< Yobo 3 >

1 Sima na yango, Yobo afungolaki monoko na ye mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe.
Depois disto abriu Job a sua boca, e amaldiçoou o seu dia.
2 Yobo alobaki:
E Job respondeu, e disse:
3 « Tika ete mokolo ya mbotama na ngai, mpe butu oyo elobaki: ‹ Mwana mobali moko abotami, › ekufa!
Pereça o dia em que nasci, e a noite em que se disse: Foi concebido um homem!
4 Tika ete mokolo yango ebongwana molili! Tika ete, wuta na likolo, Nzambe akanisa yango lisusu te! Tika ete pole engengela yango lisusu te!
Converta-se aquele dia em trevas; e Deus de cima não tenha cuidado dele, nem resplandeça sobre ele a luz.
5 Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango! Tika ete lipata ezipa yango, mpe molili ebangisa pole na yango!
Contaminem-no as trevas e a sombra de morte; habitem sobre ele nuvens: a escuridão do dia o espante!
6 Tika ete molili makasi ekotela butu yango, ete batanga yango lisusu te kati na mikolo ya mibu to kati na mikolo ya basanza!
A escuridão tome aquela noite, e não se goze entre os dias do ano, e não entre no número dos meses!
7 Tika ete butu yango etikala ekomba, ete koganga moko te ya esengo eyokana na butu yango!
Ah que solitária seja aquela noite, e suave música não entre nela!
8 Tika ete bato oyo balakelaka mikolo mabe, bato oyo balamusaka bilima minene ya mayi, balakela yango mabe!
Amaldiçoem-na aqueles que amaldiçoam o dia, que estão prontos para levantar o seu pranto.
9 Tika ete minzoto ya tongo na yango ekoma molili, ezela na pamba tongo oyo ekotana mpe emona kongenga ya tongo te.
Escureçam-se as estrelas do seu crepúsculo; que espere a luz, e não venha: e não veja as pestanas dos olhos da alva!
10 Pamba te ekangelaki ngai te bikuke ya libumu ya mama na ngai mpo na kobombela miso na ngai pasi ya boye!
Porque não fechou as portas do ventre; nem escondeu dos meus olhos a canceira?
11 Mpo na nini namikufelaki te kati na libumu ya mama na ngai? Mpo na nini nakataki motema te tango nabimaki na libumu ya mama na ngai?
Porque não morri eu desde a madre? e em saindo do ventre, não expirei?
12 Mpo na nini mabolongo eyambaki ngai? Mpo na nini mama amelisaki ngai mabele?
Porque me receberam os joelhos? e porque os peitos, para que mamasse?
13 Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, nalingaki na ngai kokufa mpe kopema
Porque já agora jazera e repousara; dormiria, e então haveria repouso para mim.
14 elongo na bakonzi mpe bapesi toli ya mokili, oyo bamitongelaki malita na bango kasi lelo ebeba,
Com os reis e conselheiros da terra, que se edificavam casas nos lugares assolados,
15 elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo mpe batondisa palata kati na bandako na bango.
Ou com os príncipes que tinham ouro, que enchiam as suas casas de prata,
16 Mpo na nini babombaki ngai te na se ya mabele lokola zemi oyo esopani to lokola mwana oyo atikala komona te pole ya mokolo?
Ou como aborto oculto, não existiria: como as crianças que não viram a luz.
17 Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato, bato oyo balembi bazwaka bopemi,
Ali os maus cessam de perturbar: e ali repousam os cançados.
18 bato ya boloko bazwaka kimia mpe bayokaka lisusu te mongongo ya mokengeli.
Ali os presos juntamente repousam, e não ouvem a voz do exator:
19 Ezala mobola to mozwi, bango mibale bazalaka kuna, mpe mowumbu akangolamaka na maboko ya nkolo na ye.
Ali está o pequeno e o grande, e o servo fica livre de seu senhor.
20 Mpo na nini pole epesamelaka bato ya pasi? Mpo na nini bomoi epesamelaka moto oyo azali na pasi na motema?
Porque se dá luz ao miserável, e vida aos amargosos de ânimo?
21 Bazelaka kufa, kasi eyaka te; nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,
Que esperam a morte, e não se acha: e cavam em busca dela mais do que de tesouros ocultos:
22 balingaki kotonda na esengo mpe kosepela soki bamoni kunda!
Que de alegria saltam, e exultam, achando a sepultura:
23 Mpo na nini bomoi epesamela moto oyo nzela na ye ebombama, moto oyo Nzambe azingela lokola lopango?
Ao homem, cujo caminho é oculto, e a quem Deus o encobriu?
24 Pamba te kolela ekomi bilei na ngai, bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.
Porque antes do meu pão vem o meu suspiro: e os meus gemidos se derramam como água.
25 Makambo oyo nazalaki kobanga, yango nde ezali kokomela ngai; oyo nazalaki koyokela somo, yango nde ezali kosalemela ngai.
Porque o temor que temo me veio: e o que receiava me aconteceu.
26 Nazangi kimia, motema na ngai ezali kokita te mpe nazangi bopemi; kasi minyoko na minyoko kaka nde nazali na yango. »
Nunca estive descançado, nem sosseguei, nem repousei, mas veio sobre mim a perturbação.

< Yobo 3 >