< Jeremi 48 >
1 Na tina ya Moabi: Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Mawa na engumba Nebo, pamba te ekobebisama! Kiriatayimi ekoyokisama soni mpe bakobotola yango, ndako makasi ekoyokisama soni mpe ekobukana.
论摩押。万军之耶和华—以色列的 神如此说: 尼波有祸了!因变为荒场。 基列亭蒙羞被攻取; 米斯迦蒙羞被毁坏;
2 Moabi ekozala lisusu na lokumu te, bato bakosalela yango likita kati na Eshiboni mpo na kokweyisa yango: ‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo! › Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko; mopanga ekolanda yo.
摩押不再被称赞。 有人在希实本设计谋害她,说: 来吧!我们将她剪除,不再成国。 玛得缅哪,你也必默默无声; 刀剑必追赶你。
3 Yoka makelele oyo ezali kobima kuna na Oronayimi: ezali lokito ya bitumba mpe ya kobebisama!
从何罗念有喊荒凉大毁灭的哀声:
4 Moabi ebebisami makasi penza mpe bana na yango bazali kolela.
摩押毁灭了! 她的孩童发哀声,使人听见。
5 Bazali komata na kolela, nzela-nzela mpo na kokende na Luyiti; mpe tango bazali kokita na Oronayimi, koganga ya mawa ezali koyokana mpo ete Moabi esili kobebisama.
人上鲁希坡随走随哭, 因为在何罗念的下坡听见毁灭的哀声。
6 Bokima! Bopota mbangu mpo na kobikisa bomoi na bino; bokoma lokola nzete ya kokawuka kati na esobe!
你们要奔逃,自救性命, 独自居住,好像旷野的杜松。
7 Lokola bozali kotia mitema na misala na bino mpe na bomengo na bino, bino mpe bokokende na bowumbu; boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.
你因倚靠自己所做的和自己的财宝必被攻取。 基抹和属他的祭司、首领也要一同被掳去。
8 Mobebisi akoya koboma bingumba nyonso mpe ata engumba moko te ekobika; lubwaku ekobebisama, mpe etando ya likolo ya bangomba ekobebisama, pamba te Yawe alobi.
行毁灭的必来到各城, 并无一城得免。 山谷必致败落, 平原必被毁坏; 正如耶和华所说的。
9 Bobongisa kunda mpo na Moabi mpo ete ekobebisama solo; bingumba na yango ekotikala pamba, mpe bato bakovanda lisusu kuna te.
要将翅膀给摩押, 使她可以飞去。 她的城邑必致荒凉, 无人居住。 (
10 Tika ete moto oyo asalelaka Yawe na kozanga komipesa alakelama mabe! Tika ete moto oyo apelisaka mopanga na ye mpo ete etangisa makila alakelama mabe!
懒惰为耶和华行事的,必受咒诅;禁止刀剑不经血的,必受咒诅。)
11 Moabi ezalaki na kimia wuta bolenge na yango lokola masanga ya vino oyo baningisi te, oyo babongoli na mbeki mosusu te, mpo ete etikala nanu kokende na bowumbu te. Boye, elengi na yango ebongwana te mpe solo na yango etikala kaka ndenge ya kala.
摩押自幼年以来常享安逸, 如酒在渣滓上澄清, 没有从这器皿倒在那器皿里, 也未曾被掳去。 因此,它的原味尚存, 香气未变。
12 Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakotindela Moabi bato oyo bakobongola yango lokola masanga ya vino na mbeki mosusu: bakosopa yango, bakosilisa yango na mbeki mpe bakobuka mbeki na yango.
耶和华说:“日子将到,我必打发倒酒的往她那里去,将她倒出来,倒空她的器皿,打碎她的坛子。
13 Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni tango batiaki mitema na Beteli.
摩押必因基抹羞愧,像以色列家从前倚靠伯特利的神羞愧一样。
14 Ndenge nini bokoki koloba: ‹ Tozali basoda ya mpiko, bato ya makasi, bilombe ya bitumba? ›
你们怎么说: 我们是勇士,是有勇力打仗的呢?
15 Mokili ya Moabi ekobebisama, mpe bakobotola bingumba na yango na makasi; bilenge mibali oyo Moabi etielaka motema bakokufa na mopanga, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
摩押变为荒场, 敌人上去进了她的城邑。 她所特选的少年人下去遭了杀戮; 这是君王—名为万军之耶和华说的。
16 « Kobebisama ya Moabi ezali na nzela, pasi na yango ekoya na lombangu penza.
