< Jeremi 49 >

1 Na tina na bato ya Amoni: Tala liloba oyo Yawe alobi: « Boni, Isalaele atikali lisusu na bana mibali te? Atikali lisusu na bakitani ya libula te? Bongo mpo na nini Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, abotoli bingumba ya Gadi? Mpo na nini bato na ye bayei kovanda na Gadi?
Of the people of Ammon. "Thus says the LORD: 'Has Israel no sons? Has he no heir? Why then does Milcom possess Gad, and his people dwell in its cities?
2 Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakosala ete lokito ya bitumba eyokana mpo na kobundisa Raba, engumba ya bato ya Amoni; ekokoma esika ya mabe mpe bamboka mike na yango ekozikisama na moto. Bongo Isalaele akobengana bato oyo babenganaki ye, » elobi Yawe.
Therefore look, the days come,' says the LORD, 'that I will cause an alarm of war to be heard against Rabbah of the people of Ammon; and it shall become a desolate heap, and her daughters shall be burned with fire: then shall Israel possess those who possessed him,' says the LORD.
3 « Eshiboni, lela mpo ete Ayi ebebisami! Bino bavandi ya Raba, boganga! Bolata basaki mpe bosala matanga, bokima na bangambo nyonso ya mir, pamba te Moloki akokende na bowumbu elongo na banganga-nzambe mpe bakambi na ye.
'Wail, Heshbon, for Ai is laid waste; cry, you daughters of Rabbah, clothe yourself in sackcloth: lament, and run back and forth among the fences; for Milcom shall go into captivity, his priests and his officials together.
4 Mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabwaku na yo, mabwaku oyo ebotaka bambuma ebele? Oh elenge mwasi oyo otambolaka na bosembo te, ozali solo kotia motema na bomengo na yo mpe ozali koloba: ‹ Nani akobundisa ngai? ›
Why do you glory in the valleys, your flowing valley, backsliding daughter? You who trusted in her treasures, saying, "Who shall come to me?"
5 Nakomemela yo pasi, wuta na zingazinga na yo, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Bakomema moko na moko kati na bino na bowumbu, mpe moto ata moko te akokoka kosangisa bato oyo bakokima.
Look, I will bring a fear on you,' says the LORD of hosts, 'from all who are around you; and you shall be driven out every man right forth, and there shall be none to gather together the fugitives.
6 Kasi sima na mikolo, nakozongisa lisusu lokumu ya bato ya Amoni, » elobi Yawe.
But afterward I will bring back the captivity of the people of Ammon,' says the LORD."
7 Na tina na Edomi: Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Boni, engumba ya Temani etikali lisusu na bato ya bwanya te? Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te? Boni, bwanya na bango esili penza?
Of Edom. "Thus says the LORD of hosts: 'Is wisdom no more in Teman? Is counsel perished from the prudent? Is their wisdom vanished?
8 Bobaluka mpe bokima, bokende kobombama na madusu ya mabanga, bino bavandi ya engumba Dedani! Pamba te nakotindela Ezawu pasi tango nakopesa ye etumbu.
Flee, turn back, dwell in the depths, inhabitants of Dedan; for I will bring the calamity of Esau on him, the time that I shall visit him.
9 Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo, bakotika ata mbuma moko te ya vino. Soki miyibi bayei epai na yo na butu, bakobebisa ndenge balingi.
If grape gatherers came to you, would they not leave some gleaning grapes? If thieves by night, wouldn't they destroy until they had enough?
10 Kasi nakotika Ezawu bolumbu, mpe nakobimisa polele ebombamelo na ye, bongo akokoka lisusu komibomba te. Bana na ye ya mibali to bandeko na ye to mpe bazalani na ye bakosila kokufa; moko te akotikala na bomoi.
But I have made Esau bare, I have uncovered his secret places, and he shall not be able to hide himself: his seed is destroyed, and his brothers, and his neighbors; and he is no more.
11 Tika bana bitike na yo, nakobatela bomoi na bango; mpe basi na yo, oyo bakufisa mibali bakotiela Ngai motema. »
Leave your fatherless children, I will preserve them alive; and let your widows trust in me.'
