< Yobo 25 >

1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki:
Then Bildad the Shuhite answered,
2 « Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.
"Dominion and fear are with him. He makes peace in his high places.
3 Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola? Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te?
Can his armies be counted? On whom does his light not arise?
4 Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto?
How then can man be just with God? Or how can he who is born of a woman be clean?
5 Soki kutu sanza ezali kongenga te, mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,
Look, even the moon has no brightness, and the stars are not pure in his sight;
6 toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba! »
How much less man, who is a worm, the son of man, who is a worm."

< Yobo 25 >