< Yobo 19 >

1 Yobo azongisaki:
Then Job answered,
2 « Kino tango nini bokotungisa ngai mpe kolembisa ngai na maloba na bino?
“How long will you torment me, and crush me with words?
3 Tala, botioli ngai mbala zomi, mpe bozali kobundisa ngai na soni te.
You have reproached me ten times. You aren’t ashamed that you attack me.
4 Soki ezali penza ya solo ete nabungi nzela, mbeba na ngai etali kaka ngai moko.
If it is true that I have erred, my error remains with myself.
5 Soki mpe bolingi komimona likolo na ngai mpe kosalela pasi na ngai mpo na kotiola ngai,
If indeed you will magnify yourselves against me, and plead against me my reproach,
6 wana boyeba ete Nzambe nde asali ngai mabe mpe azingeli ngai na monyama na Ye.
know now that God has subverted me, and has surrounded me with his net.
7 Atako nagangi ete basali ngai mabe, nazali kozwa ata eyano moko te; ata soki nabeleli ete basunga ngai, moto oyo akokata likambo azali te.
“Behold, I cry out of wrong, but I am not heard. I cry for help, but there is no justice.
8 Akangi nzela na ngai mpo ete nakoka koleka te, atondisi nzela na ngai nyonso na molili,
He has walled up my way so that I can’t pass, and has set darkness in my paths.
9 alongoli ngai lokumu, mpe alongoli motole na moto na ngai,
He has stripped me of my glory, and taken the crown from my head.
10 asasi-sasi ngai na bangambo nyonso kino nakomi pene ya kokufa, apikoli elikya na ngai ndenge bapikolaka nzete;
He has broken me down on every side, and I am gone. He has plucked my hope up like a tree.
11 kanda na Ye ezali kotumba ngai, mpe azali kotanga ngai na molongo ya banguna na Ye;
He has also kindled his wrath against me. He counts me among his adversaries.
12 mampinga na Ye ezali kopusana na makasi penza, ezingeli ngai mpe ndako na ngai mpo na kosala ngai mabe.
His troops come on together, build a siege ramp against me, and encamp around my tent.
13 Akaboli ngai na bandeko na ngai, bongo bato oyo bayebi ngai bapesi ngai mokongo,
“He has put my brothers far from me. My acquaintances are wholly estranged from me.
14 balingami na ngai balimwe, mpe baninga na ngai babosani ngai;
My relatives have gone away. My familiar friends have forgotten me.
15 bato oyo nayambaki na ndako na ngai mpe basali na ngai ya basi, bango nyonso bakomi kotala ngai lokola mopaya, bakomi komona ngai lokola moto oyo batikala koyeba te.
Those who dwell in my house and my maids consider me a stranger. I am an alien in their sight.
16 Nazali kobenga mosali na ngai, kasi azali ata koyanola ngai te, atako monoko na ngai moko nde ezali kobondela ye.
I call to my servant, and he gives me no answer. I beg him with my mouth.
17 Solo ya monoko na ngai ekomi kokimisa ata mwasi na ngai, bongo bandeko na ngai moko penza bayini ngai.
My breath is offensive to my wife. I am loathsome to the children of my own mother.
18 Ata bilenge mibali ya mike bakomi koseka ngai; soki kaka nabimi, bakomi kosambwisa ngai.
Even young children despise me. If I arise, they speak against me.
19 Balingami na ngai nyonso ya motema bayini ngai, bato oyo nazalaki kolinga babalukeli ngai;
All my familiar friends abhor me. They whom I loved have turned against me.
20 nakomi eloko pamba, natikali kaka poso ya nzoto mpe mikuwa, nazali kobika kaka na misuni ya minu na ngai.
My bones stick to my skin and to my flesh. I have escaped by the skin of my teeth.
21 Balingami na ngai, boyokela ngai mawa, nabondeli bino penza, boyokela ngai mawa, pamba te loboko ya Nzambe ebeti ngai.
“Have pity on me. Have pity on me, you my friends, for the hand of God has touched me.
22 Mpo na nini bozali kolandela ngai boye, ndenge kaka Nzambe azali kolandela ngai? Botondi mosuni na ngai te?
Why do you persecute me as God, and are not satisfied with my flesh?
23 Ah, soki ata maloba na ngai ekomamaki, soki ekomamaki na buku!
“Oh that my words were now written! Oh that they were inscribed in a book!
24 Elingaki kokomama na ekomeli ya ebende, ya ebende oyo ya songe penza, mpo na kotobola makomi yango na mabanga mpo ete etikala wana mpo na libela.
That with an iron pen and lead they were engraved in the rock forever!
25 Ngai, nayebi na ngai malamu ete Mosikoli na ngai azali na bomoi, mpe, awa na mokili, akotelema ya suka mpo na kokata likambo na ngai.
But as for me, I know that my Redeemer lives. In the end, he will stand upon the earth.
26 Sima na kobebisama ya poso ya nzoto na ngai, ngai, na nzoto na ngai, nakomona Nzambe.
After my skin is destroyed, then I will see God in my flesh,
27 Solo, nakomona Ye, miso na ngai moko ekomona Ye, ngai moko penza, moto mosusu te.
whom I, even I, will see on my side. My eyes will see, and not as a stranger. “My heart is consumed within me.
28 Bino oyo bozali koloba: ‹ Tokolanda ye ndenge nini? › Mpe bino bato oyo bomoni mabe kati na ngai,
If you say, ‘How we will persecute him!’ because the root of the matter is found in me,
29 bolenga bino moko liboso ya mopanga, pamba te mopanga ezali esalelo ya kanda mpo na masumu, mpe bokoyeba ete kosambisama ezali. »
be afraid of the sword, for wrath brings the punishments of the sword, that you may know there is a judgment.”

< Yobo 19 >