< Jeremi 47 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bato ya Filisitia liboso ete Faraon abundisa Gaza:
Реч Господња која дође Јеремији пророку за Филистеје пре него Фараон освоји Газу.
2 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala ndenge nini mayi ezali kotomboka na nor, etondi lokola ebale oyo etondi mayi; ekozindisa mokili mpe biloko nyonso kati na yango, bingumba mpe bavandi na yango nyonso. Bato bakoganga, bavandi nyonso ya mokili bakolela
Овако вели Господ: Ево, вода долази са севера, и биће као поток који се разлива, и потопиће земљу и шта је у њој, град и оне који живе у њему; и људи ће викати, и ридаће сви становници земаљски.
3 tango bakoyoka makelele ya bampunda koleka na lombangu, lokito ya bashar ya banguna mpe makelele ya bapine na yango. Batata bakozala lisusu na tango te ya kosunga bana na bango mpo ete maboko na bango ekolemba.
Од топота копита јаких коња његових, од тутњаве кола његових, и праске точкова његових, неће се обазрети очеви на синове, јер ће им руке клонути,
4 Pamba te mokolo ekoki mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia mpe kosilisa koboma batikali nyonso oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni. Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia, batikali ya esanga ya Kafitori.
Од оног дана који ће доћи да истреби све Филистеје и да затре Тир и Сидон и све остале помоћнике, јер ће Господ истребити Филистеје, остатак острва Кафтора.
5 Bakokokola suki ya moto ya Gaza lokola elembo ya matanga, Ashikeloni ekokanga monoko! Oh bino batikali kati na etando oyo ya lubwaku, kino tango nini bokotika komizokisa?
Оћелавиће Газа, пропашће Аскалон и остатак долине њихове; докле ћеш се резати?
6 Bozali koganga: ‹ Ah mopanga ya Yawe, okopema tango nini? Zonga na ebombelo na yo, tika koboma mpe zala kimia! ›
Јаох, мачу Господњи, кад ћеш се смирити? Врати се у корице своје, стани и смири се.
7 Kasi ndenge nini ezala kimia tango Yawe apesi yango mitindo ya kobundisa Ashikeloni mpe mikili oyo ezali pembeni ya ebale monene? »
Али како би се смирио? Јер му Господ даде заповест на Аскалон и на приморје; онамо га одреди.

< Jeremi 47 >