< Yobo 21 >

1 Yobo azongisaki:
Alors Job prit la parole et dit:
2 « Yoka na bokebi maloba na ngai, mpe tika ete yango ezala kobondisama mpo na ngai.
Écoutez, écoutez mes paroles, que j’aie, du moins, cette consolation de vous.
3 Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba; soki nasilisi koloba nde bokoba na bino koseka ngai.
Permettez-moi de parler à mon tour, et, quand j’aurai parlé, vous pourrez vous moquer.
4 Boni, nazali kolela epai ya moto? Ndenge nini nalemba te kokanga motema?
Est-ce contre un homme que se porte ma plainte? Comment donc la patience ne m’échapperait elle pas?
5 Botala ngai, bokokamwa, bokozanga ata likambo ya koloba.
Regardez-moi et soyez dans la stupeur, et mettez la main sur votre bouche.
6 Soki kaka nakanisi yango, nabangi, mpe nzoto na ngai ekomi kolenga na somo.
Quand j’y pense, je frémis; et un frissonnement saisit ma chair.
7 Mpo na nini bato mabe bazali kowumela na bomoi? Mpo na nini bakomaka mibange mpe babakisaka nguya na bango?
Pourquoi les méchants vivent-ils, et vieillissent-ils, accroissant leur force?
8 Bana na bango bazali kolendisama pembeni na bango, mpe bakitani na bango bazali kofuluka na miso na bango.
Leur postérité s’affermit autour d’eux, leurs rejetons fleurissent à leurs yeux.
9 Bandako na bango ebatelami mpe ezangi kobanga, fimbu na Nzambe ezali likolo na bango te.
Leur maison est en paix, à l’abri de la crainte; la verge de Dieu ne les touche pas.
10 Bangombe na bango ya mibali elembaka te kobotisa, bangombe na bango ya basi ebotaka kaka mpe esopaka zemi te.
Leur taureau est toujours fécond, leur génisse enfante et n’avorte pas.
11 Lokola kati na etonga ya bameme, bazali kotika bana na bango: bamoko kokima-kima, mpe bamosusu kosakana.
Ils laissent courir leurs enfants comme un troupeau, leurs nouveau-nés bondissent autour d’eux.
12 Bazali kobeta mbonda mpe lindanda, bazali kosepela na lokito ya flite;
Ils chantent au son du tambourin et de la cithare, ils se divertissent au son du chalumeau.
13 bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo, mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia. (Sheol h7585)
Ils passent leurs jours dans le bonheur, et ils descendent en un instant au schéol. (Sheol h7585)
14 Nzokande, balobaka na Nzambe: ‹ Longwa mosika na biso! Tozali na posa te ya koyeba nzela na yo.
Pourtant ils disaient à Dieu: « Retire-toi de nous; nous ne désirons pas connaître tes voies.
15 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani mpo ete tosalela ye? Tokozwa litomba nini na kosambela ye? ›
Qu’est-ce que le Tout-Puissant, pour que nous le servions? Que gagnerions-nous à le prier? »
16 Boni, bozwi na bango ezali kati na maboko na bango moko te? Kasi mosika na ngai, likanisi ya kolanda toli ya bato mabe!
Leur prospérité n’est-elle pas dans leur main? — Toutefois, loin de moi le conseil de l’impie! —
17 Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe? Mbala boni pasi ezali kokitela bango? Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye?
Voit-on souvent s’éteindre la lampe des impies, la ruine fondre sur eux, et Dieu leur assigner un lot dans sa colère?
18 Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka?
Les voit-on comme la paille emportée par le vent, comme la glume enlevée par le tourbillon?
19 Balobaka: ‹ Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe epai ya bana na ye. › Tika ete apesa etumbu yango epai na ye moko moto mabe, mpo ete ayeba yango!
« Dieu, dites-vous, réserve à ses enfants son châtiment!… » Mais que Dieu le punisse lui-même pour qu’il le sente,
20 Tika ete miso na ye moko emona kobebisama na ye, mpe amela kopo ya kanda ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
qu’il voie de ses yeux sa ruine, qu’il boive lui-même la colère du Tout-Puissant!
21 Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini tango basanza oyo bakatela ye ekomi na suka?
Que lui importe, en effet, sa maison après lui, une fois que le nombre de ses mois est tranché?
22 Bakoki solo koyekolisa Nzambe mayele, Ye oyo asambisaka ezala bato oyo baleki kotombolama?
Est-ce à Dieu qu’on apprendra la sagesse, à lui qui juge les êtres les plus élevés?
23 Moko azali kokufa na makasi na ye nyonso, na kimia nyonso mpe na pasi ata moko te,
L’un meurt au sein de sa prospérité, parfaitement heureux et tranquille,
24 na nzoto sembesembe, mpe na mikuwa etonda na mafuta;
les flancs chargés de graisse, et la moelle des os remplie de sève.
25 mosusu azali kokufa na mawa na motema, atikali ata komeka kosepela na bomengo te.
L’autre meurt, l’amertume dans l’âme, sans avoir goûté le bonheur.
26 Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko na se ya mabele, mpe bankusu ekozipa bango.
Tous deux se couchent également dans la poussière, et les vers les couvrent tous deux.
27 Solo, nayebi malamu makanisi mpe mabongisi na bino, mpo na kotelemela ngai;
Ah! Je sais bien quelles sont vos pensées, quels jugements iniques vous portez sur moi.
28 bolobaka: ‹ Wapi ndako ya mozwi? Wapi bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda? ›
Vous dites: « Où est la maison de l’oppresseur! Qu’est devenue la tente qu’habitaient les impies? »
29 Botunaki mituna wana te epai ya baleki nzela? Bobosani makambo oyo bayebisaki bino,
N’avez-vous donc jamais interrogé les voyageurs, et ignorez-vous leurs remarques?
30 ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi, akangolamaka mpe na mokolo ya kanda.
Au jour du malheur, le méchant est épargné; au jour de la colère, il échappe au châtiment.
31 Nani, na miso ya moto mabe, apamelaka etamboli na ye? Nani azongiselaka ye makambo oyo asalaka?
Qui blâme devant lui sa conduite? Qui lui demande compte de ce qu’il a fait?
32 Bamemaka ye na lilita, mpe bakengelaka kunda na ye.
On le porte honorablement au tombeau; et on veille sur son mausolée.
33 Mabele ya lubwaku ezalaka malamu mpo na ye; bato nyonso batambolaka sima na ye na molongo, mpe bato ebele penza batambolaka liboso na ye.
les glèbes de la vallée lui sont légères, et tous les hommes y vont à sa suite, comme des générations sans nombre l’ y ont précédé.
34 Boye, mpo na nini bozali komitungisa mpo na kobondisa ngai? Pamba te kati na biyano na bino, etikali kaka lokuta. »
Que signifient donc vos vaines consolations? De vos réponses il ne reste que perfidie.

< Yobo 21 >