摩押的灾殃临近; 她的苦难速速来到。
17 Bino bazalani nyonso ya Moabi, bosalela ye matanga; bino bato oyo boyebi sango ya lokumu na ye, boloba: ‹ Ah, tala ndenge lingenda ya nguya, lingenda ya bokonzi ya nkembo, ebukani! ›
凡在她四围的和认识她名的, 你们都要为她悲伤,说: 那结实的杖和那美好的棍, 何竟折断了呢?
18 Oh bato ya elenge mwasi Diboni, botika nkembo na bino mpe bovanda na esobe; pamba te moto oyo akoya kobundisa Moabi akoya mpe kobundisa bino mpe kobebisa bingumba na bino oyo batonga makasi!
住在底本的民哪, 要从你荣耀的位上下来, 坐受干渴; 因毁灭摩押的上来攻击你, 毁坏了你的保障。
19 Bino bavandi ya Aroeri, botelema na nzela mpe botala malamu, botuna mobali oyo azali kokima mpe mwasi oyo asili kobikisa bomoi na ye soki makambo nini esili kosalema!
住亚罗珥的啊, 要站在道旁观望, 问逃避的男人和逃脱的女人说: 是什么事呢?
20 Moabi ezali na soni mpo ete esili kokweya. Bolela mpe boganga, bobelela na Arinoni ete mokili ya Moabi ebebisami!
摩押因毁坏蒙羞; 你们要哀号呼喊, 要在亚嫩旁报告说: 摩押变为荒场!
21 Kosambisama ekweyi na mokili ya etando ya likolo ya bangomba: na Oloni, na Yakatsi mpe na Mefati,
“刑罚临到平原之地的何伦、雅杂、米法押、
22 na Diboni, na Nebo mpe na Beti-Diblatayimi,
底本、尼波、伯·低比拉太音、
23 na Kiriatayimi, na Beti-Gamuli mpe na Beti-Meoni,
基列亭、伯·迦末、伯·米恩、
24 na Kerioti mpe na Botsira, na bingumba nyonso ya Moabi, ezala oyo ezali mosika to oyo ezali pene.
加略、波斯拉,和摩押地远近所有的城邑。
25 Liseke ya Moabi ebukani mpe loboko na ye ekatani, » elobi Yawe.
摩押的角砍断了,摩押的膀臂折断了。这是耶和华说的。”
26 « Bolangwisa ye masanga, pamba te abetaki tembe na Yawe! Tala ye Moabi ndenge azali kobaluka kati na bisanza na ye! Tika ete, ye mpe, akoma eloko ya maseki!
“你们要使摩押沉醉,因她向耶和华夸大。她要在自己所吐之中打滚,又要被人嗤笑。
27 Boni, Isalaele azalaki eloko ya maseki te na miso na bino? Bokangaki ye kati na miyibi mpo ete bokoma koseka ye tango nyonso bokolobela kombo na ye?
摩押啊,你不曾嗤笑以色列吗?她岂是在贼中查出来的呢?你每逢提到她便摇头。
28 Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino mpe bokende kovanda kati na mabanga! Bozala lokola ebenga oyo etongaka zala na yango kati na mabanga.
摩押的居民哪, 要离开城邑,住在山崖里, 像鸽子在深渊口上搭窝。
29 Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, lolendo oyo eleka penza ndelo! Tala ndenge amatisaka mapeka! Atondi na lofundu, azali na monoko makasi, mpe motema na ye emikitisaka te.
我们听说摩押人骄傲, 是极其骄傲; 听说他自高自傲, 并且狂妄,居心自大。
30 Nayebi ete monoko makasi na ye ezali kaka pamba, » elobi Yawe, « mpe lolendo na ye esalaka eloko moko te.
耶和华说: 我知道他的忿怒是虚空的; 他夸大的话一无所成。
31 Yango wana nazali kolela mpo na Moabi, nazali kolela mpo na Moabi nyonso; nazali kosala matanga mpo na bato ya Kiri-Eresheti.
因此,我要为摩押哀号, 为摩押全地呼喊; 人必为吉珥·哈列设人叹息。
32 Oh elanga ya vino ya Sibima, nazali kolela mpo na yo ndenge engumba Yaezeri ezali kolela! Bitape na yo epanzani kino koleka mayi monene, ekomi kino na mayi monene Yaezeri. Mobebisi akweyeli mbuma ya bilanga na yo mpe mbuma ya vino na yo.
