< Jeremi 6 >

1 « Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino! Bobima na Yelusalemi! Bobeta kelelo na Tekoa! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.
העזו בני בנימן מקרב ירושלם ובתקוע תקעו שופר ועל בית הכרם שאו משאת כי רעה נשקפה מצפון ושבר גדול׃
2 Nakobebisa Siona, mboka kitoko, oyo ezali penza kitoko lokola elenge mwasi ya kitoko mpe ya nzoto sembesembe.
הנוה והמענגה דמיתי בת ציון׃
3 Babateli ya bibwele elongo na bibwele na bango bakobundisa yango, bakopika bandako na bango ya kapo zingazinga na yango; bongo moko na moko akoyeisa bibwele na ye na esika oyo ye akozwa.
אליה יבאו רעים ועדריהם תקעו עליה אהלים סביב רעו איש את ידו׃
4 Bomibongisa mpo na kobundisa yango! Botelema, tika ete tobundisa yango na midi! Kasi mawa na biso, pamba te mokolo esili mpe molili ya pokwa ezali koya.
קדשו עליה מלחמה קומו ונעלה בצהרים אוי לנו כי פנה היום כי ינטו צללי ערב׃
5 Boye, totelema! Tika ete tokota kati na yango na butu, tobebisa bandako na yango oyo batonga makasi! »
קומו ונעלה בלילה ונשחיתה ארמנותיה׃
6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombama zingazinga ya Yelusalemi! Engumba oyo esengeli kozwa etumbu, pamba te etondi na makambo mabe!
כי כה אמר יהוה צבאות כרתו עצה ושפכו על ירושלם סללה היא העיר הפקד כלה עשק בקרבה׃
7 Ndenge libulu ya mayi ebimisaka mayi, ndenge wana mpe Yelusalemi ezali kobimisa mabe. Sango moko kaka ezali kotambola kuna: sango ya mobulu mpe ya kobebisama; tango nyonso liboso na Ngai, kaka minyoko mpe bapota.
כהקיר בור מימיה כן הקרה רעתה חמס ושד ישמע בה על פני תמיד חלי ומכה׃
8 Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, noki te nakomikomisa mosika na yo mpe nakokomisa mokili na yo esobe, mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »
הוסרי ירושלם פן תקע נפשי ממך פן אשימך שממה ארץ לוא נושבה׃
9 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Tika ete bosangisa ndambo ya bana ya Isalaele oyo batikali ndenge balokotaka mbuma ya vino oyo etikalaka; bolekisa lisusu maboko na bino na likolo ya bitape ya banzete ya vino lokola moto oyo abukaka mbuma ya vino. »
כה אמר יהוה צבאות עולל יעוללו כגפן שארית ישראל השב ידך כבוצר על סלסלות׃
10 Naloba lisusu na nani mpe nakebisa penza nani? Nani akoyokela ngai? Matoyi na bango ekangama; yango wana bakokaka koyoka te. Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango, basepelaka na bango na yango te.
על מי אדברה ואעידה וישמעו הנה ערלה אזנם ולא יוכלו להקשיב הנה דבר יהוה היה להם לחרפה לא יחפצו בו׃
11 Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. « Sopa yango na bana mike kati na babalabala mpe na lisanga ya bilenge mibali; ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, ezala mikolo to mibange.
ואת חמת יהוה מלאתי נלאיתי הכיל שפך על עולל בחוץ ועל סוד בחורים יחדו כי גם איש עם אשה ילכדו זקן עם מלא ימים׃
12 Tango nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bavandi ya mboka, nakopesa bandako na bango, bilanga na bango mpe basi na bango, epai ya bato mosusu, » elobi Yawe.
ונסבו בתיהם לאחרים שדות ונשים יחדו כי אטה את ידי על ישבי הארץ נאם יהוה׃
13 « Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike, batondi na lokoso ya mbongo, kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe: bango nyonso bazali kotambola na lokuta.
כי מקטנם ועד גדולם כלו בוצע בצע ומנביא ועד כהן כלו עשה שקר׃
14 Bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba: ‹ Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu! › Nzokande ata likambo moko ya malamu ezali te.
וירפאו את שבר עמי על נקלה לאמר שלום שלום ואין שלום׃
15 Boni, bazali penza koyokela makambo na bango ya nkele soni te? Te, bazali na bango koyoka ata soni te; bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te. Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.
