< Yobo 33 >

1 Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai, tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai!
然ばヨブよ請ふ我が言ふ事を聽け わが一切の言語に耳を傾むけよ
2 Tala, nafungoli monoko na ngai, maloba na ngai ezali na songe ya lolemo.
視よ我口を啓き 舌を口の中に動かす
3 Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.
わが言ふ所は正義き心より出づ わが唇あきらかにその智識を陳ん
4 Molimo ya Nzambe asalaki ngai, pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi.
神の靈われを造り 全能者の氣息われを活しむ
5 Boye soki okoki, yanola ngai, mibongisa mpo na komekana na ngai.
汝もし能せば我に答へよ わが前に言をいひつらねて立て
6 Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe; ngai mpe nawutaki na putulu.
我も汝とおなじく神の者なり 我もまた土より取てつくられしなり
7 Boye, somo na ngai ebangisa yo te, mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te.
わが威嚴はなんぢを懼れしめず わが勢はなんぢを壓せず
8 Kasi olobaki na matoyi na ngai— mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo—
汝わが聽くところにて言談り 我なんぢの言語の聲を聞けり云く
9 ‹ Nazali sembo, nasali masumu te; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›
われは潔淨くして愆なし 我は辜なく惡き事わが身にあらず
10 Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai, azali kozwa ngai lokola monguna na Ye.
視よ彼らわれを攻る釁隙を尋ね われを己の敵と算へ
11 Akangi makolo na ngai na bibende, azali kononga banzela na ngai nyonso.
わが脚を桎に夾めわが一切の擧動に目を着たまふと
12 Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te, pamba te Nzambe azali monene koleka moto.
視よ我なんぢに答へん なんぢ此事において正義からず 神は人よりも大なる者にいませり
13 Mpo na nini ozali kosamba na Ye? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.
彼その凡て行なふところの理由を示したまはずとて汝かれにむかひて辯爭そふは何ぞや
14 Nzokande, Nzambe alobaka, na lolenge moko to na lolenge mosusu, kasi moto asosolaka yango te.
まことに神は一度二度と告示したまふなれど人これを曉らざるなり
15 Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu, tango bato bazwaka pongi makasi wana balali na mbeto;
人熟睡する時または床に睡る時に夢あるひは夜の間の異象の中にて
16 boye, akoki kofungola matoyi ya bato mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba,
かれ人の耳をひらき その教ふる所を印して堅うし
17 mpo na kotia moto mosika ya misala na ye ya mabe mpe kobatela ye na lolendo,
斯して人にその惡き業を離れしめ 傲慢を人の中より除き
18 mpo na kobatela molimo na ye mpo ete ekufa te, mpe bomoi na ye mpo ete ebebisama te na mopanga.
人の魂靈を護りて墓に至らしめず 人の生命を護りて劍にほろびざらしめたまふ
19 Nzokande, moto akoki mpe, mbala mosusu, koteyama na mbeto na ye, na nzela ya kobela mpe ya minyoko ya tango nyonso kati na mikuwa na ye.
人床にありて疼痛に攻られ その骨の中に絶ず戰鬪のあるあり
20 Boye, azali kosepela lisusu na lipa te, mpe motema na ye ekomi koboya bilei oyo alingaka mingi.
その氣食物を厭ひ その魂靈うまき物をも嫌ふ
21 Nzoto na ye ekawuki na pamba, mpe mikuwa na ye, oyo ebombama, ebimi.
その肉は痩おちて見えず その骨は見えざりし者までも顯露になり
22 Molimo na ye ezali kopusana pene ya kunda, mpe bomoi na ye, pene ya bamemi sango ya kufa.
その魂靈は墓に近より その生命は滅ぼす者に近づく
23 Nzokande, soki ekoki kozala ata na anjelu moko, kati na ba-anjelu nkoto moko, mpo na koyebisa na moto makambo oyo ezali sembo,
しかる時にもし彼とともに一箇の使者あり 千の中の一箇にして中保となり 正しき道を人に示さば
24 tika ete asalela ye ngolu mpe aloba: ‹ Bikisa ye ete akota te kati na libulu ya kufa, nasili kofuta niongo mpo na kosikola ye, ›
神かれを憫れみて言給はん彼を救ひて墓にくだること無らしめよ 我すでに收贖の物を得たりと
25 nzoto na ye ekokoma lisusu sembesembe lokola na tango ya bolenge na ye, ekozonga ndenge ezalaki na bomwana na ye.
その肉は小兒の肉よりも瑞々しくなり その若き時の形状に歸らん
26 Akosambela Nzambe, akozwa ngolu na miso na Ye, akomona Nzambe na miso mpe akoganga na esengo. Nzambe akozwa ye lisusu lokola moto ya sembo.
かれ若し神に祷らば神かれを顧りみ 彼をしてその御面を喜こび見ることを得せしめたまはん 神は人の正義に報をなしたまふべし
27 Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba: ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.
かれ人の前に歌ひて言ふ 我は罪を犯し正しきを抂たり 然ど報を蒙らず
28 Nzambe akangoli molimo na ngai na libulu ya kufa, mpe nakowumela kati na pole na esengo. ›
神わが魂靈を贖ひて墓に下らしめず わが生命光明を見ん
29 Nzambe asalaka makambo oyo nyonso epai ya moto mbala mibale to mpe mbala misato,
そもそも神は是等のもろもろの事をしばしば人におこなひ
30 mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa, mpo ete pole ya bomoi ekoka kongenga likolo na ye.
その魂靈を墓より牽かへし生命の光明をもて彼を照したまふ
31 Yobo, fungola matoyi, vanda kimia mpe yoka ngai! Nazali na makambo ya koloba na yo.
ヨブよ耳を傾むけて我に聽け 請ふ默せよ 我かたらん
32 Kasi soki ozali na likambo ya koloba, yebisa ngai yango, pesa ngai eyano, mpe ngai nakolongisa yo.
なんぢもし言ふべきことあらば我にこたへよ 請ふ語れ 我なんぢを義とせんと慾すればなり
33 Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai, mpe ngai nakoteya yo bwanya. »
もし無ば我に聽け 請ふ默せよ 我なんぢに智慧を教へん

< Yobo 33 >