< Yobo 2 >

1 Mokolo moko lisusu, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.
Il arriva un jour que, les fils de Dieu étant venus se présenter devant Yahweh, Satan vint aussi au milieu d’eux se présenter devant Yahweh.
2 Yawe atunaki Satana: — Owuti wapi? Satana azongiselaki Yawe: — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.
Et Yahweh dit à Satan: « D’où viens-tu? » Satan répondit à Yahweh et dit: « De parcourir le monde et de m’y promener. »
3 Yawe alobaki na Satana: — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili: azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe.
Yahweh dit à Satan: « As-tu remarqué mon serviteur Job? Il n’y a pas d’homme comme lui sur la terre, intègre, droit, craignant Dieu et éloigné du mal. Il persévère toujours dans son intégrité, quoique tu m’aies provoqué à le perdre sans raison. »
4 Satana azongiselaki Yawe: — Poso mpo na poso: moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye.
Satan répondit à Yahweh et dit: « Peau pour peau! L’homme donne ce qu’il possède pour conserver sa vie.
5 Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo, beta nzoto mpe mikuwa na ye; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.
Mais étends ta main, touche ses os et sa chair, et on verra s’il ne te maudit pas en face. »
6 Yawe alobaki na Satana: — Malamu! Azali kati na maboko na yo, kasi kosimba bomoi na ye te!
Yahweh dit à Satan: « Voici que je le livre entre tes mains; seulement épargne sa vie! »
7 Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.
Et Satan se retira de devant la face de Yahweh. Et il frappa Job d’une lèpre maligne depuis la plante des pieds jusqu’au sommet de la tête.
8 Yobo akamataki eteni ya mbeki mpo na komikwanza na yango nzoto, mpe amivandisaki na putulu.
Et Job prit un tesson pour gratter ses plaies et il s’assit sur la cendre.
9 Mwasi na ye alobaki na ye: — Boni, ozali kaka kokoba na bosembo na yo? Lakela Nzambe mabe mpe kufa na yo!
Et sa femme lui dit: « Tu persévère encore dans ton intégrité! Maudis Dieu et meurs! »
10 Yobo azongiselaki ye: — Ah! Ozali koloba lokola moto ya liboma! Boni, tondimaka kaka makambo ya malamu, epai ya Nzambe, kasi tondimaka makambo mabe te?
Il lui dit: « Tu parles comme une femme insensée. Nous recevons de Dieu le bien, et nous n’en recevrions pas aussi le mal? » En tout cela, Job ne pécha pas par ses lèvres.
11 Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani; Bilidadi, moto ya Shuwa; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye.
Trois amis de Job, Eliphaz de Théman, Baldad de Suhé, et Sophar de Naama, apprirent tous les malheurs qui étaient venus sur lui; ils partirent chacun de leur pays et se concertèrent pour venir le plaindre et le consoler.
12 Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito.
Ayant de loin levé les yeux, ils ne le reconnurent pas, et ils élevèrent la voix et pleurèrent; ils déchirèrent chacun leur manteau, et jetèrent de la poussière vers le ciel au-dessus de leurs têtes.
13 Bamivandisaki na mabele elongo na Yobo mikolo sambo mpe butu sambo. Moko te akokaki koloba na ye ata liloba moko, pamba te bamonaki ndenge nini pasi na ye ezalaki makasi.
Et ils se tinrent assis à terre auprès de lui sept jours et sept nuits, sans qu’aucun d’eux lui dit une parole, parce qu’ils voyaient combien sa douleur était excessive.

< Yobo 2 >