西比玛的葡萄树啊,我为你哀哭, 甚于雅谢人哀哭。 你的枝子蔓延过海, 直长到雅谢海。 那行毁灭的已经临到你夏天的果子 和你所摘的葡萄。
33 Esengo mpe kosepela esili kolimwa na bilanga mpe na bazamba ya Moabi; nakawusi vino kati na bikamolelo na bango, mpe moto oyo akokamola yango na esengo azali te. Atako bato bazali koganga kasi ezali makelele ya esengo te.
肥田和摩押地的欢喜快乐都被夺去; 我使酒榨的酒绝流, 无人踹酒欢呼; 那欢呼却变为仇敌的呐喊。
34 Makelele mpe koganga ezali komata wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi, wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya; pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.
“希实本人发的哀声达到以利亚利,直达到雅杂;从琐珥达到何罗念,直到伊基拉·施利施亚,因为宁林的水必然干涸。”
35 Nakoboma bato nyonso oyo bakendaka na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe batumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe na bango, kati na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.
耶和华说:“我必在摩押地使那在邱坛献祭的,和那向他的神烧香的都断绝了。
36 « Mpe motema na Ngai ezali kolela Moabi ndenge flite ebetaka, ezali kolela lokola flite mpo na bato ya Kiri-Eresheti. Bomengo na bango nyonso esili kobunga.
我心腹为摩押哀鸣如箫,我心肠为吉珥·哈列设人也是如此,因摩押人所得的财物都灭没了。
37 Bakokoli suki ya mito ya bato nyonso, bakati moto moko na moko mandefu mpe bazokisi moto moko na moko na loboko.
“各人头上光秃,胡须剪短,手有划伤,腰束麻布。
38 Na likolo ya bandako nyonso ya Moabi mpe na bisika nyonso oyo bato balekelaka, ezali na likambo mosusu te, kaka ebembe; pamba te nabebisi Moabi lokola eloko oyo bato balingaka te, » elobi Yawe.
在摩押的各房顶上和街市上处处有人哀哭;因我打碎摩押,好像打碎无人喜悦的器皿。这是耶和华说的。
39 « Tala ndenge nini apanzani, tala ndenge nini bazali kolela! Ndenge nini Moabi apesi mokongo na soni! Moabi akomi eloko ya kotiola, eloko ya koyoka na miso ya bato nyonso oyo bazingeli ye. »
摩押何等毁坏!何等哀号!何等羞愧转背!这样,摩押必令四围的人嗤笑惊骇。”
40 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala ndenge nini mpongo ezali kokita na elulu mpe etandi mapapu na yango likolo ya Moabi.
耶和华如此说: 仇敌必如大鹰飞起, 展开翅膀,攻击摩押。
41 Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi. Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
加略被攻取,保障也被占据。 到那日,摩押的勇士心中疼痛如临产的妇人。
42 Mokili ya Moabi ekobebisama mpe ekotikala lisusu ekolo te; pamba te ebetaki tembe na Yawe.
摩押必被毁灭,不再成国, 因她向耶和华夸大。
43 Somo, libulu mpe motambo ezali kozela bino bato ya Moabi, » elobi Yawe.
耶和华说:摩押的居民哪, 恐惧、陷坑、网罗都临近你。
44 « Moto nyonso oyo akokima somo akokweya na libulu, mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo, pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.
躲避恐惧的必坠入陷坑; 从陷坑上来的必被网罗缠住; 因我必使追讨之年临到摩押。 这是耶和华说的。
45 « Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungi na elili ya engumba ya Eshiboni, pamba te moto moko ewuti na Eshiboni, moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni, etumbi bandako batonga makasi ya Moabi mpe mito ya bato ya lolendo.
躲避的人无力站在希实本的影下; 因为有火从希实本发出, 有火焰出于西宏的城, 烧尽摩押的角和哄嚷人的头顶。
46 Oh Moabi, mawa na yo! Bato ya Kemoshi babebisami, bana na yo ya mibali bakangami na bowumbu, mpe bana na yo ya basi bakokende na bowumbu!
摩押啊,你有祸了! 属基抹的民灭亡了! 因你的众子都被掳去, 你的众女也被掳去。
47 Nzokande, na mikolo ekoya, nakozongisa lokumu ya Moabi, » elobi Yawe. Kosambisama ya Moabi esuki awa.
耶和华说: 到末后,我还要使被掳的摩押人归回。 摩押受审判的话到此为止。