< Yobo 26 >

1 Yobo azongisaki:
ויען איוב ויאמר
2 « Ah! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi, ndenge osungi loboko oyo elembi!
מה-עזרת ללא-כח הושעת זרוע לא-עז
3 Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya, mpe tala ebele na mayele oyo olakisi!
מה-יעצת ללא חכמה ותשיה לרב הודעת
4 Ozwi maloba oyo wapi? Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani?
את-מי הגדת מלין ונשמת-מי יצאה ממך
5 Bakufi balengaka na se ya mayi mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.
הרפאים יחוללו-- מתחת מים ושכניהם
6 Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu, mpe libulu ya molili ezali polele. (Sheol h7585)
ערום שאול נגדו ואין כסות לאבדון (Sheol h7585)
7 Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te, atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,
נטה צפון על-תהו תלה ארץ על-בלימה
8 akangaka mayi kati na mapata, kasi mapata epasukaka te;
צרר-מים בעביו ולא-נבקע ענן תחתם
9 azipaka kiti ya bokonzi na Ye, atandaka mapata na likolo na yango;
מאחז פני-כסה פרשז עליו עננו
10 akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili.
חק-חג על-פני-מים-- עד-תכלית אור עם-חשך
11 Makonzi ya Lola ezali kolenga mpe ezali kokamwa na pamela na Ye.
עמודי שמים ירופפו ויתמהו מגערתו
12 Na nguya na Ye, apasoli ebale monene; mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni.
בכחו רגע הים ובתובנתו (ובתבונתו) מחץ רהב
13 Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko, loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka.
ברוחו שמים שפרה חללה ידו נחש ברח
14 Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye? »
הן-אלה קצות דרכו-- ומה-שמץ דבר נשמע-בו ורעם גבורתו מי יתבונן

< Yobo 26 >