< Yobo 17 >
1 Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai.
我的心灵消耗,我的日子灭尽; 坟墓为我预备好了。
2 Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango.
真有戏笑我的在我这里, 我眼常见他们惹动我。
3 Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga, na esika na ngai, epai na Yo; soki te, nani mosusu akoki komipesa lokola ndanga mpo na ngai!
愿主拿凭据给我,自己为我作保。 在你以外谁肯与我击掌呢?
4 Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te; yango wana, okolongisa bango te.
因你使他们心不明理, 所以你必不高举他们。
5 Moto oyo akofunda balingami na ye mpo ete babotola bomengo na bango na makasi, bana na ye bakokufa miso.
控告他的朋友、以朋友为可抢夺的, 连他儿女的眼睛也要失明。
6 Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato, lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.
神使我作了民中的笑谈; 他们也吐唾沫在我脸上。
7 Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.
我的眼睛因忧愁昏花; 我的百体好像影儿。
8 Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango, mpe moto oyo ayebi na ye likambo te atelemeli moto mabe.
正直人因此必惊奇; 无辜的人要兴起攻击不敬虔之辈。
9 Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.
然而,义人要持守所行的道; 手洁的人要力上加力。
10 Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu! Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.
至于你们众人,可以再来辩论吧! 你们中间,我找不着一个智慧人。
11 Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila; mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, nyonso, esili kobeba.
我的日子已经过了; 我的谋算、我心所想望的已经断绝。
12 Bato oyo bazali komona butu lokola moyi bazali koloba kati na molili: ‹ Pole ekomi pene, › nzokande molili ezali makasi.
他们以黑夜为白昼, 说:亮光近乎黑暗。
13 Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi. (Sheol )
我若盼望阴间为我的房屋, 若下榻在黑暗中, (Sheol )
14 Soki nalobi na kunda: ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na mutsopi: ‹ Ozali mama na ngai to ndeko na ngai ya mwasi, ›
若对朽坏说:你是我的父; 对虫说:你是我的母亲姊妹;
15 wana elikya na ngai ezali penza wapi, mpe nani penza azali komona elikya na ngai?
这样,我的指望在哪里呢? 我所指望的谁能看见呢?
16 Ekokita kino na bikuke ya kufa tango tokokende elongo kopema kati na putulu. » (Sheol )
等到安息在尘土中, 这指望必下到阴间的门闩那里了。 (Sheol )