< Yobo 23 >

1 Yobo azongisaki:
Then Job answered,
2 « Lelo lisusu, kolela na ngai ezali bololo, loboko oyo ezali likolo na ngai eleki kolela ya motema na ngai na kilo.
“Even today my complaint is rebellious. His hand is heavy in spite of my groaning.
3 Soki nayebaki esika nini nakoki komona Nzambe, nalingaki kokoma liboso ya kiti ya bokonzi na Ye,
Oh that I knew where I might find him! That I might come even to his seat!
4 nalingaki kotalisa, na bosembo nyonso, likambo na ngai liboso na Ye, mpe kotondisa monoko na ngai na matatoli ya solo,
I would set my cause in order before him, and fill my mouth with arguments.
5 nalingaki koyeba biyano oyo alingaki kopesa ngai, mpe kososola makambo oyo alingaki koloba na ngai.
I would know the words which he would answer me, and understand what he would tell me.
6 Boni, alingaki kosalela nguya na Ye mpo na kosamba na ngai? Te, alingaki kutu koyokela ngai mawa!
Would he contend with me in the greatness of his power? No, but he would listen to me.
7 Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye likambo na ngai, mpe nakokangolama libela wuta na maboko ya mosambisi na ngai.
There the upright might reason with him, so I should be delivered forever from my judge.
8 Soki nakeyi na ngambo ya este, azali kuna te; soki nakeyi na ngambo ya weste, nazali komona Ye te.
“If I go east, he is not there. If I go west, I can’t find him.
9 Tango azali na mosala na ngambo ya nor, nazali komona Ye te, tango azali kobaluka na ngambo ya sude, nazali komona Ye ata moke te.
He works to the north, but I can’t see him. He turns south, but I can’t catch a glimpse of him.
10 Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.
But he knows the way that I take. When he has tried me, I will come out like gold.
11 Makolo na ngai elandaki matambe na Ye; natambolaki na nzela na Ye mpe natikalaki kopengwa na yango te.
My foot has held fast to his steps. I have kept his way, and not turned away.
12 Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.
I haven’t gone back from the commandment of his lips. I have treasured up the words of his mouth more than my necessary food.
13 Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye; nani akoki kotelemela Ye? Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye.
But he stands alone, and who can oppose him? What his soul desires, even that he does.
14 Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai mpe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa.
For he performs that which is appointed for me. Many such things are with him.
15 Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi; mpe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso, nazali kobanga Ye.
Therefore I am terrified at his presence. When I consider, I am afraid of him.
16 Nzambe alembisi ngai, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abangisi ngai.
For God has made my heart faint. The Almighty has terrified me.
17 Atako bongo, molili to molili makasi oyo ezingeli ngai ekangi ngai monoko te.
Because I was not cut off before the darkness, neither did he cover the thick darkness from my face.

< Yobo 23 >