< Yobo 15 >
1 Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki:
Then Eliphaz the Temanite replied:
2 « Boni, moto ya bwanya akopesaka solo eyano na maloba ya pamba boye, maloba oyo ezanga ata tina, to alingaka kotondisa libumu na ye na mopepe ya moto oyo ewutaka na Este?
“Does a wise man answer with empty counsel or fill his belly with the hot east wind?
3 Akoki solo komilobela na maloba ezanga ata tina? Akoki solo kosalela maloba milayi oyo ezali ata na motuya te?
Should he argue with useless words or speeches that serve no purpose?
4 Yo ozali penza kobebisa lokumu ya Nzambe okomi koboya lokumu liboso ya Nzambe.
But you even undermine the fear of God and hinder meditation before Him.
5 Lisumu na yo ezali kokamba monoko na yo, ozwi elobeli ya bakosi.
For your iniquity instructs your mouth, and you choose the language of the crafty.
6 Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu, kasi monoko na ngai te; bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo.
Your own mouth, not mine, condemns you; your own lips testify against you.
7 Yo nde moto ya liboso oyo obotama kati na bato? Omona moyi liboso ya bangomba mikuse?
Were you the first man ever born? Were you brought forth before the hills?
8 Osila koyoka makambo oyo elobamaka kati na Likita ya Nzambe? Bwanya ezalaka kaka epai na yo moko?
Do you listen in on the council of God or limit wisdom to yourself?
9 Makambo nini oyebi, oyo biso toyebi te? Boyebi nini ozali na yango, oyo biso tozali na yango te?
What do you know that we do not? What do you understand that is not clear to us?
10 Na ngambo na biso, ezali na bato ya suki pembe, bampaka, bato oyo baleki tata na yo na mibu ya mbotama.
Both the gray-haired and the aged are on our side— men much older than your father.
11 Kobondisama ya Nzambe mpe maloba ya kimia oyo bazali koloba mpo na yo, ekoki te mpo na yo?
Are the consolations of God not enough for you, even words spoken gently to you?
12 Mpo na nini motema na yo ezali kopengwisa yo, mpe miso na yo ezali kobeta-beta?
Why has your heart carried you away, and why do your eyes flash,
13 Mpo ete obwakela Nzambe kanda na yo mpe obimisa makambo ya boye na monoko na yo?
as you turn your spirit against God and pour such words from your mouth?
14 Moto azali nani mpo ete azala peto? Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo?
What is man, that he should be pure, or one born of woman, that he should be righteous?
15 Soki Nkolo azali kondimela basantu na Ye te, soki kutu likolo ezali peto te na miso na Ye,
If God puts no trust in His holy ones, if even the heavens are not pure in His eyes,
16 ekozala boni mpo na moto mabe, moto oyo abeba, oyo asalaka mabe lokola azali komela mayi?
how much less man, who is vile and corrupt, who drinks injustice like water?
17 Yoka ngai, mpe nakolimbolela yo! Tika ete nayebisa yo makambo oyo ngai namona,
Listen to me and I will inform you. I will describe what I have seen,
18 makambo oyo bato ya bwanya balobaki, na kobomba ata eloko moko te kati na makambo oyo bazwaki epai ya batata na bango.
what was declared by wise men and was not concealed from their fathers,
19 Apesaki mokili epai na bango kaka tango ata mopaya moko te alekaki kati na bango.
to whom alone the land was given when no foreigner passed among them.
20 Na bomoi na ye mobimba, na mibu oyo bakata mpo na bomoi na ye, moto mabe anyokwamaka.
A wicked man writhes in pain all his days; only a few years are reserved for the ruthless.
21 Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.
Sounds of terror fill his ears; in his prosperity the destroyer attacks him.
22 Azalaka na elikya te ya kobima na molili, mpe mopanga ezelaka ye.
He despairs of his return from darkness; he is marked for the sword.
23 Ayengaka-yengaka mpo na koluka lipa, kasi akozwela yango wapi? Ayebaka ete mokolo ya molili ezelaka ye.
He wanders about as food for vultures; he knows the day of darkness is at hand.
24 Pasi mpe mawa ebangisaka ye, ekomelaka ye lokola mokonzi oyo amibongisi mpo na bitumba,
Distress and anguish terrify him, overwhelming him like a king poised to attack.
25 mpo ete asembolaka loboko na ye mpo na kobundisa Nzambe, atelemelaka Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
For he has stretched out his hand against God and has vaunted himself against the Almighty,
26 akimaka epai na Ye, moto etala na se, amibombaka na sima ya banguba minene.
rushing headlong at Him with a thick, studded shield.
27 Elongi na ye ekotonda mafuta, loketo na ye ekokoma monene;
Though his face is covered with fat and his waistline bulges with flesh,
28 akovanda na engumba ebeba, kati na bandako oyo bato bakima, bandako oyo ekoma pene ya kokweya;
he will dwell in ruined cities, in abandoned houses destined to become rubble.
29 akotikala kokoma mozwi te, pamba te bozwi na ye ekowumela te, bomengo na ye ekopanzana te kati na mokili mobimba;
He will no longer be rich; his wealth will not endure. His possessions will not overspread the land.
30 akokoka kokima molili te, moto ekokawusa mandalala na ye mpe akokima ata pema na ye moko.
He will not escape from the darkness; the flame will wither his shoots, and the breath of God’s mouth will carry him away.
31 Tika ete atia elikya na ye na lokuta te, pamba te akoyokisama soni mpe akozwa libebi lokola lifuti.
Let him not deceive himself with trust in emptiness, for emptiness will be his reward.
32 Ekokokisama liboso ete akufa, ndenge lindalala ekawukaka mpo na kozanga mayi na yango
It will be paid in full before his time, and his branch will not flourish.
33 to lokola nzete ya vino oyo ekweyisi bambuma na yango, wana ezali nanu mobesu to lokola nzete ya olive oyo ekweyisi fololo na yango.
He will be like a vine stripped of its unripe grapes, like an olive tree that sheds its blossoms.
34 Solo, libota ya moto mabe ekofuluka te, mpe moto ekozikisa ndako na ye mpo na mabe na ye moko.
For the company of the godless will be barren, and fire will consume the tents of bribery.
35 Pamba te moto nyonso oyo azalaka na makanisi mabe kati na ye abotaka kaka pasi; mabe oyo ekolaka kati na ye ememelaka ye moko libebi. »
They conceive trouble and give birth to evil; their womb is pregnant with deceit.”