< Yobo 11 >
1 Tsofari, moto ya engumba ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki:
Then answered Zophar the Naamathite, and said,
2 « Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano? Moto oyo azali koloba alonga na ye, kaka mpo ayebi koloba?
Should not the multitude of words be answered? and should a man full of talk be justified?
3 Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pamba oyo ozali kobimisa? Bapamela yo te soki ozali kosala maseki?
Should your lies make men hold their peace? and when you mock, shall no man make you ashamed?
4 Ozali koloba na Nzambe: ‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo; nazali sembo na miso na Yo. ›
For you have said, My doctrine is pure, and I am clean in your eyes.
5 Oh, tala ndenge nini nazali na posa ete Nzambe aloba, ete afungola monoko na Ye mpo na kopamela yo,
But oh that God would speak, and open his lips against you;
6 mpe asosolisa yo basekele ya bwanya, pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale. Yeba likambo oyo: Nzambe abosana masumu na yo ebele.
And that he would show you the secrets of wisdom, that they are double to that which is! Know therefore that God exacts of you less than your iniquity deserves.
7 Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe? Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso?
Can you by searching find out God? can you find out the Almighty unto perfection?
8 Bandelo yango eleki Lola na likolo; yo penza okosala nini? Eleki mboka ya bakufi na bozindo; yo penza okoyeba nini? (Sheol )
It is as high as heaven; what can you do? deeper than hell; what can you know? (Sheol )
9 Molayi ya bandelo yango eleki mokili na molayi, mpe eleki ebale monene na kopanzana.
The measure thereof is longer than the earth, and broader than the sea.
10 Soki akotisi yo na boloko mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo, nani akotelemela Ye?
If he cut off, and shut up, or gather together, then who can hinder him?
11 Solo, ayebaka bakosi mpe asosolaka mabe na pete.
For he knows vain men: he sees wickedness also; will he not then consider it?
12 Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te, ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele.
For vain men would be wise, though man be born like a wild ass's colt.
13 Nzokande, soki opesi Ye motema na yo mpe osemboli maboko na yo epai na Ye,
If you prepare your heart, and stretch out your hands toward him;
14 soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yo mpe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo,
If iniquity be in your hand, put it far away, and let not wickedness dwell in your tabernacles.
15 okotombola elongi na yo na soni te, okotelema ngwi mpe okobanga eloko te;
For then shall you lift up your face without spot; yea, you shall be steadfast, and shall not fear:
16 pamba te okobosana pasi na yo, okokoma kokanisa yango kaka lokola mayi oyo esili kotiola.
Because you shall forget your misery, and remember it as waters that pass away:
17 Bomoi na yo ekongenga lokola pole ya moyi oyo engengaka na midi, mpe butu na yo ekokoma lokola tongo.
And your age shall be clearer than the noonday: you shall shine forth, you shall be as the morning.
18 Okozala na kimia, pamba te elikya ezali, okotala zingazinga na yo mpe okozwa bopemi na yo na kimia,
And you shall be secure, because there is hope; yea, you shall dig about you, and you shall take your rest in safety.
19 okolala pongi, mpe okomona moto moko te kobangisa yo lisusu, mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo.
Also you shall lie down, and none shall make you afraid; yea, many shall make suit unto you.
20 Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko: kufa. »
But the eyes of the wicked shall fail, and they shall not escape, and their hope shall be as the giving up of the spirit.