הבישו כי תועבה עשו גם בוש לא יבושו גם הכלים לא ידעו לכן יפלו בנפלים בעת פקדתים יכשלו אמר יהוה׃
16 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki: ‹ Tokolanda na biso yango te! ›
כה אמר יהוה עמדו על דרכים וראו ושאלו לנתבות עולם אי זה דרך הטוב ולכו בה ומצאו מרגוע לנפשכם ויאמרו לא נלך׃
17 Naponaki kati na bino bakengeli oyo balobaki na bino: ‹ Boyoka mongongo ya kelelo! › Kasi bozongisaki: ‹ Te! Tokoyoka te. ›
והקמתי עליכם צפים הקשיבו לקול שופר ויאמרו לא נקשיב׃
18 Yango wana, bino bikolo, boyoka! Bozala batatoli ya makambo oyo ekokomela bango.
לכן שמעו הגוים ודעי עדה את אשר בם׃
19 Oh mabele, yoka! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.
שמעי הארץ הנה אנכי מביא רעה אל העם הזה פרי מחשבותם כי על דברי לא הקשיבו ותורתי וימאסו בה׃
20 Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba to na matiti ya solo kitoko oyo ewuti na mboka ya mosika? Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, mpe nandimaka makabo na bino te. »
למה זה לי לבונה משבא תבוא וקנה הטוב מארץ מרחק עלותיכם לא לרצון וזבחיכם לא ערבו לי׃
21 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakotia mabaku liboso ya bato oyo; batata mpe bana na bango bakobeta mabaku mpe bakokweya nzela moko, bazalani elongo na baninga bakokufa. »
לכן כה אמר יהוה הנני נתן אל העם הזה מכשלים וכשלו בם אבות ובנים יחדו שכן ורעו יאבדו׃
22 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya longwa na mokili ya nor; ekolo moko monene ezali komibongisa mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele.
כה אמר יהוה הנה עם בא מארץ צפון וגוי גדול יעור מירכתי ארץ׃
23 Basimbi matolotolo mpe makonga, bazali mitema mabe mpe bazanga mawa, bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, bamati likolo ya bampunda, batandami na milongo lokola basoda mpo na kobundisa yo Siona, mboka kitoko. »
קשת וכידון יחזיקו אכזרי הוא ולא ירחמו קולם כים יהמה ועל סוסים ירכבו ערוך כאיש למלחמה עליך בת ציון׃
24 Tango toyokaki sango na tina na bango, tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
שמענו את שמעו רפו ידינו צרה החזיקתנו חיל כיולדה׃
25 Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te, pamba te monguna asimbi mopanga, bongo somo makasi ezali bisika nyonso.
אל תצאי השדה ובדרך אל תלכי כי חרב לאיב מגור מסביב׃
26 Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basaki mpe bolala na putulu, bosala matanga lokola moto oyo akufisi mwana na ye se moko. Bolela na mawa, pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata.
בת עמי חגרי שק והתפלשי באפר אבל יחיד עשי לך מספד תמרורים כי פתאם יבא השדד עלינו׃
27 « Tala, nasili kotia yo kati na bato na ngai lokola esalelo oyo bamekelaka makasi ya bibende, mpo ete okoka kotala malamu mpe omeka ezaleli na bango.
בחון נתתיך בעמי מבצר ותדע ובחנת את דרכם׃
28 Bango nyonso bazali batomboki ya mito makasi, bayebi kaka kotonga. Bazali lokola bronze mpe ebende, bango nyonso bazali kaka babebisi.
כלם סרי סוררים הלכי רכיל נחשת וברזל כלם משחיתים המה׃
29 Epepelo ezali kopelisa moto makasi, mpe ebende oyo babengaka plon ezali kolimwa na moto; kasi bazali na bango kaka konyangwisa ebende yango na pamba, pamba te eloko ya mabe ekokabwana na yango te.
נחר מפח מאשתם עפרת לשוא צרף צרוף ורעים לא נתקו׃
30 Babengaka bango palata babwaka, pamba te Yawe asundola bango. »
כסף נמאס קראו להם כי מאס יהוה בהם׃

< Jeremi 6 >