< Yobo 16 >
2 « Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo; bino nyonso bozali babondisi mabe.
這樣的話我聽了許多; 你們安慰人,反叫人愁煩。
3 Kino tango nini bokotika koloba maloba ya pamba-pamba boye? Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba?
虛空的言語有窮盡嗎? 有甚麼話惹動你回答呢?
4 Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soki bozalaki na esika na ngai, nakokaki kobimisa maloba ebele mpe koningisa moto mpo na bino.
我也能說你們那樣的話; 你們若處在我的境遇, 我也會聯絡言語攻擊你們, 又能向你們搖頭。
5 Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino, mpe bibebu na ngai elingaki koningana mpo na kokitisa bino mitema kati na pasi.
但我必用口堅固你們, 用嘴消解你們的憂愁。
6 Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te; bongo soki nakangi monoko nde pasi yango elongwe na bomoi na ngai?
我雖說話,憂愁仍不得消解; 我雖停住不說,憂愁就離開我嗎?
7 Oh Nzambe! Solo penza, olembisi ngai! Obebisi ndako na ngai nyonso,
但現在上帝使我困倦, 使親友遠離我,
8 ofini-fini ngai makasi penza, mpe kokonda na ngai ekomi ata kotatola mpe kofunda ngai na miso ya bato!
又抓住我,作見證攻擊我; 我身體的枯瘦也當面見證我的不是。
9 Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai, okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe mpe kotala ngai na miso mabe lokola nde nazali monguna na yo.
主發怒撕裂我,逼迫我, 向我切齒; 我的敵人怒目看我。
10 Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai, bakomi kobeta ngai bambata na matama mpo na kosambwisa ngai, bango nyonso basaleli ngai likita.
他們向我開口, 打我的臉羞辱我, 聚會攻擊我。
11 Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.
上帝把我交給不敬虔的人, 把我扔到惡人的手中。
12 Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpo na ngai, kasi aningisi ngai, akangi ngai na kingo mpe apanzi ngai, akomisi ngai lokola eloko na Ye ya komekela makonga;
我素來安逸,他折斷我, 掐住我的頸項,把我摔碎, 又立我為他的箭靶子。
13 makonga na Ye ezingeli ngai, atoboli-toboli libumu na ngai, mpe na mawa te, asopi makila na ngai na mabele.
他的弓箭手四面圍繞我; 他破裂我的肺腑,並不留情, 把我的膽傾倒在地上,
14 Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngai mpe kokweya likolo na ngai lokola elombe.
將我破裂又破裂, 如同勇士向我直闖。
15 Natongi elamba na ngai ya saki na poso ya nzoto na ngai mpe nakundi lokumu na ngai nyonso na se ya putulu.
我縫麻布在我皮膚上, 把我的角放在塵土中。
16 Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane, mpe molili ezingeli miso na ngai.
我的臉因哭泣發紫, 在我的眼皮上有死蔭。
17 Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.
我的手中卻無強暴; 我的祈禱也是清潔。
18 Oh mabele, kozipa makila na ngai te! Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema!
地啊,不要遮蓋我的血! 不要阻擋我的哀求!
19 Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo, molobeli na ngai azali na Lola.
現今,在天有我的見證, 在上有我的中保。
20 Baninga na ngai bakomi koseka ngai; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.
我的朋友譏誚我, 我卻向上帝眼淚汪汪。
21 Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela moto liboso ya Nzambe ndenge moto alobelaka moninga na ye?
願人得與上帝辯白, 如同人與朋友辯白一樣;
22 Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila, mpe nakokende na ngai na nzela oyo bato bazongaka lisusu te.
因為再過幾年, 我必走那往而不返之路。