< Jeremi 8 >

1 Na tango wana, elobi Yawe, bakobimisa mikuwa ya bakonzi mpe ya bakalaka ya Yuda, mikuwa ya Banganga-Nzambe mpe ya basakoli elongo na mikuwa ya bato ya Yelusalemi, wuta na malita na bango.
At that time, saith the LORD, they shall bring the bones of the kings of Judah, and the bones of his princes, and the bones of the priests, and the bones of the prophets, and the bones of the inhabitants of Jerusalem, out of their graves:
2 Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.
And they shall spread them before the sun, and the moon, and all the host of heaven, whom they have loved, and whom they have served, and after whom they have walked, and whom they have sought, and whom they have worshipped: they shall not be gathered, nor be buried; they shall be for refuse upon the face of the earth.
3 Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›
And death shall be chosen rather than life by all the remnant of them that remain of this evil family, who remain in all the places where I have driven them, saith the LORD of hosts.
4 Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Boni, soki moto akweyi, atelemaka te? Soki moto abungi nzela, azongaka lisusu na nzela te?
Moreover thou shalt say to them, Thus saith the LORD; Shall they fall, and not rise? shall he turn away, and not return?
5 Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela? Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe? Bamipesi makasi na makambo ya lokuta mpe baboyi kozongela Ngai.
Why then hath this people of Jerusalem slidden back by a perpetual backsliding? they hold fast deceit, they refuse to return.
6 Nayokaka na bokebi makambo nyonso oyo balobaka, kasi balobaka makambo ya solo te. Moko te kati na bango ayokaka motema pasi mpo na mabe oyo asalaka, alobaka: ‘Nasali nini?’ Moto na moto akangamaka kaka na nzela na ye lokola mpunda oyo ezali kokende na bitumba.
I hearkened and heard, but they spoke not aright: no man repented of his wickedness, saying, What have I done? every one turned to his course, as the horse rusheth to the battle.
7 Ezala kutu nkongi, kati na likolo, eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu; ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila eyebaka ata tango ya kozonga, kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.
Yea, the stork in the heaven knoweth her appointed times; and the turtledove and the crane and the swallow observe the time of their coming; but my people know not the judgment of the LORD.
8 Ndenge nini bokoki koloba: ‘Tozali bato ya bwanya, pamba te toyebi Mobeko ya Yawe,’ tango sik’oyo ekomeli ya balakisi ya Mobeko ebongoli yango lokuta?
How do ye say, We are wise, and the law of the LORD is with us? Lo, certainly in vain he hath made it; the pen of the scribes is in vain.
9 Bato ya bwanya bakoyokisama soni, bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu, pamba te batiolaki Liloba na Yawe. Bazali na bwanya ya ndenge nini?
The wise men are ashamed, they are dismayed and taken: lo, they have rejected the word of the LORD; and what wisdom is in them?
10 Yango wana, nakokaba basi na bango epai ya mibali mosusu, mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu; pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike, batondi na lokoso ya mbongo; basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomi se kotambola na lokuta;
Therefore will I give their wives to others, and their fields to them that shall inherit them: for every one from the least even to the greatest is given to covetousness, from the prophet even to the priest every one dealeth falsely.
11 bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba: ‘Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu!’ Nzokande, ata likambo moko ya malamu ezali te.
For they have healed the hurt of the daughter of my people slightly, saying, Peace, peace; when there is no peace.
12 Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni? Te! Bazali koyoka ata soni te; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.
Were they ashamed when they had committed abomination? nay, they were not at all ashamed, neither could they blush: therefore shall they fall among them that fall: in the time of their punishment they shall be cast down, saith the LORD.
13 Nakobebisa milona na bango, elobi Yawe. Bambuma ya vino ekozala lisusu te na banzete ya vino, mbuma ya figi ekozala lisusu te na banzete ya figi, mpe makasa ya banzete yango ekokawuka. Bakobotola bango biloko oyo napesaki bango. › »
I will surely consume them, saith the LORD: there shall be no grapes on the vine, nor figs on the fig tree, and the leaf shall fade; and the things that I have given to them shall pass away from them.
14 Mpo na nini tozali kovanda awa? Tosangana esika moko! Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi mpo ete tokufela kuna! Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.
Why do we sit still? assemble yourselves, and let us enter into the fortified cities, and let us be silent there: for the LORD our God hath put us to silence, and given us water of gall to drink, because we have sinned against the LORD.
15 Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia, kasi tomoni likambo moko te ya malamu; tozalaki na elikya ete tokobika, kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso!
We looked for peace, but no good came; and for a time of health, and behold trouble!
16 Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.
The snorting of his horses was heard from Dan: the whole land trembled at the sound of the neighing of his strong ones; for they have come, and have devoured the land, and all that is in it; the city, and those that dwell in it.
17 « Botala, nakotindela bino banyoka oyo ebomaka, bitupa oyo moto akoki kosakana na yango te, mpo ete eswa bino, » elobi Yawe.
For, behold, I will send serpents, cockatrices, among you, which will not be charmed, and they shall bite you, saith the LORD.
18 Pasi na ngai ezangeli kisi mpo na kosilisa yango, motema na ngai elembi kati na ngai.
When I would comfort myself against sorrow, my heart is faint in me.
19 Yoka koganga ya bato na ngai wuta na mokili ya mosika: « Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona? Mokonzi na yango azali lisusu kuna te? » « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai na nzela ya banzambe na bango ya bikeko, na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina? »
Behold the voice of the cry of the daughter of my people because of them that dwell in a distant country: Is not the LORD in Zion? is not her king in her? Why have they provoked me to anger with their graven images, and with foreign vanities?
20 « Tango ya kobuka mbuma esili koleka, elanga mpe esili kokoma na suka, kasi biso tobikisami te. »
The harvest is past, the summer is ended, and we are not saved.
21 Ndenge bato na ngai bazali koyoka pasi, ndenge wana mpe ngai nazali koyoka pasi, nazali kolela, mpe somo ekangi ngai makasi.
For the hurt of the daughter of my people am I hurt; I am black; astonishment hath taken hold on me.
22 Boni, kisi ezali te kati na Galadi? Minganga bazali kuna te? Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te?
Is there no balm in Gilead; is there no physician there? why then is not the health of the daughter of my people recovered?

< Jeremi 8 >