< Jeremi 51 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala, nakotinda mopepe ya makasi mpo na kobebisa mokili ya Babiloni mpe bato ya Lebi-Kamayi.
כה אמר יהוה הנני מעיר על בבל ואל ישבי לב קמי--רוח משחית
2 Nakotinda bapaya na Babiloni mpo na koyungola mpe kobebisa yango: bakobundisa yango na bangambo nyonso na mokolo na yango ya kosambisama.
ושלחתי לבבל זרים וזרוה ויבקקו את ארצה כי היו עליה מסביב ביום רעה
3 Basoda oyo babundaka na matolotolo bakozwa tango te ya kobeta makonga na bango; bakozwa tango te ya kolata bibombelo ya tolo, bakobikisa te basoda na bango ya bilenge mpe bakoboma mampinga na bango nyonso.
אל ידרך ידרך הדרך קשתו ואל יתעל בסרינו ואל תחמלו אל בחריה--החרימו כל צבאה
4 Bato oyo bakokweya na mopanga bakotondisa mokili ya Babiloni mpe babalabala na yango ekotonda na bato bazoka bapota.
ונפלו חללים בארץ כשדים ומדקרים בחוצותיה
5 Ata soki mokili na bango etondaki na masumu liboso ya Mosantu ya Isalaele, Nzambe na bango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, abosanaki Isalaele na Yuda te.
כי לא אלמן ישראל ויהודה מאלהיו--מיהוה צבאות כי ארצם מלאה אשם מקדוש ישראל
6 Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.
נסו מתוך בבל ומלטו איש נפשו--אל תדמו בעונה כי עת נקמה היא ליהוה--גמול הוא משלם לה
7 Babiloni ezali lokola kopo ya wolo na loboko ya Yawe; ezalaki kolangwisa mokili mobimba. Bongo bato ya bikolo bameli masanga na yango mpe bakomi lokola bazoba.
כוס זהב בבל ביד יהוה--משכרת כל הארץ מיינה שתו גוים על כן יתהללו גוים
8 Babiloni ekokweya na mbalakata mpe ekobukana! Bosala matanga mpo na yango mpe botia kisi na pota na yango, tango mosusu akobika.
פתאם נפלה בבל ותשבר הילילו עליה קחו צרי למכאובה--אולי תרפא
9 ‹ Tozalaki na posa ya kobikisa Babiloni, kasi akobika te; yango wana, tobima kati na yango mpe tokende, moto na moto na engumba na ye; pamba te esambiselo na ye ekomi kino na Lola, emati likolo lokola mapata. ›
רפאנו את בבל ולא נרפתה--עזבוה ונלך איש לארצו כי נגע אל השמים משפטה ונשא עד שחקים
10 ‹ Yawe apesi biso etumbu! Boya totatola na Siona makambo oyo Yawe, Nzambe na biso, asali. ›
הוציא יהוה את צדקתינו באו ונספרה בציון את מעשה יהוה אלהינו
11 Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.
הברו החצים מלאו השלטים--העיר יהוה את רוח מלכי מדי כי על בבל מזמתו להשחיתה כי נקמת יהוה היא נקמת היכלו
12 Botelemisa bendele na bino liboso ya bamir ya Babiloni! Bobakisa motango ya bakengeli mpe ya basinzili, botia mitambo! Yawe akokokisa mabongisi na Ye mpe ekateli ya etumbu na Ye mpo na bato ya Babiloni.
אל חומת בבל שאו נס החזיקו המשמר--הקימו שמרים הכינו הארבים כי גם זמם יהוה--גם עשה את אשר דבר אל ישבי בבל
13 Yo oyo ovandaka pembeni ya bibale minene, yo oyo otonda na bomengo mingi, suka na yo ebelemi, tango na yo ya kobebisama ekoki!
שכנתי (שכנת) על מים רבים רבת אוצרת בא קצך אמת בצעך
14 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi na Kombo na Ye moko: Solo, nakotondisa yo na bato lokola liboke ya mabanki, bongo bakobeta milolo ya elonga likolo na yo.
נשבע יהוה צבאות בנפשו כי אם מלאתיך אדם כילק וענו עליך הידד
15 Asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.
עשה ארץ בכחו מכין תבל בחכמתו ובתבונתו נטה שמים
16 Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, apelisaka mikalikali, anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe wuta na bibombelo na Ye.
לקול תתו המון מים בשמים ויעל נשאים מקצה ארץ ברקים למטר עשה ויוצא רוח מאצרתיו
17 Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.
נבער כל אדם מדעת הביש כל צרף מפסל כי שקר נסכו ולא רוח בם
18 Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola; ekolimwa na tango ya kosambisama.
