< Yobo 32 >
1 Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.
So these three men ceased to answer Job, because he was righteous in his own eyes.
2 Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe.
Then was kindled the wrath of Elihu, the son of Barachel, the Buzite, of the family of Ram; against Job was his wrath kindled, because he accounted himself righteous rather than God.
3 Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli; nzokande bakweyisaki Nzambe.
Against his three friends also was his wrath kindled, because they had not found an answer, and yet had condemned Job.
4 Eliwu awelaki te koloba moto ya liboso epai ya Yobo, pamba te baninga wana misato ya Yobo bazalaki mikolo na ye na mibu ya mbotama.
Now Elihu had delayed to reply to Job, because they were older than himself.
5 Kasi tango Eliwu amonaki ete bato wana misato bazali lisusu na likambo ya koloba te, asilikaki makasi.
But when Elihu saw that there was no answer in the mouth of these three men, his wrath was kindled.
6 Boye Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi, alobaki: « Nazali leki na mibu ya mbotama, mpe bino bozali mikolo; yango wana nazalaki kobanga mpe nazangaki makasi ya koloba na bino makambo oyo ngai nayebi.
Then spake Elihu, the son of Barachel, the Buzite, and said: I am young, and ye are very old; Therefore I was afraid, And durst not make known to you my opinion.
7 Nazalaki komilobela: ‹ Bato oyo bazali na mibu ebele ya mbotama bakoyeba koloba, pamba te kozala na mibu ebele epesaka bwanya. ›
I said, “Days should speak, And the multitude of years should teach wisdom.”
8 Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo, ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde epesaka moto boyebi.
But it is the spirit in man, Even the inspiration of the Almighty, that giveth him understanding.
9 Ezali kaka mibange te nde bazali na bwanya, mpe ezali kaka bampaka te nde basosolaka makambo oyo ezali sembo.
Great men are not always wise, Nor do the aged always understand what is right.
10 Yango wana nalobi: Boyoka ngai, ngai mpe nakoloba na bino makambo oyo nayebi.
Therefore, I pray, listen to me: I also will declare my opinion.
11 Tango bino bozalaki koloba, ngai nazalaki koloba te, nazalaki koyoka makanisi na bino, wana bozalaki koluka makambo ya koloba.
Behold, I have waited for your words, I have listened to your arguments, Whilst ye searched out what to say;
12 Nalandaki bino na bokebi nyonso; moko te kati na bino amoni mabe ya Yobo, moko te kati na bino alongi makanisi ya Yobo.
Yea, I have attended to you; And behold, none of you hath refuted Job, Nor answered his words.
13 Boloba te: ‹ Tomoni bwanya; Nzambe kaka nde akoki kolonga ye, kasi moto te. ›
Say not, then, “We have found out wisdom; God must conquer him, not man.”
14 Lokola Yobo alobaki maloba na ye epai na ngai te, ngai mpe nakosalela makanisi na bino te mpo na kozongisela ye eyano.
He hath not directed his discourse against me, And with speeches like yours will I not answer him.
15 Bayoki soni, batikali ata na liloba moko te ya koloba, makambo ya koloba esili bango na minoko!
They were confounded! they answered no more! They could say nothing!
16 Boni, nasengeli sik’oyo kozela, awa bazangi maloba to basuki wana mpe bakangi minoko?
I waited, but they spake not; They stood still; they answered no more!
17 Ngai mpe nakoloba sik’oyo, nakoloba makambo oyo nayebi.
Therefore will I answer, on my part; I also will show my opinion.
18 Lokola maloba ebele etondi kati na ngai, motema na ngai ezali kopela lokola moto.
For I am full of matter; The spirit within me constraineth me.
19 Kati na ngai, nazali lokola mbeki ya vino oyo ezali kotoka, lokola mbeki ya vino ya sika oyo ekomi pene ya kopasuka.
Behold, my bosom is as wine that hath no vent; Like bottles of new wine, which are bursting.
20 Nakoloba mpo ete motema na ngai ekita, nakofungola bibebu na ngai mpo ete nayanola.
I will speak, that I may be relieved; I will open my lips and answer.
21 Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te;
I will not be partial to any man's person, Nor will I flatter any man.
22 pamba te, soki nayebaki kobondela bato, Mokeli na ngai alingaki kolongola ngai mbala moko.
For I know not how to flatter; Soon would my Maker take me away.