< Yobo 14 >

1 Moto oyo abotama na mwasi azalaka kaka na mikolo moke oyo mpe etonda na pasi.
“Man, who is born of woman, is short of days and full of trouble.
2 Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka.
Like a flower, he comes forth, then withers away; like a fleeting shadow, he does not endure.
3 Olingi kaka kolandela ekelamu ya boye? Olingi kaka komema ye liboso na Yo mpo na kosambisa ye?
Do You open Your eyes to one like this? Will You bring him into judgment before You?
4 Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo? Moko te!
Who can bring out clean from unclean? No one!
5 Mikolo ya moto ekatama; okata motango ya basanza na ye mpe otia mondelo oyo akoki koleka te.
Since his days are determined and the number of his months is with You, and since You have set limits that he cannot exceed,
6 Longola miso na Yo mosika na ye mpe tika ye, ye moko, kino tango akozwa lifuti ya mosala na ye lokola moto oyo asalaka kaka mpo na lifuti.
look away from him and let him rest, so he can enjoy his day as a hired hand.
7 Nzete ezalaka kutu na mwa elikya: ata bakati yango, ebimaka lisusu mpe ebotaka bitape ya sika;
For there is hope for a tree: If it is cut down, it will sprout again, and its tender shoots will not fail.
8 misisa na yango ekoki konuna na se ya mabele, mpe eteni na yango oyo etikalaka ekoki kokufa kati na mabele,
If its roots grow old in the ground and its stump dies in the soil,
9 nzokande soki kaka ezwi mayi, ekobimisa mito mpe ekobota bitape lokola nzete ya sika.
at the scent of water it will bud and put forth twigs like a sapling.
10 Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.
But a man dies and is laid low; he breathes his last, and where is he?
11 Ndenge mayi esilaka na liziba to ndenge mayi ekawukaka,
As water disappears from the sea and a river becomes parched and dry,
12 ndenge wana mpe moto akufaka mpe atelemaka lisusu te, akolamuka lisusu te mpe bakoki lisusu kolamusa ye te, tango nyonso likolo ekozala.
so a man lies down and does not rise. Until the heavens are no more, he will not be awakened or roused from sleep.
13 Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila! Soki kaka okatelaki ngai tango mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu! (Sheol h7585)
If only You would hide me in Sheol and conceal me until Your anger has passed! If only You would appoint a time for me and then remember me! (Sheol h7585)
14 Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu kozala na bomoi? Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana.
When a man dies, will he live again? All the days of my hard service I will wait, until my renewal comes.
15 Okobenga ngai, mpe ngai, nakondima; okozala na posa makasi ya ekelamu ya maboko na Yo.
You will call, and I will answer; You will desire the work of Your hands.
16 Solo penza, okotanga makolo na ngai, kasi okolandela lisusu masumu na ngai te.
For then You would count my steps, but would not keep track of my sin.
17 Mabe na ngai ekokangama kati na saki, mpe okozipa masumu na ngai.
My transgression would be sealed in a bag, and You would cover over my iniquity.
18 Kasi, ndenge ngomba esilaka mpe ekweyaka, ndenge libanga elongwaka na esika na yango,
But as a mountain erodes and crumbles and a rock is dislodged from its place,
19 ndenge mayi eliaka mabanga, ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele, ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto.
as water wears away the stones and torrents wash away the soil, so You destroy a man’s hope.
20 Olongaka ye mbala moko, mpe akendaka na ye; obebisaka elongi na ye mpe obenganaka ye.
You forever overpower him, and he passes on; You change his countenance and send him away.
21 Soki bana na ye ya mibali bazwi lokumu, ayebaka na ye yango te; soki basambwisi bango, amonaka na ye yango te.
If his sons receive honor, he does not know it; if they are brought low, he is unaware.
22 Ayokaka kaka pasi kati na nzoto na ye, mpe motema na ye esalaka kaka matanga mpo na ye moko. »
He feels only the pain of his own body and mourns only for himself.”

< Yobo 14 >