12 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Soki bato oyo basengeli komela kopo te bameli yango, bongo mpo na nini yo ozanga kozwa etumbu? Te, okozanga te kozwa etumbu, mpe osengeli komela kopo yango!
For thus says the LORD: 'Look, they to whom it did not pertain to drink of the cup shall certainly drink; and are you he who shall altogether go unpunished? You shall not go unpunished, but you shall surely drink.
13 Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « Botsira ekobebisama mpe ekokoma eloko ya somo, eloko ya kotiola mpe ya lisuma; mpe bingumba na yango nyonso ekobebisama mpo na libela. »
For I have sworn by myself,' says the LORD, 'that Bozrah shall become an astonishment, a reproach, a waste, and a curse; and all its cities shall be perpetual wastes.'"
14 Nayoki sango kowuta na Yawe; mpe batindaki ntoma moko epai ya bikolo mpo na koloba: « Bosangana mpo na kobundisa yango! Botelema mpo na bitumba!
I have heard news from the LORD, and an ambassador is sent among the nations, saying, "Gather yourselves together, and come against her, and rise up to the battle."
15 Nakokomisa yo moke kati na bikolo, ekolo ya kotiola kati na bato.
"For, look, I have made you small among the nations, and despised among men.
16 Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
As for your terror, the pride of your heart has deceived you, O you who dwell in the clefts of the rock, who hold the height of the hill: though you should make your nest as high as the eagle, I will bring you down from there," says the LORD.
17 « Mokili ya Edomi ekokoma eloko ya somo; moto nyonso oyo akolekela wana akokamwa mpe akoyoka somo wana akomona kobeba na yango nyonso.
"Edom shall become an astonishment: everyone who passes by it shall be astonished, and shall hiss at all its plagues.
18 Ndenge Sodome mpe Gomore ebebisamaki elongo na bingumba na yango ya zingazinga, » elobi Yawe, « moto moko te akovanda lisusu kuna, moko te akowumela kati na yango.
As in the overthrow of Sodom and Gomorrah and the neighbor cities of it," says the LORD, "no man shall dwell there, neither shall any son of man live in it.
19 Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai? Nani akoki kobeta tembe na Ngai? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai?
Look, he shall come up like a lion from the pride of the Jordan against the strong habitation: for I will suddenly make them run away from it; and whoever is chosen, him will I appoint over it: for who is like me? And who will appoint me a time? And who is the shepherd who will stand before me?
20 Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na kotelemela Edomi, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela bavandi ya Temani: ‹ Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.
Therefore hear the counsel of the LORD, that he has taken against Edom; and his purposes, that he has purposed against the inhabitants of Teman: Surely they shall drag them away, the little ones of the flock; surely he shall make their habitation desolate over them.
21 Mabele ekoningana na lokito ya kokweya na bango, makelele na yango ekoyokana kino na ebale monene ya Barozo.
The earth trembles at the noise of their fall; there is a cry, the noise which is heard in the Red Sea.
22 Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu, etanda mapapu na yango likolo ya Botsira! Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › »
Look, he shall come up and fly as the eagle, and spread out his wings against Bozrah: and the heart of the mighty men of Edom at that day shall be as the heart of a woman in her pangs."
23 Na tina ya Damasi: « Amati mpe Aripadi batondisami na soni, pamba te bayoki sango ya mabe. Mitema na bango ekomi likolo-likolo mpe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki.
Of Damascus. "Hamath is confounded, and Arpad; for they have heard evil news, they are melted away: there is sorrow on the sea; it can't be quiet.
24 Bato ya Damasi balembi nzoto, bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango; kobanga mpe pasi ezwi bango lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
Damascus has grown feeble, she turns herself to flee, and trembling has seized on her: anguish and sorrows have taken hold of her, as of a woman in travail.
25 Ndenge nini bosundola engumba ya lokumu boye, engumba oyo ezalaki kosepelisa motema na Ngai?
How is the city of praise not forsaken, the city of my joy?
26 Solo, bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala na yango na mokolo wana, basoda na yango ya mpiko bakokanga minoko, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Therefore her young men shall fall in her streets, and all the men of war shall be brought to silence in that day," says the LORD of hosts.
