< Yobo 10 >
1 Nayini bomoi na ngai! Nakokoba kaka komilela, nakoloba na mongongo makasi mpe na pasi ya motema na ngai.
¡Odio mi vida! Permíteme hablar libremente de mis quejas; no puedo guardarme mi amargura.
2 Nakoloba na Nzambe: ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali! ›
Le diré a Dios: “No te limites a condenarme; dime qué tienes contra mí.
3 Boni, ozali kosepela konyokola ngai, kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali, mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe?
¿Te gusta acusarme? ¿Por qué me rechazas a mí, a quien has creado con tus propias manos, y sin embargo te alegras de las maquinaciones de los malvados?
4 Boni, ozali na miso ya mosuni? Ozali komona lokola bato?
¿Tienes ojos humanos? ¿Ves como los seres humanos?
5 Boni, mikolo na Yo ezali lokola mikolo ya bato, mpe mibu na yo, lokola mibu ya bato,
¿Es tu vida tan corta como la de los mortales? ¿Son tus años tan breves como los de la humanidad,
6 mpo ete oluka mabe na ngai to okundola masumu na ngai,
para que tengas que examinar mis males e investigar mis pecados?
7 atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo?
Aunque sabes que no soy culpable, nadie puede salvarme de ti.
8 Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai; olingi sik’oyo kobenda nzoto mpe koboma ngai?
Me hiciste y me diste forma con tus propias manos, y sin embargo me destruyes.
9 Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai lokola mabele ya bikeko; olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu?
Recuerda que me diste forma como a un pedazo de arcilla; ¿vas a volver a convertirme en polvo?
10 Osopaki ngai lokola miliki te? Okangisaki ngai mbuma-mbuma te lokola fromage?
Me derramaste como la leche, me cuajaste como el queso.
11 Olatisaki ngai poso ya nzoto mpe misuni te? Otongaki mikuwa mpe misisa na ngai te?
Me vestiste de piel y carne; tejiste mi cuerpo con huesos y músculos.
12 Opesaki ngai bomoi mpe otalisaki ngai bolamu; mpe na bonzambe na Yo, obatelaki molimo na ngai.
Me diste vida y me mostraste tu bondad; me has cuidado mucho.
13 Kasi tala likambo oyo obombaki kati na motema na Yo, mpe nayebi ete ezalaka kati na makanisi na Yo.
“Pero guardaste estas cosas en tu corazón. Sé que tu propósito era
14 Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai, mpe olingaki te kozanga kopesa ngai etumbu mpo na masumu na ngai.
vigilarme, y si pecaba, entonces no perdonarías mis males.
15 Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai! Ata nasali mabe te, nazali kokoka te kotombola moto, pamba te natondisami na soni mpe nazindi kati na pasi na ngai.
Si soy culpable, estoy en problemas; si soy inocente, no puedo mantener la cabeza en alto porque estoy totalmente deshonrado al ver mis sufrimientos.
16 Soki nameki kotombola moto, ozali kolanda ngai lokola nkosi mpe ozali kobimisela ngai mayele na Yo nyonso mpo na kotelemela ngai,
Si mantengo la cabeza alta me persigues como un león, mostrando lo poderoso que eres para herirme.
17 ozali komemela ngai batatoli ya sika mpo na kotelemela ngai, ozali kopelisela ngai kanda na Yo mpo na kosala ngai mabe, mampinga na Yo bazali tango nyonso koya kobundisa ngai.
Repites tus argumentos contra mí, derramas más y más tu ira contra mí, envías nuevos ejércitos contra mí.
18 Mpo na nini obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai? Nalingaki na ngai kokufa, mpe liso moko te elingaki komona ngai.
“¿Por qué me dejaste nacer? Ojalá hubiera muerto y nadie me hubiera visto nunca.
19 Soki kutu nazalaka na ngai te, nalingaki koleka kaka mbala moko longwa na libumu ya mama kino na kunda.
Hubiera sido mejor que nunca hubiera existido, llevado directamente del vientre a la tumba.
20 Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te? Kende ata mosika na ngai mpo ete nazwa ata tango ya kosepela
Sólo me quedan unos días, así que ¿por qué no me dejas en paz para que pueda tener un poco de paz
21 liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te, na mokili ya molili, mokili ya kufa,
antes de ir al sitio de donde nunca volveré, la tierra de las tinieblas y la sombra de la muerte?
22 na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu, epai wapi ata pole ezalaka molili. »
La tierra de la oscuridad total donde se encuentra la sombra de la muerte, un lugar de caos donde la luz misma es oscuridad”.