הבל המה מעשה תעתעים בעת פקדתם יאבדו
19 Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata ekolo oyo ezali libula na Ye; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
לא כאלה חלק יעקוב כי יוצר הכל הוא--ושבט נחלתו יהוה צבאות שמו
20 Ozalaki solo marto, ebundeli na Ngai ya bitumba: elongo na yo, napanzaki bikolo; elongo na yo, nabebisaki mikili;
מפץ אתה לי כלי מלחמה ונפצתי בך גוים והשחתי בך ממלכות
21 elongo na yo, napanzaki mpunda mpe motambolisi na yango; elongo na yo, napanzaki shar mpe motambolisi na yango;
ונפצתי בך סוס ורכבו ונפצתי בך רכב ורכבו
22 elongo na yo, napanzaki mwasi mpe mobali; elongo na yo, napanzaki mibange mpe bilenge; elongo na yo, napanzaki bilenge mibali mpe bilenge basi;
ונפצתי בך איש ואשה ונפצתי בך זקן ונער ונפצתי בך בחור ובתולה
23 elongo na yo, napanzaki babateli bibwele mpe bibwele na bango; elongo na yo, napanzaki mosali bilanga mpe bangombe na ye; elongo na yo, napanzaki bayangeli mpe bakalaka.
ונפצתי בך רעה ועדרו ונפצתי בך אכר וצמדו ונפצתי בך פחות וסגנים
24 Nakozongisela Babiloni mpe bavandi na yango nyonso mabe nyonso oyo basalaki Siona, » elobi Yawe.
ושלמתי לבבל ולכל יושבי כשדים את כל רעתם אשר עשו בציון--לעיניכם נאם יהוה
25 « Yo ngomba oyo obebisaka, yo oyo obebisaka mokili, nakotelemela yo, » elobi Yawe, « nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo, nakokitisa yo wuta na likolo ya mabanga, mpe nakokomisa yo ngomba ezika na moto.
הנני אליך הר המשחית נאם יהוה המשחית את כל הארץ ונטיתי את ידי עליך וגלגלתיך מן הסלעים ונתתיך להר שרפה
26 Bakotikala lisusu te kozwa epai na yo libanga oyo batongelaka basonge ya bamir to libanga oyo batongelaka miboko; pamba te okobebisama mpo na libela, » elobi Yawe.
ולא יקחו ממך אבן לפנה ואבן למוסדות כי שממות עולם תהיה נאם יהוה
27 « Botelemisa bendele kati na mokili! Bobeta kelelo kati na bikolo! Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni, bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati, ya Mini mpe ya Ashikenazi mpo ete babundisa yango. Bopona mokonzi moko ya basoda mpo ete atambolisa bitumba, botinda bampunda lokola liboke ya mabanki.
שאו נס בארץ תקעו שופר בגוים קדשו עליה גוים--השמיעו עליה ממלכות אררט מני ואשכנז פקדו עליה טפסר העלו סוס כילק סמר
28 Bobongisa bikolo mpo na kobundisa yango: bakonzi ya Medi, bayangeli na bango mpe bakalaka na bango nyonso mpe bamboka nyonso oyo bazali kokamba.
קדשו עליה גוים את מלכי מדי את פחותיה ואת כל סגניה ואת כל ארץ ממשלתו
29 Mikili ezali koningana mpe kotepatepa, pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te atikala kovanda lisusu kuna.
ותרעש הארץ ותחל כי קמה על בבל מחשבות יהוה לשום את ארץ בבל לשמה מאין יושב
30 Basoda ya Babiloni batiki kobunda, babombami kati na bandako batonga makasi. Makasi na bango esili, bakomi lokola basi. Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki bikangelo bikuke na yango.
חדלו גבורי בבל להלחם ישבו במצדות--נשתה גבורתם היו לנשים הציתו משכנתיה נשברו בריחיה
31 Bato oyo bamemaka mikanda bazali kolandana mbangu, mpe bamemi sango bazali kolandana mbangu mpo na koyebisa mokonzi ya Babiloni ete babotoli engumba mobimba,
רץ לקראת רץ ירוץ ומגיד לקראת מגיד--להגיד למלך בבל כי נלכדה עירו מקצה
32 bakangi bapon mpe bibale; banzete oyo ebotaka na mayi esili na kozika moto mpe basoda bakomi na somo. »
והמעברות נתפשו ואת האגמים שרפו באש ואנשי המלחמה נבהלו
33 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble na tango banyataka-nyataka yango; mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango.
כי כה אמר יהוה צבאות אלהי ישראל בת בבל כגרן עת הדריכה עוד מעט ובאה עת הקציר לה
34 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso; solo, atiaki biso na mobulu, akomisaki biso lokola mbeki ya pamba; amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama, atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko; mpe sima, asanzaki biso.
