< Yobo 20 >

1 Tsofari, moto ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki:
Då tok Sofar frå Na’ama til ords og sagde:
2 « Makanisi na ngai ezali kotinda ngai ete nayanola, nakoki kovanda nye te, pamba te motema na ngai ekomi likolo-likolo.
«Difor gjev mine tankar svar, og difor stormar det i meg.
3 Nazali koyoka maloba mabe, maloba oyo eyokisi ngai soni! Kasi mayele na ngai elakisi ngai maloba ya kozongisa.
Ei skamleg skrapa fær eg høyra, men kloke svar mi ånd gjev meg.
4 Solo, oyebi malamu ete wuta kala, wuta tango batia moto na likolo ya mabele,
Veit du’kje at frå ævords tid, frå mannen fyrst på jord vart sett,
5 elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke, mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene ewumelaka kaka mwa tango moke.
ugudlege hev stokkut jubel, vanheilage stuttvarug gleda?
6 Ata molayi na ye emati kino likolo mpe moto na ye etuti mapata,
Når modet hans til himmels stig, når hovudet mot sky han lyfter,
7 akobebisama libela lokola nyei na ye, mpe bato oyo bakomona ye bakoloba: ‹ Azali wapi? ›
han evig gjeng til grunns som skarnet; «Kvar er han?» spør dei, honom såg.
8 Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te, alimwaka lokola na ndoto ya butu.
Lik draumen glid han burt og kverv, vert jaga som ei nattesyn.
9 Liso oyo ezalaki kotala ye ekomona ye lisusu te, esika oyo azalaki kovanda ekomona ye lisusu te,
Han burte er for alle augo, hans stad veit ikkje til han meir.
10 bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola, maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki,
Hans born lyt hjelpa fatigfolk; hans hender gjev hans gods attende.
11 mikuwa na ye oyo ezalaki makasi na bolenge ekolala elongo na ye kati na putulu.
Hans bein var full’ av ungdomskraft; men den i moldi ligg med honom.
12 Soki mabe ezali sukali na monoko na ye mpe abombi yango na se ya lolemo na ye,
Er i hans munn det vonde søtt, vil han det under tunga gøyma,
13 soki ameki elengi na yango mpe atiki yango te, soki abombi yango na se ya minu na ye,
sparer han det og slepper ikkje, held han det under gomen fast,
14 bilei na ye ekobongwana kati na libumu na ye, ekokoma lokola ngenge ya nyoka kati na ye.
so vert i kroppen maten hans til orme-eiter i hans buk.
15 Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango; Nzambe akofutisa ye yango.
Det gods han gløypte, spyr han ut; Gud driv det ut or magen hans.
16 Akofiba ngenge ya nyoka, lolemo ya etupa ekoboma ye.
Han orme-eiter i seg saug, og ødle-tunga honom drep.
17 Akomona lisusu te mayi mike, miluka, bibale, mayi oyo etiolaka makasi elongo na mafuta ya nzoyi mpe miliki;
Han fær visst ikkje skoda bekkjer, ei heller flaum av mjølk og honning.
18 akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba, akomela ata moko te, akotikala kosepela te na litomba oyo azwaki na mombongo na ye.
Han rikdom vinn, men nyt han ikkje; han samlar gods, men vert’kje glad.
19 Pamba te anyokolaki babola mpe atikaki bango lokola bato bazangela, abotolaki ndako ya bato na esika ya kotonga ndako na ye moko.
Han krasa småfolk, let deim liggja, han rana hus som han ei byggjer.
20 Solo, lokoso na ye ya kozwa mingi ekosila te, akoki komibikisa te na nzela ya bomengo na ye.
Han kjende ikkje ro inni seg, men med sin skatt han slepp’kje undan.
21 Ayebaki te kopekisa lokoso ya libumu na ye, yango wana bomengo na ye mpe ekowumela te.
Hans hækna sparer ingen ting; og difor kverv hans lukka burt.
22 Wana azali kati na bomengo, pasi ekokomela ye, kilo nyonso ya pasi ekokweyela ye.
I all si ovnøgd lid han naud; kvar armings-hand kjem yver honom.
23 Wana azali kotondisa libumu na ye, Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, mpe ekonokela ye lokola bilei.
Og til å fylla buken hans han sender vreiden yver honom, let maten sin på honom regna.
24 Ata akimi liboso ya ebundeli ya ebende, mbanzi ya bronze ekotobola ye;
Og um han frå jarnvåpen flyr, han såra vert frå koparbogen;
25 soki abimisi songe ya mbanzi yango na libale na ye elongo na makila ya mbuma-mbuma, somo ekoyela ye.
ut gjenom ryggen pili kjem, den blanke odd ut or hans gall, og dauderædslor fell på honom.
26 Molili makasi ezali kozela libula na ye, moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye.
Alt myrker gøymt er åt hans skattar, ja, ukveikt eld et honom upp, og øyder all hans eigedom.
27 Likolo ekobimisa polele mabe na ye, mabele ekotelemela ye;
Himmelen ter hans brotsverk fram, og jordi reiser seg imot han.
28 mayi ekomema ndako na ye mpe biloko nyonso ya ndako na ye, na mokolo ya kanda ya Nzambe.
Hans heime-forråd fer sin veg, renn burt på vreidedagen hans.
29 Yango nde lifuti oyo Nzambe abongisi mpo na moto mabe, libula oyo Nzambe alaki ye. »
Slikt etlar Gud til gudlaus mann; det lovar Gud til arv åt honom.»

< Yobo 20 >