eliwu alobaki:
以利户又说:
2 « Boni, okanisi ete yango ezali sembo? Olobi: ‹ Nazali sembo liboso ya Nzambe. ›
你以为有理, 或以为你的公义胜于 神的公义,
3 Nzokande, ozali koloba: ‹ Nakozwa nini, litomba nini nakozwa soki nasali masumu te? ›
才说这与我有什么益处? 我不犯罪比犯罪有什么好处呢?
4 Nalingi kopesa yo eyano, yo elongo na baninga na yo.
我要回答你和在你这里的朋友。
5 Tombola miso na likolo mpe tala; mona ndenge mapata ezali likolo na yo.
你要向天观看, 瞻望那高于你的穹苍。
6 Soki osali masumu, ekosala Nzambe nini? Soki masumu na yo ezali ebele, ekosala Ye nini?
你若犯罪,能使 神受何害呢? 你的过犯加增,能使 神受何损呢?
7 Soki ozali sembo, okopesa Ye nini to akozwa nini na loboko na yo?
你若是公义,还能加增他什么呢? 他从你手里还接受什么呢?
8 Mabe na yo ekokomela kaka bazalani na yo, bosembo na yo ezali na litomba kaka epai ya bana na bato.
你的过恶或能害你这类的人; 你的公义或能叫世人得益处。
9 Bato bazali kolela na se ya mokumba ya minyoko, bazali koganga na se ya motema makasi ya bato minene.
人因多受欺压就哀求, 因受能者的辖制便求救,
10 Kasi moto moko te azali koloba: ‹ Nzambe Mokeli na ngai, Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu,
却无人说:造我的 神在哪里? 他使人夜间歌唱,
11 Ye oyo ateyaka biso koleka banyama ya mokili mpe akomisaka biso mayele koleka bandeke ya likolo, azali wapi? ›
教训我们胜于地上的走兽, 使我们有聪明胜于空中的飞鸟。
12 Ata bagangi, Nzambe akoyanola te, mpo na lolendo ya bato mabe.
他们在那里, 因恶人的骄傲呼求,却无人答应。
13 Pamba te, Nzambe ayokaka te maloba na bango ya pamba, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaka ata na bokebi na yango te.
虚妄的呼求, 神必不垂听; 全能者也必不眷顾。
14 Nzokande, yo ozali komeka koloba ete ozali komona Ye te, ete ozwi nanu eyano te na kolela na yo epai na Ye.
何况你说,你不得见他; 你的案件在他面前,你等候他吧。
15 Mpe sik’oyo, soki kanda ya Nzambe eyei nanu likolo na yo te mpe soki Ye azali nanu kobosana maloba na yo ya soni,
但如今因他未曾发怒降罚, 也不甚理会狂傲,
16 elingi koloba ete yo, Yobo, ofungoli monoko na yo kaka na pamba mpe otondisi yango na maloba ya bozoba. »
所以约伯开口说虚妄的话, 多发无知识的言语。

< Yobo 35 >