< Yobo 29 >
2 « Ah! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na basanza oyo eleki, ndenge nazalaki na mikolo oyo Nzambe azalaki kobatela ngai,
誰能賜我似以前的歲月,像以往天主護守我的時日呢﹖
3 tango mwinda na Ye ezalaki kongenga na moto na ngai, mpe tango, na pole na Ye, nazalaki kotambola kati na molili.
那時他的燈,光照在我頭上,藉他的光明,我走過黑暗。
4 Ah! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na mikolo oyo nazalaki nanu na makasi, tango bolingo ya Nzambe ezalaki kopambola ndako na ngai,
惟願我如壯年之時,那時天主護佑我的帳幕;
5 tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaki nanu elongo na ngai bana mibali na ngai bazingelaki ngai,
全能者與我相偕,我的子女環繞著我;
6 tango nzela na ngai etondisamaki na miliki mpe libanga ezalaki kosopa mafuta ya olive mpo na ngai!
那時我以奶油洗腳,崖石流油成河。
7 Tango nazalaki kokende na ekuke ya mboka mpe nazalaki kotia kiti na ngai na esika oyo bato ebele bakutanaka,
當我走出城門,在市井設我座位之時,
8 bilenge bazalaki komona ngai mpe bazalaki kobombama, mibange bazalaki kotelema,
少年人看見我都迴避,老年人都起身站立;
9 bakambi bazalaki kozanga maloba mpe kozipa minoko na bango na maboko,
王侯停止講話,用手堵住自己的口;
10 bato ya lokumu bazalaki kokitisa mingongo na bango mpe lolemo na bango ezalaki kokangama na minoko na bango.
首領不敢出聲,舌頭緊貼上顎。
11 Moto nyonso oyo azalaki koyoka ngai azalaki koloba ete nazali moto ya esengo, mpe bato nyonso oyo bazalaki komona ngai bazalaki kotatola mpo na ngai;
凡有耳聽見我的,必稱我有福;凡有眼看見我的,都必稱讚我。
12 pamba te nazalaki kosunga babola oyo bazalaki kosenga lisungi, mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye.
因為我援助了呼救的窮人,和無依無靠的孤兒。
13 Moto oyo akomaki pene ya kokufa azalaki kopambola ngai, mpe nazalaki kopesa esengo na motema ya mwasi oyo akufisa mobali.
那受喪亡之痛的人稱謝我,我使寡婦的心歡樂。
14 Nazalaki kolata bosembo lokola elamba; bosembo ezalaki elamba na ngai mpe kitendi na ngai ya kokanga na moto.
我披上正義,正義就如我衣;我的公正,猶如我的長袍和冠冕。
15 Nazalaki miso ya mokufi miso mpe makolo ya mokakatani;
我作了盲人的眼,跛者的腳。
16 nazalaki tata ya moto oyo akelela, nazalaki kobundela moto oyo nayebi te;
我成了窮人之父,我調查過素不相識者的案件。
17 nabukaki mbanga ya moto mabe mpe nabotolaki bato oyo akangaki na minu na ye.
我打碎惡人的燎牙,由他牙齒中奪出了獵物。
18 Nazalaki kokanisa: ‹ Nakokufa kati na ndako na ngai moko sima na mikolo ebele lokola zelo.
我心想:我必壽終正寢,我的壽數必如塵沙。
19 Misisa na ngai ekoluka mayi, mpe mayi oyo ezalaka na matiti ekovanda butu mobimba na bitape na ngai.
我的根蔓延到水邊,夜間甘露落在我的枝葉上。
20 Lokumu na ngai ekozongisela ngai esengo, ata tolotolo ekokoma ya sika na loboko na ngai. ›
我的榮耀不斷更新,我手中的弓日新月異。
21 Bato bazalaki koyoka ngai na bokebi, bazalaki na kimia mpo na koyoka toli na ngai.
聽我講話的人,屏息等待,靜聽我的指教。
22 Sima na ngai koloba, bazalaki na liloba ya kozongisa te; maloba na ngai ezalaki kokota na esengo na matoyi na bango.
我講話之後,無人再敢講話,我的話像水珠滴在他們身上。
23 Bazalaki kozela ngai ndenge bazelaka mvula, mpe bazalaki komela maloba na ngai lokola mvula ya suka.
他們期待我如望甘霖,張著大口如渴盼春雨。
24 Soki nasekisi bango, bazalaki kondima te; kongenga ya elongi na ngai ezalaki na motuya mpo na bango.
我向他們微笑,他們不敢相信;我和善的面容,他們必不放過。
25 Naponaki nzela mpo na bango mpe navandaki lokola mokonzi na bango; nazalaki kokonza bango lokola mokonzi kati na mampinga na ye, nazalaki lokola moto oyo azalaki kolendisa bato ya mawa. »
我為他們選擇了道路,身居前導,一如立在軍中的君王;我引他們到那裏,他們就去。