אכלנו (אכלני) הממנו (הממני) נבוכדראצר מלך בבל הציגנו (הציגני) כלי ריק בלענו (בלעני) כתנין מלא כרשו מעדני הדיחנו (הדיחני)
35 Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso ekweyela Babiloni, » elobi bavandi ya Siona! « Tika ete makila na biso etangama na mito ya bavandi ya Babiloni, elobi bavandi ya Yelusalemi! »
חמסי ושארי על בבל תאמר ישבת ציון ודמי אל ישבי כשדים תאמר ירושלם
36 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala, nakozwa likambo na yo na maboko mpe nakozongisa mabe na bato oyo basalaki yo mabe, nakokawusa ebale na yango ya monene mpe nakokawusa maziba na yango.
לכן כה אמר יהוה הנני רב את ריבך ונקמתי את נקמתך והחרבתי את ימה והבשתי את מקורה
37 Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola; bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.
והיתה בבל לגלים מעון תנים שמה ושרקה מאין יושב
38 Bato na yango nyonso bakokoma koganga lokola nkosi ya mike mpe kolela lokola bana ya nkosi.
יחדו ככפרים ישאגו נערו כגורי אריות
39 Kasi tango bakokoma na posa makasi ya kosangisa nzoto, nakobongisela bango feti mpe nakolangwisa bango masanga mpo ete batondisama na esengo; bongo, bakolala pongi ya libela mpe bakoka lisusu kolamuka te, » elobi Yawe,
בחמם אשית את משתיהם והשכרתים למען יעלזו וישנו שנת עולם ולא יקיצו--נאם יהוה
40 « nakomema bango ndenge bamemaka bampate to bameme ya mibali to mpe bantaba ya mibali na esika oyo babomelaka bibwele.
אורידם ככרים לטבוח--כאילים עם עתודים
41 Ndenge nini bakangi Sheshaki! Ndenge nini basukisi lolendo ya ekolo oyo ezalaki kosala lokumu ya mokili mobimba! Ndenge nini penza Babiloni ekomi penza eloko ya somo kati na bikolo!
איך נלכדה ששך ותתפש תהלת כל הארץ איך היתה לשמה בבל בגוים
42 Ebale monene ekozindisa Babiloni, makelele ya bambonge na yango ekozipa mokili ya Babiloni.
עלה על בבל הים בהמון גליו נכסתה
43 Bingumba na yango ekobebisama, ekokoma lokola mokili oyo ekawuka to lokola esobe, mokili oyo bato bavandaka te, mokili epai wapi bato bayaka na mibembo te.
היו עריה לשמה ארץ ציה וערבה ארץ לא ישב בהן כל איש ולא יעבר בהן בן אדם
44 Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni, nakobimisa ye eloko oyo ameli na monoko; ekolo moko te ekoya lisusu epai na ye mpe bamir ya Babiloni ekokweya.
ופקדתי על בל בבבל והצאתי את בלעו מפיו ולא ינהרו אליו עוד גוים גם חומת בבל נפלה
45 Oh bato na Ngai, bobima na Babiloni! Bobikisa bomoi na bino liboso ya kanda makasi ya Yawe!
צאו מתוכה עמי ומלטו איש את נפשו--מחרון אף יהוה
46 Bobanga te mpe bolemba nzoto te tango bokoyoka basango ya mabe kati na mokili: mobu oyo, sango ya mabe; mobu oyo elandi, sango mosusu ya mabe; kaka sango ya mobulu kati na mokili to sango ya mokonzi moko abundisi mokonzi mosusu.
ופן ירך לבבכם ותיראו בשמועה הנשמעת בארץ ובא בשנה השמועה ואחריו בשנה השמועה וחמס בארץ ומשל על משל
47 Pamba te tango ekoya solo, tango oyo nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni; mpe mokili na yango nyonso ekozala na soni, mpe bato na yango nyonso oyo bazokisa makasi na mopanga bakokufa kuna.
לכן הנה ימים באים ופקדתי על פסילי בבל וכל ארצה תבוש וכל חלליה יפלו בתוכה
48 Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango ekoganga na esengo mpo na komona kobebisama ya Babiloni, pamba te babebisi bakobimela na nor mpo na kobundisa yango, » elobi Yawe.
ורננו על בבל שמים וארץ וכל אשר בהם כי מצפון יבוא לה השודדים נאם יהוה
49 « Babiloni mpe esengeli kokweya, mpo na bana ya Isalaele oyo bakufaki, ndenge kaka bato ya mokili mobimba bakufaki mpo na Babiloni.
