< Yobo 30 >
1 « Kasi sik’oyo, nakomi eloko ya kotiola epai ya bilenge oyo batata na bango bazangaki tina, mpe oyo nakokaki kutu te kopesa nzela ya kolia esika moko na mbwa na ngai, oyo ezalaki kobatela bibwele na ngai.
Et maintenant, je suis la risée d’hommes plus jeunes que moi, dont je n’aurais pas daigné mettre les pères parmi les chiens de mon troupeau.
2 Makasi ya maboko na bango ekokaki kutu kosunga ngai na nini? Pamba te basilaki makasi na nzoto,
Qu’aurais-je fait de la force de leurs bras? Ils sont privés de toute vigueur.
3 bazalaki bato bakawuka na nzala mpe na kozanga, bato oyo bazalaki kolia mabele ya esobe mpe ezanga matiti.
Desséchés par la misère et la faim, ils broutent le désert, un sol depuis longtemps aride et désolé.
4 Bazalaki kobuka matiti ya mungwa kati na banzete mpe kolia misisa ya banzete mike.
Ils cueillent sur les buissons des bourgeons amers, ils n’ont pour pain que la racine des genêts.
5 Babenganaki bango kati na bato na bango, babelelaki bango lokola miyibi.
On les écarte de la société des hommes, on crie après eux comme après le voleur.
6 Bazalaki kovanda na nzela ya mayi ekawuka, kati na mabulu ya mabele mpe ya mabanga;
Ils habitent dans d’affreuses vallées, dans les cavernes de la terre et les rochers.
7 bazalaki kolela lokola banyama kati na banzete mike ya nzube, bazalaki kosangana na se ya banzete mikuse.
On entend leurs cris sauvages parmi les broussailles, ils se couchent ensemble sous les ronces:
8 Bana oyo batata na bango bazanga mayele mpe bazanga kombo babenganaki bango libanda ya mboka.
gens insensés, race sans nom, bannis avec mépris de la terre habitée!
9 Sik’oyo, bana na bango ya mibali bakomi koseka ngai na banzembo, nakomi lisapo kati na minoko na bango.
Et maintenant je suis l’objet de leurs chansons, je suis en butte à leurs propos.
10 Bazali koyina ngai mpe bakimi mosika na ngai, bazali na somo te ya kobwakela ngai soyi na elongi.
Ils ont horreur de moi, ils me fuient, ils ne détournent pas leur crachat de mon visage.
11 Mpo ete Nzambe alembisi singa ya tolotolo na ngai mpe ayokisi ngai soni, bazali komipekisa na likambo moko te liboso na ngai.
Ils se donnent libre carrière pour m’outrager, ils rejettent tout frein devant moi.
12 Na loboko na ngai ya mobali, lisanga ya bato mabe ezali kobundisa ngai, batie mitambo na makolo na ngai, batie mabaku na nzela na ngai mpo na kosala ngai mabe;
Des misérables se lèvent à ma droite, ils cherchent à ébranler mes pieds, ils frayent jusqu’à moi leurs routes meurtrières.
13 bakangi nzela na ngai, balongi kobebisa ngai atako moto moko te asungaki bango.
Ils ont bouleversé mes sentiers, ils travaillent à ma ruine, eux à qui personne ne porterait secours.
14 Bazali koya lokola na nzela ya lidusu ya monene, bazali kobunda-bunda kati na ndako ebukana.
Ils fondent sur moi, comme par une large brèche, ils se précipitent parmi les décombres.
15 Somo elati ngai, lokumu na ngai ekeyi lokola mopepe, bomengo na ngai elimwe lokola lipata.
Les terreurs m’assiègent, ma prospérité est emportée comme un souffle, mon bonheur a passé comme un nuage.
16 Sik’oyo, bomoi na ngai ekeyi, mpe mikolo ya pasi ekangi ngai.
Et maintenant, mon âme s’épanche en moi, les jours d’affliction m’ont saisi.
17 Butu ezali kotobola mikuwa na ngai mpe pasi ezali kozangisa ngai pongi.
La nuit perce mes os, les consume, le mal qui me ronge ne dort pas.
18 Na nguya na yango, pasi ekomi lokola kingo ya nzambala na ngai.
Par sa violence, mon vêtement a perdu sa forme, il me serre comme une tunique.
19 Nzambe abwaki ngai na potopoto, mpe nakomi lokola putulu ya mabele to ya moto.
Dieu m’a jeté dans la fange, je suis comme la poussière et la cendre.
20 Oh Nzambe, nazali koganga epai na Yo, kasi ozali kopesa ngai eyano te; natelemi, kasi ozali kotala ngai kaka pamba.
Je crie vers toi, et tu ne me réponds pas; je me tiens debout, et tu me regardes avec indifférence.
21 Obongwani monguna ya kanza mpo na ngai, ozali kobundisa ngai na nguya ya loboko na Yo.
Tu deviens cruel à mon égard, tu m’attaques avec toute la force de ton bras.
22 Omemi ngai liboso ya mopepe mpe otiki ete mopepe yango emema ngai, bongo epumbwisi ngai mosika.
Tu m’enlèves, tu me fais voler au gré du vent, et tu m’anéantis dans le fracas de la tempête.
23 Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi.
Car, je le sais, tu me mènes à la mort, au rendez-vous de tous les vivants.
24 Kasi boni, moto oyo azali kokufa akoki kotombola ata loboko te? Moto oyo azali na pasi, akoki te kosenga lisungi?
Cependant celui qui va périr n’étendra-t-il pas les mains et, dans sa détresse, ne poussera-t-il pas un cri?
25 Boni, nazalaki kolela te elongo na bato oyo bazalaki na pasi? Motema na ngai eyokelaki babola mawa te?
N’avais-je pas des larmes pour l’infortuné? Mon cœur ne s’est-il pas attendri sur l’indigent?
26 Nazelaki esengo, kasi pasi nde ekomeli ngai; nazelaki pole, kasi molili nde ekomeli ngai.
J’attendais le bonheur, et le malheur est arrivé; j’espérais la lumière, et les ténèbres sont venues.
27 Motema na ngai ezali kobaluka kati na ngai, wuta mokolo pasi oyo ekomeli ngai.
Mes entrailles bouillonnent sans relâche, les jours d’affliction ont fondu sur moi.
28 Nakomi mwindo, kasi moyi te nde eyindisi ngai; kati na lisanga, nakomi kaka kotelema mpe kobelela mpo na koluka lisungi.
Je marche dans le deuil, sans soleil; si je me lève dans l’assemblée, c’est pour pousser des cris.
29 Nakoma ndeko ya mbwa ya zamba mpe moninga ya maligbanga.
Je suis devenu le frère des chacals, le compagnon des filles de l’autruche.
30 Poso na ngai ya nzoto eyindi mpe ekomi kokweya-kweya, mikuwa na ngai ekawuki na moyi.
Ma peau livide tombe en lambeaux, mes os sont brûlés par un feu intérieur.
31 Lindanda na ngai etikali kaka mpo na matanga, mpe flite na ngai, mpo na kosunga mingongo ya baleli. »
Ma cithare ne rend plus que des accords lugubres, mon chalumeau que des sons plaintifs.