27 « Nakozikisa bamir ya Damasi na moto mpe moto yango ekozikisa bandako batonga makasi ya mokonzi Beni-Adadi. »
"I will kindle a fire in the wall of Damascus, and it shall devour the palaces of Ben Hadad."
28 Na tina na Kedari mpe mikili ya Atsori, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki: Tala liloba oyo Yawe alobi: « Botelema mpe bobundisa Kedari, bobebisa bato ya este.
Of Kedar, and of the kingdoms of Hazor, which Nebuchadnezzar king of Babylon struck. "Thus says the LORD: 'Arise, go up to Kedar, and destroy the people of the east.'
29 Bobotola na makasi bandako na bango ya kapo mpe bibwele na bango; bomema bilamba, biloko na bango ya kitoko mpe bashamo na bango! Tika ete bato bawolola bango na bangambo nyonso: ‹ Somo ekangi bango na bangambo nyonso! ›
Their tents and their flocks shall they take; they shall carry away for themselves their curtains, and all their vessels, and their camels; and they shall cry to them, 'Terror on every side.'
30 Bino bavandi ya Atsori, bokima na lombangu, bobombama na madusu ya mabanga, » elobi Yawe. « Pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, asaleli bino likita, asali penza mabongisi ya kosala bino mabe!
Flee, wander far off, dwell in the depths, you inhabitants of Hazor," says the LORD; "for Nebuchadnezzar king of Babylon has taken counsel against you, and has conceived a purpose against you."
31 Botelema mpe bobundisa ekolo oyo ezali na kimia, ekolo oyo ebangaka eloko moko te, » elobi Yawe, « ekolo oyo ezanga bikuke mpe banzete oyo bakangelaka bikuke, ekolo oyo bato na yango bazalaka kaka bango moko.
"Arise, go up to a nation that is at ease, that dwells without care, says the LORD; that have neither gates nor bars, that dwell alone.
32 Tika ete bashamo na bango ekoma bomengo ya bitumba, bayiba bibwele na bango ebele. Nakopanza na mopepe bavandi ya mosika, mpe nakokweyisela bango pasi longwa na bisika nyonso, » elobi Yawe.
Their camels shall be a booty, and the multitude of their livestock a spoil: and I will scatter to all winds those who have the corners of their beards cut off; and I will bring their calamity from every side of them," says the LORD.
33 « Atsori ekokoma esika oyo mbwa ya zamba evandaka, esika oyo etikala pamba mpo na libela: moto moko te akovanda lisusu kuna mpe moto moko te akowumela lisusu kati na yango. »
"Hazor shall be a dwelling place of jackals, a desolation forever: no man shall dwell there, neither shall any son of man live in it."
34 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Elami, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda:
The word of the LORD that came to Jeremiah the prophet concerning Elam, in the beginning of the reign of Zedekiah king of Judah, saying,
35 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Tala, nakobuka tolotolo ya Elami, ebundeli oyo esalaka makasi na ye.
"Thus says the LORD of hosts: 'Look, I will break the bow of Elam, the chief of their might.
36 Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi, wuta na basonge minei ya lola, nakopanza bango na mokili mobimba mpe akozala na ekolo moko te oyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima.
On Elam will I bring the four winds from the four quarters of the sky, and will scatter them toward all those winds; and there shall be no nation where the outcasts of Elam shall not come.
37 Nakosala ete bato ya Elami balenga liboso ya banguna na bango, liboso ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe; nakokweyisela bango pasi na kanda na Ngai, » elobi Yawe. « Nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango.
I will cause Elam to be dismayed before their enemies, and before those who seek their life; and I will bring evil on them, even my fierce anger,' says the LORD; 'and I will send the sword after them, until I have consumed them;
38 Nakotia Kiti na Ngai ya bokonzi kati na Elami mpe nakoboma mokonzi mpe bakalaka na yango, » elobi Yawe.
and I will set my throne in Elam, and will destroy from there king and officials,' says the LORD.
39 « Nzokande, na mikolo ekolanda, nakozongisa lokumu ya Elami, » elobi Yawe.
'But it shall happen in the latter days, that I will bring back the captivity of Elam,' says the LORD."

< Jeremi 49 >