גם בבל לנפל חללי ישראל גם לבבל נפלו חללי כל הארץ
50 Bino bato oyo bobiki na mopanga, bokima, bolekisa tango te! Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi!
פלטים מחרב הלכו אל תעמדו זכרו מרחוק את יהוה וירושלם תעלה על לבבכם
51 Tosambwe, pamba te totiolami; mpe bilongi na biso ezipami na soni mpo ete bapaya bakoti kino na bisika ya bule ya Tempelo ya Yawe.
בשנו כי שמענו חרפה כסתה כלמה פנינו כי באו זרים על מקדשי בית יהוה
52 Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni, mpe mokili mobimba ekotonda na makelele ya bato oyo bazoka bapota ya somo.
לכן הנה ימים באים נאם יהוה ופקדתי על פסיליה ובכל ארצה יאנק חלל
53 Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » elobi Yawe.
כי תעלה בבל השמים וכי תבצר מרום עזה מאתי יבאו שדדים לה--נאם יהוה
54 « Makelele ya koganga ekoyokana, wuta na mokili ya Babiloni, lokito makasi ya kobebisama ya mokili ya bato ya Babiloni.
קול זעקה מבבל ושבר גדול מארץ כשדים
55 Pamba te Yawe akobebisa Babiloni mpe akokanga yango monoko. Lokito ya banguna ekoyokana lokola makelele ya bambonge ya bibale minene; bongo mingongo ya bato ekoyokana makasi.
כי שדד יהוה את בבל ואבד ממנה קול גדול והמו גליהם כמים רבים נתן שאון קולם
56 Mobebisi akoya kobundisa Babiloni; bongo bakokanga basoda na yango ya mpiko mpe bakobuka matolotolo na bango, pamba te Yawe azali Nzambe oyo afutaka: afutaka kolanda misala ya moto na moto.
כי בא עליה על בבל שודד ונלכדו גבוריה חתתה קשתותם כי אל גמלות יהוה שלם ישלם
57 Nakolangwisa masanga: bakalaka mpe bato na yango ya bwanya, bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko. Bakolala pongi ya libela mpe bakolamuka lisusu te, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali: Yawe, Mokonzi ya mampinga.
והשכרתי שריה וחכמיה פחותיה וסגניה וגבוריה וישנו שנת עולם ולא יקיצו נאם המלך--יהוה צבאות שמו
58 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto; bato bazali kosala bobele mosala ya pamba mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »
כה אמר יהוה צבאות חמות בבל הרחבה ערער תתערער ושעריה הגבהים באש יצתו ויגעו עמים בדי ריק ולאמים בדי אש ויעפו
59 Tala sango oyo mosakoli Jeremi apesaki epai ya Seraya, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, tango akendeki na Babiloni elongo na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na mobu ya minei ya bokonzi na ye. Seraya azalaki mokonzi ya molako.
הדבר אשר צוה ירמיהו הנביא את שריה בן נריה בן מחסיה בלכתו את צדקיהו מלך יהודה בבל בשנת הרבעית למלכו ושריה שר מנוחה
60 Jeremi akomaki kati na buku pasi nyonso oyo esengelaki kokomela Babiloni. Makambo wana nyonso ekomamaki na tina na mokili ya Babiloni.
ויכתב ירמיהו את כל הרעה אשר תבוא אל בבל--אל ספר אחד את כל הדברים האלה הכתבים אל בבל
61 Jeremi alobaki na Seraya: « Tango okokoma kati na Babiloni, sala ete otanga makambo oyo nyonso na mongongo makasi.
ויאמר ירמיהו אל שריה כבאך בבל--וראית וקראת את כל הדברים האלה
62 Bongo okoloba: ‹ Oh Yawe, Yo moko nde olobaki ete okobebisa esika oyo mpo ete bato mpe bibwele bavanda lisusu awa te, kasi etikala pamba mpo na libela. ›
ואמרת יהוה אתה דברת אל המקום הזה להכריתו לבלתי היות בו יושב למאדם ועד בהמה כי שממות עולם תהיה
63 Tango okosilisa kotanga buku yango, kangisa yango na libanga, bwaka yango na ebale Efrate mpe loba:
והיה ככלתך לקרא את הספר הזה תקשר עליו אבן והשלכתו אל תוך פרת
64 ‹ Ezali boye nde Babiloni ekozinda mpe ekomata lisusu te, likolo ya pasi oyo nakotindela yango. Mpe bato na yango bakokweya. › » Maloba ya Jeremi esuki awa.
ואמרת ככה תשקע בבל ולא תקום מפני הרעה אשר אנכי מביא עליה--ויעפו עד הנה דברי ירמיהו

< Jeremi 51 >