< Yobo 18 >

1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki:
シユヒ人ビルダデこたへて曰く
2 « Kino tango nini okoloba maloba ya boye? Kanisa nanu malamu, bongo tokosolola.
汝等いつまで言語を獵求むることをするや 汝ら先曉るべし 然る後われら辨論はん
3 Mpo na nini komona biso lokola banyama? Boni, tozali nde bazoba na miso na yo?
われら何ぞ獸畜とおもはるべけんや 何ぞ汝らの目に汚穢たる者と見らるべけんや
4 Awa, likolo ya kanda na yo, ozali komipasola na biteni, basundola mokili to balongola mabanga na bisika na yango likolo na yo?
なんぢ怒りて身を裂く者よ 汝のためとて地あに棄られんや 磐あに其處より移されんや
5 Solo, mwinda ya moto mabe ekufaka, moto na yango etikaka kopela.
惡き者の光明は滅され 其火の焔は照じ
6 Pole ekomaka molili kati na ndako na ye, mpe mwinda oyo epelaka pembeni na ye ekufaka.
その天幕の内なる光明は暗くなり其が上の燈火は滅さるべし
7 Makasi ya matambe na ye esilaka, makanisi na ye moko ekweyisaka ye.
またその強き歩履は狹まり 其計るところは自分を陷いる
8 Makolo na ye ekangisaka ye na monyama, bongo abundaka-bundaka kati na madusu na yango.
すなはち其足に逐れて網に到り また陷阱の上を歩むに
9 Motambo ekangaka matambe na ye, mpe singa na yango ekangaka ye makasi.
索はその踵に纒り 羂これを執ふ
10 Singa ya motambo ebombama na se ya mabele mpo na ye, mpe batia motambo na nzela na ye.
索かれを執ふるために地に隱しあり 羂かれを陷しいるるために路に設けあり
11 Somo elandaka ye bisika nyonso oyo atambolaka.
怖ろしき事四方において彼を懼れしめ 其足にしたがひて彼をおふ
12 Nzala esilisaka makasi na ye, mpe pasi ya ndenge na ndenge ezalaka pembeni na ye soki akweyi.
その力は餓ゑ 其傍には災禍そなはり
13 Pasi eliaka poso ya nzoto na ye mpe bokono oyo ebomaka ebebisaka biteni ya nzoto na ye.
その膚の肢は蝕壞らる 即ち死の初子これが肢を蝕壞るなり
14 Balongolaka kati na ndako na ye biloko nyonso ya motuya, oyo atielaka motema, mpe akendaka kokutana na bakonzi ya kufa.
やがて彼はその恃める天幕より曳離されて懼怖の王の許に驅やられん
15 Ndako na ye etikalaka na eloko moko te, mpe fofolo ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango.
彼に屬せざる者かれの天幕に住み 硫礦かれの家の上に降ん
16 Misisa na ye ekawukaka na se ya mabele, mpe, na likolo, bitape na ye elembaka.
下にてはその根枯れ 上にてはその枝砍る
17 Bakanisaka ye lisusu te na mokili, kombo na ye etangamaka lisusu te na mabele.
彼の跡は地に絶え 彼の名は街衢に傳はらじ
18 Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili, mpe balongolaka ye na mokili.
彼は光明の中より黑暗に逐やられ 世の中より驅出されん
19 Azalaka na bana to bakitani te kati na bato na ye, azalaka ata na moto moko te oyo atikala na bomoi, na esika oyo avandaka.
彼はその民の中に子も無く孫も有じ また彼の住所には一人も遺る者なからん
20 Bato ya weste bazalaka na somo ya kotala bomoi na ye, mpe bato ya este batondaka na kobanga.
之が日を見るにおいて後に來る者は駭ろき 先に出し者は怖おそれん
21 Tala, solo, ndenge suka ya moto mabe ezalaka, mpe bomoi ya moto oyo ayebi Nzambe te. »
かならず惡き人の住所は是のごとく 神を知ざる者の所は是のごとくなるべし

< Yobo 18 >